< Jeremi 46 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bikolo ya bapaya:
耶和华论列国的话临到先知耶利米。
2 Na tina ya Ejipito: Tala maloba ya kosambisa mampinga ya Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alongaki pene ya ebale Efrate, na Karikemishi, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi:
论到关乎埃及王法老尼哥的军队:这军队安营在幼发拉底河边的迦基米施,是巴比伦王尼布甲尼撒在犹大王约西亚的儿子约雅敬第四年所打败的。
3 « Bobongisa banguba na bino: ya minene mpe ya mike, mpe bokende bitumba!
你们要预备大小盾牌, 往前上阵。
4 Bobongisa bampunda mpe bomata na bashar! Bomitanda na milongo mpe bolata bikoti ya bitumba! Bopelisa basonge ya makonga na bino mpe bolata bibundeli!
你们套上车, 骑上马! 顶盔站立, 磨枪贯甲!
5 Nazali komona nini? Bazali kolenga na somo mpe kozonga sima; balongi basoda na bango ya mpiko, bazali kopota mbangu makasi mpe bazali ata kotala sima te: somo ekangi bango na bangambo nyonso, » elobi Yawe.
我为何看见他们惊惶转身退后呢? 他们的勇士打败了, 急忙逃跑,并不回头; 惊吓四围都有! 这是耶和华说的。
6 « Bato ya mbangu bazali kokoka lisusu kokima te, mpe basoda ya mpiko bazali kokoka lisusu kobika te! Bazali nde kobeta mabaku mpe kokweya pembeni ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.
不要容快跑的逃避; 不要容勇士逃脱; 他们在北方幼发拉底河边绊跌仆倒。
7 Nani oyo azali koya lokola ebale Nili, lokola mayi ya bibale oyo etomboki?
像尼罗河涨发, 像江河之水翻腾的是谁呢?
8 Mokili ya Ejipito ezali koya lokola ebale Nili, lokola mayi ya bibale oyo etomboki. Ejipito ezali koloba: ‹ Nakoya mpe nakotondisa mokili, nakobebisa bingumba mpe bato na yango. ›
埃及像尼罗河涨发, 像江河的水翻腾。 他说:我要涨发遮盖遍地; 我要毁灭城邑和其中的居民。
9 Bino bampunda, bokende! Bino basoda oyo botambolaka likolo ya bashar, botambolisa mbangu! Bino basoda, bato ya Kushi mpe ya Puti, oyo bomemaka banguba, mpe bino bato ya Ludi oyo bobundaka na matolotolo, bokende liboso!
马匹上去吧! 车辆急行吧! 勇士,就是手拿盾牌的古实人和弗人, 并拉弓的路德族,都出去吧!
10 Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga; mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpo na kozongisela banguna na yo mabe. Mopanga ekoboma kino ekotonda, kino ekosilisa posa na yango ya makila; pamba te ezali nde mbeka mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.
那日是主—万军之耶和华报仇的日子, 要向敌人报仇。 刀剑必吞吃得饱, 饮血饮足; 因为主—万军之耶和华 在北方幼发拉底河边有献祭的事。
11 Oh moseka Ejipito, kende kozwa malasi kati na Galadi! Ozali kobakisa na pamba bakisi likolo ya bakisi, okobika na yo te!
埃及的民哪, 可以上基列取乳香去; 你虽多服良药, 总是徒然,不得治好。
12 Bikolo ya bapaya ekoyoka sango ya soni na yo, makelele ya koganga na yo ekotondisa mabele. Soda moko akotutana na soda mosusu, mpe bango mibale bakokweya nzela moko. »
列国听见你的羞辱, 遍地满了你的哀声; 勇士与勇士彼此相碰, 一齐跌倒。
13 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na koya ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo na kobundisa Ejipito:
耶和华对先知耶利米所说的话,论到巴比伦王尼布甲尼撒要来攻击埃及地:
14 « Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi: ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›
