< Jeremi 4 >

1 « Oh Isalaele, soki okozonga, zonga epai na Ngai, » elobi Yawe, « soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai;
خداوند می‌فرماید: «ای اسرائیل، اگر نزد من بازگردی و دست از بت‌پرستی برداری و به من وفادار بمانی،
2 soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo: ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »
اگر تنها مرا خدای خود بدانی و با انصاف و راستی و درستی زندگی کنی، آنگاه همهٔ قومهای جهان با دیدن تو به سوی من خواهند آمد و از من برکت یافته، به من افتخار خواهند نمود.»
3 Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi: « Bokata bilanga ya sika, mpe botika kolona kati na banzube.
خداوند به اهالی یهودا و اورشلیم چنین می‌فرماید: «زمینِ سختِ دلتان را شخم بزنید، و تخم خوب را در میان خارها نکارید.
4 Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.
ای مردان یهودا و ساکنان اورشلیم، دلهایتان را برای خداوند ختنه کنید، و گرنه آتش خشم من شما را به سبب تمام گناهانتان خواهد سوزاند و کسی نخواهد توانست آن را خاموش کند.
5 Bopanza sango na mokili ya Yuda, botatola na Yelusalemi mpe boloba: ‹ Bobeta kelelo na mokili! › Boganga makasi mpe bobelela: ‹ Bosangana, bino nyonso! Tokima na bingumba batonga makasi! ›
«شیپورها را در تمام سرزمین یهودا به صدا درآورید! با صدای بلند فریاد برآورید و به اهالی یهودا و اورشلیم اعلام کرده، بگویید که به شهرهای امن و حصاردار پناه ببرند!
6 Botombola bendele mpo na kokende na Siona! Bobombama noki, pamba te nakoyeisa pasi wuta na nor mpe kobebisama ya somo! »
راه اورشلیم را با علامت مشخص کنید! فرار کنید و درنگ ننمایید! چون من بلا و ویرانی مهلکی از سوی شمال بر شما نازل خواهم کرد.
7 Nkosi moko ebimi na ndako na yango; mobebisi moko ya bikolo abimi. Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo. Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te.
نابود کنندهٔ قومها مانند شیری از مخفیگاه خود بیرون آمده، به سوی سرزمین شما در حرکت است! شهرهایتان خراب و خالی از سکنه خواهد شد.
8 Yango wana, bolata bilamba ya basaki, bosala matanga mpe bolela, pamba te kanda makasi ya Yawe elongwe na mito na biso te.
پس لباس ماتم بپوشید و گریه و زاری کنید، زیرا شدت خشم خداوند هنوز کاهش نیافته است.
9 « Na mokolo wana, » elobi Yawe, « mokonzi mpe bakalaka na ye bakolemba nzoto, Banganga-Nzambe bakoyoka somo mpe basakoli bakokamwa. »
در آن روز، دل پادشاه و بزرگان از ترس فرو ریخته، کاهنان متحیر و انبیا پریشان خواهند شد.»
10 Bongo nalobaki: « Oh Nkolo Yawe, tala ndenge okosaki bato oyo mpe Yelusalemi tango olobaki: ‹ Bokozala na kimia! › Nzokande mopanga ezalaki kozela biso. »
(خداوندا، مردم از آنچه تو گفتی فریب خورده‌اند! چون تو به اهالی اورشلیم وعدهٔ آرامش و سلامتی دادی، حال آنکه اکنون شمشیر بر گلوی ایشان قرار گرفته است!)
11 Na tango wana, bakoloba na bato oyo mpe na Yelusalemi: « Wuta likolo ya bangomba oyo ezali kati na esobe, mopepe moko ya makasi ezali koya epai ya bato na ngai; ezali koya te mpo na koyungola to mpo na kopetola.
در آن زمان خداوند از بیابان، بادی سوزان بر ایشان خواهد فرستاد نه بادی ملایم برای زدودن خاشاک خرمن، بلکه طوفانی شدید. به این ترتیب خداوند هلاکت قوم خود را اعلام می‌کند.
12 Ezali mopepe moko ya makasi penza, pamba te ewuti epai na ngai. Sik’oyo, ngai moko nde nazali kosambisa bango. »
13 Tala! Monguna azali koya na elulu lokola mapata, bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi; mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu. Mawa na biso! Tokufi na biso!
نگاه کن! دشمن مانند ابر به سوی ما می‌آید؛ ارابه‌های او همچون گردبادند و اسبانش از عقاب تیزروتر. وای بر ما، چون غارت شده‌ایم!
14 Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe?
