< Jeremi 41 >

1 Na sanza ya sambo, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi mpe moko kati na bakengeli ya mokonzi, ayaki elongo na basoda zomi epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, na Mitsipa. Wana bazalaki kolia na Mitsipa,
But in the seuenth moneth came Ishmael the sonne of Nethaniah, the sonne of Elishama of the seede royall, and the princes of the King, and tenne men with him, vnto Gedaliah the sonne of Ahikam to Mizpah, and there they did eate bread together in Mizpah.
2 Isimaeli, mwana mobali ya Netania, elongo na basoda wana zomi oyo bazalaki elongo na ye babomaki na mopanga Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli kati na mokili.
Then arose Ishmael the sonne of Nethaniah with these tenne men that were with him, and smote Gedaliah the sonne of Ahikam the sonne of Shaphan with the sword, and slewe him, whom the King of Babel had made gouernour ouer the lande.
3 Isimaeli abomaki lisusu Bayuda oyo bazalaki elongo na Gedalia, na Mitsipa, elongo na basoda ya Babiloni oyo bazalaki wana.
Ishmael also slewe all the Iewes that were with Gedaliah at Mizpah, and all the Caldeans that were found there, and the men of warre.
4 Mokolo oyo elandaki kufa ya Gedalia, liboso ete sango eyebana epai ya bato,
Now the second day that he had slaine Gedaliah, and no man knewe it,
5 bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe.
There came men from Shechem, from Shiloh, and from Samaria, euen fourescore men, hauing their beardes shauen, and their clothes rent and cut, with offerings and incense in their hands to offer in the house of the Lord.
6 Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abimaki na Mitsipa mpo na kokende kokutana na bango; wana azalaki kokende kokutana na bango, azalaki kolela nzela-nzela. Bongo tango akutanaki na bango, alobaki na bango: — Boya kotala Gedalia, mwana mobali ya Ayikami!
And Ishmael the sonne of Nethaniah went forth from Mizpah to meete them, weeping as he went: and when he met them, he said vnto them, Come to Gedaliah the sonne of Ahikam.
7 Tango bakotaki kati na engumba, Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato oyo bazalaki elongo na ye babomaki bango mpe babwakaki bango na libulu.
And when they came into the middes of the citie, Ishmael the sonne of Nethaniah slewe them, and cast them into the middes of the pit, he and the men that were with him.
8 Kasi bato zomi kati na bango balobaki na Isimaeli: — Koboma biso te! Tozali na ble, na orje, na mafuta mpe na mafuta ya nzoyi, oyo tobombaki kati na bilanga. Boye, abomaki bango lisusu te, abikisaki bango elongo na bandeko na bango.
But tenne men were founde among them, that saide vnto Ishmael, Slay vs not: for we haue treasures in the fielde, of wheate, and of barley, and of oyle, and of honie: so he stayed, and slew them not among their brethren.
9 Libulu epai wapi Isimaeli abwakaki bato nyonso oyo abomaki ezalaki libulu ya Gedalia, libulu oyo mokonzi Asa asalaki mpo na komibatela liboso ya Baesha, mokonzi ya Isalaele. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, atondisaki yango na bibembe;
Now the pit wherein Ishmael had cast the dead bodies of the men (whom he had slayne because of Gedaliah) is it, which Asa the King had made because of Basha King of Israel, and Ishmael the sonne of Nethaniah filled it with them that were slaine.
10 bongo akomisaki bato nyonso oyo batikalaki na Mitsipa bawumbu: bana basi ya mokonzi mpe bato mosusu oyo batikalaki kuna na Mitsipa, oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atiaki na se ya bokonzi ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki bato oyo amemaki bango lokola bawumbu kati na mokili ya bato ya Amoni.
Then Ishmael caryed away captiue all the residue of the people that were in Mizpah, euen the Kings daughters, and all the people that remained in Mizpah, whom Nebuzar-adan the chiefe steward had committed to Gedaliah the sonne of Ahikam, and Ishmael the sonne of Nethaniah caried them away captiue, and departed to goe ouer to the Ammonites.
11 Tango Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye bayokaki sango ya makambo mabe oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, asalaki,
But when Iohanan the sonne of Kareah, and all the captaines of the hoste that were with him, heard of all the euill that Ishmael the sonne of Nethaniah had done,
12 basangisaki bato na bango nyonso mpe bakendeki kobundisa Isimaeli, mwana mobali ya Netania; bakutanaki na ye pene ya liziba monene ya Gabaoni.
Then they all tooke their men, and went to fight with Ishmael the sonne of Nethaniah, and founde him by ye great waters that are in Gibeon.
13 Tango bawumbu nyonso oyo Isimaeli akangaki bamonaki Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye, batondisamaki na esengo makasi;
Nowe when all the people whom Ishmael caryed away captiue, sawe Iohanan the sonne of Kareah, and all the captaines of the hoste, that were with him, they were glad.
14 mpe bato nyonso oyo Isimaeli amemaki lokola bawumbu, na Mitsipa, babalukaki mpe bakendeki kosangana na Yoanani, mwana mobali ya Karea.
So all the people, that Ishmael had caryed away captiue from Mizpah, returned and came againe, and went vnto Iohanan the sonne of Kareah.
15 Kasi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato mwambe oyo bazalaki elongo na ye babikaki na maboko ya Yoanani mpe bakimaki epai ya bato ya Amoni.
But Ishmael the sonne of Nethaniah, escaped from Iohanan with eight men, and went to the Ammonites.
16 Sima na yango, Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye bamemaki bato nyonso ya Mitsipa oyo babikaki, oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki na bowumbu wuta na Mitsipa sima na ye koboma Gedalia, mwana mobali ya Ayikami: basoda, basi, bana mpe bakalaka ya lokumu ya mokonzi; elingi koloba bato nyonso oyo azongisaki wuta na Gabaoni.
Then tooke Iohanan the sonne of Kareah, and all the captaines of the hoste that were with him, all the remnant of the people, whom Ishmael the sonne of Nethaniah had caried away captiue from Mizpah, (after that he had slaine Gedaliah the sonne of Ahikam) euen the strong men of warre, and the women, and the children, and the eunuches, whom hee had brought againe from Gibeon:
17 Bakobaki nzela na bango mpe batelemaki na molako ya Kimeami, pene ya Beteleemi, mpo ete bazalaki na posa ya kokende na Ejipito
And they departed and dwelt in Geruth Chimham, which is by Beth-lehem, to goe and to enter into Egypt,
18 mpo na kokima bato ya Babiloni, pamba te bazalaki kobanga bango; mpe mpo ete Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abomaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli ya mokili.
Because of the Caldeans: for they feared them, because Ishmael ye sonne of Nethaniah had slaine Gedaliah the sonne of Ahikam, whom the King of Babel made gouernour in the land.

< Jeremi 41 >