你们要传扬在埃及,宣告在密夺, 报告在挪弗、答比匿说: 要站起出队,自作准备, 因为刀剑在你四围施行吞灭的事。
15 Mpo na nini bamemi basoda na yo ya mpiko? Bakokaki kopika te, pamba te Yawe akweyisaki bango.
你的壮士为何被冲去呢? 他们站立不住; 因为耶和华驱逐他们,
16 Tango nyonso, bazali se kobeta mabaku, bazali kokweya moko likolo ya mosusu. Bazali koloba: ‹ Tika ete totelema mpe tozonga epai ya bato na biso moko mpe na mokili na biso, epai babota biso, mpo ete tobika na mopanga oyo ezali koboma. ›
使多人绊跌; 他们也彼此撞倒,说: 起来吧!我们再往本民本地去, 好躲避欺压的刀剑。
17 Kuna, bakokoma koganga: ‹ Faraon, mokonzi ya Ejipito, atiaka kaka makelele ya pamba, akoki na ye makambo te! ›
他们在那里喊叫说: 埃及王法老不过是个声音; 他已错过所定的时候了。
18 Lokola Ngai nazali na bomoi, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga; « monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba, lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene, azali koya!
君王—名为万军之耶和华的说: 我指着我的永生起誓: 尼布甲尼撒来的势派 必像他泊在众山之中, 像迦密在海边一样。
19 Yo movandi ya Ejipito, kanga bisaka na yo mpo na kokende na bowumbu, pamba te Mefisi ekokoma esobe, ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te!
住在埃及的民哪, 要预备掳去时所用的物件; 因为挪弗必成为荒场, 且被烧毁,无人居住。
20 Mokili ya Ejipito ezali lokola mwana ngombe ya kitoko ya mwasi, kasi nzinzi ezali koya koswa yango kowuta na nor.
埃及是肥美的母牛犊; 但出于北方的毁灭来到了!来到了!
21 Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye, bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga. Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko; bakokoka kolonga te, pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango: ezali tango ya etumbu mpo na bango.
其中的雇勇好像圈里的肥牛犊, 他们转身退后, 一齐逃跑,站立不住; 因为他们遭难的日子、 追讨的时候已经临到。
22 Ejipito ezali kokima, na makelele lokola nyoka, pamba te banguna na yango bazali kopusana na nguya; bazali koya kobundisa yango na bipasola lokola bato oyo bakataka banzete.
其中的声音好像蛇行一样。 敌人要成队而来,如砍伐树木的手拿斧子攻击他。
23 Bakokata banzete nyonso ya zamba na yango, » elobi Yawe, « ata soki ezali na banzete ebele. Bazali ebele koleka mabanki, bakokoka kotanga motango na bango te.
耶和华说: 埃及的树林虽然不能寻察, 敌人却要砍伐, 因他们多于蝗虫,不可胜数。
24 Elenge mwasi ya Ejipito akoyokisama soni, akokweya na maboko ya bato ya nor. »
埃及的民必然蒙羞, 必交在北方人的手中。
25 Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Nakopesa etumbu epai na Amoni, na nzambe ya Tebesi, na Faraon, na Ejipito mpe na banzambe na yango, na Faraon mpe na bato oyo batiaka mitema na bango epai na ye.
万军之耶和华—以色列的 神说:“我必刑罚挪的亚扪和法老,并埃及与埃及的神,以及君王,也必刑罚法老和倚靠他的人。
26 Nakokaba bango na maboko ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya bakonzi ya basoda na ye. Mpe na sima na tango, Ejipito ekotonda lisusu na bato oyo bakovanda kuna, ndenge ezalaki na tango ya kala, » elobi Yawe.
我要将他们交付寻索其命之人的手和巴比伦王尼布甲尼撒与他臣仆的手;以后埃及必再有人居住,与从前一样。这是耶和华说的。”
27 « Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te! Oh Isalaele, kobanga te; nakobikisa yo solo wuta na mokili ya mosika, nabikisa bakitani na yo wuta na mokili ya bowumbu. Jakobi akozala lisusu na kimia mpe na bobatelami malamu, moto moko te akobangisa ye lisusu.
我的仆人雅各啊,不要惧怕! 以色列啊,不要惊惶! 因我要从远方拯救你, 从被掳到之地拯救你的后裔。 雅各必回来,得享平靖安逸, 无人使他害怕。
28 Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te; pamba te nazali elongo na yo, » elobi Yawe, « ata soki nabebisi bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino, nakobebisa yo nyonso te. Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo; nakozanga te kopesa yo etumbu. »
我的仆人雅各啊,不要惧怕! 因我与你同在。 我要将我所赶你到的那些国灭绝净尽, 却不将你灭绝净尽, 倒要从宽惩治你, 万不能不罚你。 这是耶和华说的。