< Jeremi 40 >

1 Yawe alobaki na Jeremi tango Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abikisaki ye na Rama. Akutaki Jeremi bakanga ye na minyololo kati na molongo ya bakangami oyo bawutaki na Yelusalemi mpe na Yuda, oyo bazalaki komema na bowumbu kuna na Babiloni.
Реч која дође Јеремији од Господа кад га Невузардан заповедник стражарски пусти из Раме узевши га пошто беше окован у вериге међу свим робљем јерусалимским и Јудиним, које се вођаше у Вавилон.
2 Tango mokonzi ya bakengeli ya mokonzi amemaki Jeremi, alobaki na ye: — Yawe, Nzambe na yo, asilaki kokata ete pasi oyo ekokweya na esika oyo;
И узевши заповедник стражарски Јеремију рече му: Господ Бог твој изрече ово зло за ово место;
3 mpe sik’oyo akokisi yango, asali ndenge kaka akanaki kosala. Makambo oyo nyonso esalemi mpo ete bino, bato, bosalaki masumu liboso ya Yawe mpe batosaki Ye te.
И нанесе и учини како рече, јер згрешисте Господу и не слушасте глас Његов, зато вас снађе ово.
4 Kasi na mokolo ya lelo, nazali kokangola yo na minyololo oyo bakangaki yo na maboko. Soki olingi, yaka elongo na ngai na mokili ya Babiloni mpe nakobatela yo; kasi soki mpe oboyi, koya te. Tala, mokili mobimba ezali liboso na yo; kende esika nyonso olingi.
Али сада, ево, ја те опраштам данас верига што су ти на рукама; ако ти је воља поћи са мном у Вавилон, ходи, ја ћу се бринути за те; ако ли ти није воља поћи са мном у Вавилон, а ти немој; ево, сва ти је земља отворена, иди куда год хоћеш и куда ти је драго.
5 Lokola Jeremi azalaki kowumela kopesa eyano, Nebuzaradani abakisaki: — Zonga epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisi moyangeli ya bingumba ya Yuda, mpe vanda epai na ye kati na bato na yo to kende esika nyonso olingi. Bongo mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki ye bilei mpe bakado, mpe atikaki ye kokende.
Или кад се он још не враћа, отиди к њему, Годолији сину Ахикама, сина Сафановог, ког је поставио цар вавилонски над градовима Јудиним, и остани с њим међу народом, или иди куда ти је драго. И даде му заповедник стражарски брашњенице и дар, и отпусти га.
6 Jeremi akendeki na Mitsipa epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mpe avandaki esika moko na ye kati na bato oyo batikalaki kati na mokili.
И тако дође Јеремија ка Годолији, сину Ахикамовом у Миспу, и оста с њим у народу, који још оста у земљи.
7 Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango, oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka, bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, moyangeli kati na mokili mpe apesi ye mokumba ya kokamba babola, mibali, basi mpe bana oyo bakendeki te na bowumbu na Babiloni,
А све војводе што беху у пољу и људи њихови кад чуше да је цар вавилонски поставио Годолију, сина Ахикамовог, над земљом, и да је на њему оставио људе и жене и децу између сиромашног народа у земљи, који не би одведен у Вавилон,
8 bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango: Isimaeli, mwana mobali ya Netania; Yoanani mpe Jonatan, bana mibali ya Karea; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti; bana mibali ya Efayi, moto ya Netofa; mpe Yezania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati; bakendeki kuna elongo na basoda na bango.
Дођоше у Миспу ка Годолији Исмаило син Нетанијин и Јоанан и Јонатан синови Каријини, и Сераја син Тануметов и синови Јофије Нетофаћанина, и Језанија син неког Махаћанина, они и људи њихови.
9 Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo: « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu.
И закле се Годолија син Ахикама сина Сафановог њима и људима њиховим говорећи: Не бојте се службе Халдејцима; останите у земљи, и служите цару вавилонском, и добро ће вам бити.
10 Ngai, nakotikala na Mitsipa mpo na kolobela bino liboso ya bato ya Babiloni, oyo bazali koya epai na biso. Kasi bino, bobuka bambuma ya vino, bambuma mosusu, bokamola mafuta mpe bobomba yango na bibombelo na bino, bongo bovanda kati na bingumba oyo bosili kozwa. »
А ја ево ћу стајати у Миспи да дочекујем Халдејце који ће долазити к нама; а ви берите винограде и воће и уље, и остављајте у судове своје, и стојте у градовима својим које држите.
11 Tango Bayuda nyonso oyo bakimelaki na mokili ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi mpe na mikili mosusu bayokaki ete mokonzi ya Babiloni atikaki ndambo ya bato kati na Yuda mpe akomisaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, moyangeli na bango,
Тако и сви Јудејци, који беху међу Моавцима и синовима Амоновим и Едомцима и по свим земљама, чувши да је цар вавилонски оставио остатак у Јудеји и поставио над њима Годолију сина Ахикама сина Сафановог,
12 bango nyonso balongwaki na mikili nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana mpe bazongaki kati na Yuda, epai ya Gedalia, kuna na Mitsipa, mpe babukaki bambuma ya vino mpe bambuma mosusu ebele.
Вратише се сви Јудејци из свих места куда беху разагнани, и дођоше у земљу Јудину ка Годолији у Миспу, и набраше вина и воћа врло много.
13 Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka bayaki na Mitsipa epai ya Gedalia
А Јоанан, син Каријин и све војводе што беху у пољу дођоше ка Годолији у Миспу,
14 mpe balobaki na ye: — Oyebi te ete Balisi, mokonzi ya bato ya Amoni, atindi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpo na koboma yo? Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, andimelaki bango te.
И рекоше му: Знаш ли да је Валис цар синова Амонових послао Исмаила сина Нетанијиног да те убије? Али им не поверова Годолија, син Ахикамов.
15 Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, ayebisaki Gedalia na nkuku, na Mitsipa: — Pesa ngai nzela ete nakende koboma Isimaeli, mwana mobali ya Netania! Moto moko te akoyeba yango. Mpo na nini aboma yo? Mpo na nini Bato nyonso ya Yuda, oyo bazali pene na yo bapanzana mpe ndambo oyo bakotikala bakufa?
Тада Јоанан, син Каријин, рече Годолији насамо у Миспи говорећи: Идем да убијем Исмаила сина Нетанијиног, нико неће дознати. Зашто да те убије и да се расеју сви Јудејци који су се скупили око тебе и да пропадне остатак Јудин?
16 Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, alobaki na Yoanani, mwana mobali ya Karea: — Kosala bongo te! Makambo oyo ozali koloba mpo na Isimaeli ezali makambo ya lokuta.
Али Годолија, син Ахикамов, рече Јоанану сину Каријином: Немој то чинити, јер није истина шта кажеш за Исмаила.

< Jeremi 40 >