< Jeremi 45 >
1 Tango Baruki asilisaki kokoma kati na mokanda makambo oyo Jeremi atindaki ye, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, mosakoli Jeremi alobaki na Baruki, mwana mobali ya Neriya, maloba oyo:
The word that Jeremiah the prophet hath spoken unto Baruch son of Neriah, in his writing these words on a book from the mouth of Jeremiah, in the fourth year of Jehoiakim son of Josiah king of Judah, saying:
2 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, azali koloba na yo Baruki:
'Thus said Jehovah, God of Israel, concerning thee, O Baruch:
3 Olobaki: ‹ Mawa na ngai! Yawe abakisi pasi mpe minyoko na ngai; nalembi likolo ya kolela mpe nazali lisusu na kimia te! ›
'Thou hast said, Woe to me, now, for Jehovah hath added sorrow to my pain, I have been wearied with my sighing, and rest I have not found.
4 Kasi Yawe alobaki na ngai: Loba na ye: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Nakokweyisa biloko nyonso oyo natongaki mpe nakopikola biloko nyonso oyo nalonaki kati na mokili oyo.
Thus dost thou say unto him: Thus said Jehovah: Lo, that which I have built I am throwing down, and that which I have planted I am plucking up, even the whole land itself.
5 Boni, olingi koluka makambo minene mpo na yo moko? Te! Koluka yango te! Pamba te nakomemela bato nyonso pasi, elobi Yawe, kasi nakobikisa yo na bisika nyonso oyo okokende. › »
And thou — thou seekest for thee great things — do not seek, for lo, I am bringing in evil on all flesh — an affirmation of Jehovah — and I have given to thee thy life for a spoil, in all places whither thou goest.'