< Jeremi 42 >

1 Bongo, bakonzi nyonso ya basoda mpe Yoanani, mwana mobali ya Karea; Yezania, mwana mobali Oshaya, mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene, bapusanaki
Then all the commanders of the forces, along with Johanan son of Kareah, Jezaniah son of Hoshaiah, and all the people from the least to the greatest, approached
2 pene ya mosakoli Jeremi mpe balobaki na ye: — Tosengi na yo, tika ete libondeli na biso ekoma liboso na yo: « Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na biso bato oyo totikali; pamba te ndenge ozali komona yango, tozalaki ebele, kasi sik’oyo totikali kaka moke.
Jeremiah the prophet and said, “May our petition come before you; pray to the LORD your God on behalf of this entire remnant. For few of us remain of the many, as you can see with your own eyes.
3 Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpo ete ayebisa biso esika nini tosengeli kokende mpe makambo nini tosengeli kosala. »
Pray that the LORD your God will tell us the way we should walk and the thing we should do.”
4 Mosakoli Jeremi alobaki na bango: — Nayoki bino! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te.
“I have heard you,” replied Jeremiah the prophet. “I will surely pray to the LORD your God as you request, and I will tell you everything that the LORD answers; I will not withhold a word from you.”
5 Balobaki na Jeremi: — Tika ete Yawe azala motatoli ya solo mpe ya sembo mpo na kopesa biso etumbu soki toboyi kotosa makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mokumba ya koyebisa biso.
Then they said to Jeremiah, “May the LORD be a true and faithful witness against us if we do not act upon every word that the LORD your God sends you to tell us.
6 Ezala esepelisi biso to te, tokotosa kaka Yawe, Nzambe na biso, oyo topesi yo mokumba ya kotuna. Na bongo, makambo nyonso ekotambola malamu mpo na biso, pamba te tokotosa Yawe, Nzambe na biso.
Whether it is pleasant or unpleasant, we will obey the voice of the LORD our God to whom we are sending you, so that it may go well with us, for we will obey the voice of the LORD our God!”
7 Sima na mikolo zomi, Yawe alobaki na Jeremi;
After ten days the word of the LORD came to Jeremiah,
8 mpe Jeremi abengaki Yoanani, mwana mobali ya Karea; bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene.
and he summoned Johanan son of Kareah, all the commanders of the forces who were with him, and all the people from the least to the greatest.
9 Alobaki na bango: — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi, Ye oyo epai ya nani botindaki ngai mpo na kokomisa libondeli na bino:
Jeremiah told them, “Thus says the LORD, the God of Israel, to whom you sent me to present your petition:
10 « Soki botikali kati na mokili oyo, nakobikisa bino mpe nakobebisa bino te; nakolona bino mpe nakopikola bino te, pamba te etumbu ya pasi oyo natindeli bino esali Ngai pasi na motema.
‘If you will indeed stay in this land, then I will build you up and not tear you down; I will plant you and not uproot you, for I will relent of the disaster I have brought upon you.
11 Bobanga lisusu te mokonzi ya Babiloni, oyo bozali kobanga lelo; bobanga ye te, » elobi Yawe, « pamba te nazali elongo na bino mpo na kobikisa bino mpe mpo na kokangola bino na maboko na ye.
Do not be afraid of the king of Babylon, whom you now fear; do not be afraid of him, declares the LORD, for I am with you to save you and deliver you from him.
12 Nakotalisa bino ngolu mpo ete ayokela bino mawa mpe azongisa bino na mokili na bino. »
And I will show you compassion, and he will have compassion on you and restore you to your own land.’
13 Nzokande, soki bolobi: « Tokovanda na biso kati na mokili oyo te, » soki botosi te Yawe, Nzambe na bino,
But if you say, ‘We will not stay in this land,’ and you thus disobey the voice of the LORD your God,
14 mpe soki bolobi: « Te! Tokokende nde kovanda na Ejipito epai wapi tokomona lisusu bitumba te, tokoyoka lisusu lolaka ya kelelo te mpe tokokufa lisusu nzala te; »
and if you say, ‘No, but we will go to the land of Egypt and live there, where we will not see war or hear the sound of the ram’s horn or hunger for bread,’
15 wana bino batikali ya Yuda, boyoka malamu Liloba na Yawe: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Soki botingami kaka kokende na Ejipito mpe soki bokeyi kovanda kuna,
then hear the word of the LORD, O remnant of Judah! This is what the LORD of Hosts, the God of Israel, says: ‘If you are determined to go to Egypt and reside there,
16 mopanga oyo bozali kobanga ekokweyela bino kuna, na Ejipito; nzala oyo bozali kobanga ekolanda bino kuna, na Ejipito, mpe ezali kuna nde bokokufa.
then the sword you fear will overtake you there, and the famine you dread will follow on your heels into Egypt, and you will die there.
17 Solo, bato nyonso oyo bakotingama kokende kaka kovanda na Ejipito bakokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka; moko te kati na bango akotikala na bomoi mpe akobika na pasi oyo nakotindela bango. ›
So all who resolve to go to Egypt to reside there will die by sword and famine and plague. Not one of them will survive or escape the disaster I will bring upon them.’
18 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›
For this is what the LORD of Hosts, the God of Israel, says: ‘Just as My anger and wrath were poured out on the residents of Jerusalem, so will My wrath be poured out on you if you go to Egypt. You will become an object of cursing and horror, of vilification and disgrace, and you will never see this place again.’
19 Oh bino batikali ya Yuda, Yawe azali koloba na bino: ‹ Bokende na Ejipito te! › Bososola malamu likambo oyo: ngai nazali nde kokebisa bino lelo
The LORD has told you, O remnant of Judah, ‘Do not go to Egypt.’ Know for sure that I have warned you today!
20 ete bozali kosala libunga monene tango bozali kotinda ngai epai na Yawe, Nzambe na bino, na maloba oyo: ‹ Bondela mpo na biso Yawe, Nzambe na biso, mpe yebisa biso makambo nyonso oyo Yawe akoloba; tokosalela yango. ›
For you have deceived yourselves by sending me to the LORD your God, saying, ‘Pray to the LORD our God on our behalf, and as for all that the LORD our God says, tell it to us and we will do it.’
21 Na mokolo kaka ya lelo, nayebisi bino yango, kasi boboyi lisusu kotosa Yawe, Nzambe na bino, na nyonso oyo atindi ngai koyebisa bino.
For I have told you today, but you have not obeyed the voice of the LORD your God in all He has sent me to tell you.
22 Boye, boyeba sik’oyo malamu likambo oyo: bokokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka na esika oyo bolingi kokende mpo na kovanda. »
Now therefore, know for sure that by sword and famine and plague you will die in the place where you desire to go to reside.”

< Jeremi 42 >