< Jeremi 43 >
1 Tango Jeremi asilisaki koloba na bato maloba nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, maloba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye koyebisa bango,
耶肋米亞向全體人民說完上主他們的天主的一切話,即上主他們的天主派遣他來向他們轉告的這一切話以後,
2 Azaria, mwana mobali ya Oshaya; Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bato oyo nyonso ya lolendo balobaki na Jeremi: — Ozali koloba makambo ya lokuta! Yawe, Nzambe na biso, atindi yo te koloba na biso ete tokende te kovanda na Ejipito.
瑪阿色雅的兒子阿匝黎雅和卡勒亞的兒子約哈南,以及一切傲慢反叛的人,就肋米亞說:「你說謊;上主我們的天主並沒有派你說:你們不要去寄居埃及;
3 Ezali Baruki, mwana mobali ya Neriya, moto atindi yo ete okosa biso, pamba te alingi ete towumela na se ya bokonzi ya bato ya Babiloni mpo ete baboma biso to bamema biso na bowumbu na Babiloni.
只是乃黎雅的兒子巴路克挑唆你反對我們,好將我交在加色丁人手中,或殺或擄到巴比倫去。」
4 Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, bakonzi nyonso ya basoda mpe bato nyonso baboyaki kotosa Yawe oyo azali kosenga bango kovanda kati na mokili ya Yuda.
卡勒亞的兒子約哈南和眾部隊首領以及全體人民,沒有聽從上主的勸告,住在猶大地內。
5 Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda bakamataki batikali nyonso ya Yuda, oyo bazongaki wuta na bikolo nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana, mpo na kovanda na mokili ya Yuda;
卡勒亞的兒子約哈南和眾部隊首領,反而率領全體猶大遣民,即那些四到各民族間,又回來住在猶大境內的人:
6 bamemaki lisusu mibali, basi, bana mpe bana basi ya mokonzi oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, apesaki na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani. Bamemaki mpe mosakoli Jeremi mpe Baruki, mwana mobali ya Neriya.
男子和婦女,幼童和王家閨秀,以及衛隊長乃步匝辣當給沙番的孫子,阿希甘的兒子留下的人,連同先知耶肋米亞和乃黎雅的兒子巴路克,
7 Boye, mpo ete batosaki Yawe te, bakendeki na Ejipito mpe bakomaki kino na Dafine.
到埃及地去了;沒有聽從上主的勸告,而來到塔黑培乃斯。
8 Wuta na Dafine, Yawe alobaki na Jeremi:
在塔黑培乃斯上主有話傳給耶肋米亞說:「
9 — Kamata mabanga minene mpe, na miso ya Bayuda, kunda yango na se ya mabele oyo basalelaka bikeko, mabele ya pavema oyo batonga na babiliki, na ekotelo ya ndako ya Faraon, na Dafine.
你用手拿一些大石頭,當著猶大人眼前,藏在塔黑培乃斯法郎王宮前石鋪地道下面,
10 Loba na bango: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakobengisa mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe nakotelemisa kiti na ye ya bokonzi na likolo ya mabanga oyo nasili kokunda na esika oyo; akotanda ndako na ye ya kapo ya bokonzi na likolo na yango.
然後對他們說:萬軍的上主,以色列的天主這樣說:看,我必派人去領我的僕人巴比倫王拿步高來,在你藏的這些石頭上安置他的寶座,張設他的華蓋。
11 Akoya kobundisa Ejipito mpe akoboma bato oyo basengeli kokufa, akomema na bowumbu ba-oyo basengeli kokende na bowumbu mpe akoboma na mopanga ba-oyo basengeli kokufa na mopanga.
他必來攻打埃及地,叫那該死的死,該擄的擄,該殺的殺;
12 Akotia moto kati na batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito, akotumba batempelo yango mpe akomema banzambe na bango ya bikeko na bowumbu. Akolongola bato ya Ejipito ndenge mobateli bibwele alongolaka basili na kazaka na ye, mpe akobima na kimia.
必來放火焚燒埃及的神廟,燒毀或擄走廟內的神像;必來收取埃及地,如同牧人收取自己的外衣;最後安然離去。
13 Kuna, kati na tempelo ya Eliopolisi, akobuka makonzi ya bule mpe akobebisa na moto batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito. › »
此外他還要粉碎埃及地太陽神廟的石柱,放火焚燒埃及的神廟。」