ای اهالی اورشلیم دلهای خود را از شرارت پاک کنید تا نجات یابید! تا به کی می‌خواهید افکار ناپاک را در دلتان نگاه دارید؟
15 Mongongo moko ezali koyokana wuta na Dani, ezali kopanza sango ya pasi na bangomba ya Efrayimi.
قاصدان از شهر دان تا کوهستان افرایم، همه جا مصیبت شما را اعلام می‌کنند.
16 « Boloba yango na bikolo mpe botatola yango na Yelusalemi: ‹ Wuta na mboka mosika, mampinga ya banguna ezali koya, ezali koya na lokito mpo na kobundisa bingumba ya Yuda.
آنها می‌آیند تا به قومها هشدار دهند و به اورشلیم بگویند که دشمن از سرزمین دور می‌آید و علیه شهرهای یهودا غریو جنگ برمی‌آورد.
17 Ezingeli Yelusalemi lokola bakengeli bilanga, pamba te etombokelaki Ngai, › » elobi Yawe.
خداوند می‌فرماید: «همان‌گونه که کشاورزان، مزرعه‌ای را احاطه می‌کنند، دشمن هم شهر اورشلیم را محاصره خواهد کرد، زیرا قوم من بر ضد من شورش کرده‌اند.
18 « Etamboli mpe misala na yo moko nde ememelaki yo yango. Tala, etumbu na yo ezali bololo mpe ekosala pasi makasi na motema. »
ای یهودا، این بلایا نتیجهٔ رفتار و کارهای خود تو است؛ مجازات تو بسیار تلخ است و همچون شمشیری در قلبت فرو رفته است.»
19 Ah ngai eh! Ah motema pasi eh! Ah! Motema na ngai ezali kobeta makasi, ezali koswa makasi kati na ngai, mpe nazali kokoka kokanga monoko te, pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.
دردی طاقت‌فرسا وجودم را فرا گرفته و دلم بی‌تاب شده است! دیگر نمی‌توانم ساکت و آرام بمانم، چون صدای شیپور دشمن و فریاد جنگ در گوشم طنین افکنده است.
20 Sango moko kaka ezali kotambola: libebi na libebi; mokili mobimba ekufi. Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi, mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko.
خرابی از پی خرابی فرا می‌رسد تا سرزمین ما را به کلی ویران کند. ناگهان، در یک چشم به هم زدن، تمام خیمه‌ها غارت می‌شوند و خانه‌ها به ویرانه تبدیل می‌گردند.
21 Kino tango nini nakomona bendele ya bitumba, mpe nakoyoka makelele ya bitumba?
این وضع تا به کی طول می‌کشد؟ تا به کی باید خروش جنگ و صدای شیپور جنگ را بشنوم؟
22 « Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »
خداوند در جواب می‌فرماید: «تا وقتی که قوم من در حماقتشان بمانند! چون ایشان نمی‌خواهند مرا بشناسند. آنها مثل بچه‌های نادان و احمقند؛ برای بدی کردن بسیار استادند، ولی در خوبی کردن هیچ استعدادی ندارند.»
23 Tango natalaki mabele, namonaki ete ezalaki kaka bongo-bongo mpe ezalaki ata na eloko moko te; tango natalaki likolo, namonaki ete pole ezalaki lisusu te.
به زمین نظر انداختم؛ همه جا ویران بود! به آسمان نگاه کردم؛ آن هم تیره و تار بود!
24 Tango natalaki bangomba, namonaki yango koningana, bangomba nyonso ya mike ezalaki kobukana.
به کوهها نظر کردم؛ به خود می‌لرزیدند و تپه‌ها از جا کنده می‌شدند.
25 Mpe tango natalaki malamu, namonaki lisusu ata moto moko te, mpe bandeke nyonso ya likolo ekimaki.
نگاه کردم و دیدم نه آدمی بود و نه پرنده‌ای؛ همه گریخته بودند.
26 Tango nakobaki kotala, namonaki ete mokili oyo ezalaki na mabele ya malamu ekomaki esobe; bingumba na yango nyonso ebebisamaki liboso ya Yawe, na kanda makasi na Ye.
بوستان، بیابان گردیده و تمام شهرها از حضور خداوند و شدت خشم او خراب شده بودند.
27 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mokili mobimba ekobebisama, kasi nakobebisa yango nyonso te.
خداوند دستور ویرانی سرزمین یهودا را صادر کرده است. با این همه، خداوند می‌فرماید: «این سرزمین به کلی ویران نخواهد شد و گروه کوچکی باقی خواهد ماند.
28 Yango wana, mokili ekozala na matanga; mpe kuna na lola, likolo ekokoma mwindo pamba te nalobaki yango, mpe nakobongola maloba na Ngai te; lokola nazwaki mokano, nakozonga lisusu sima te. »
به سبب فرمانی که بر ضد قومم صادر کرده‌ام، تمام مردم دنیا عزا خواهند گرفت و آسمانها سیاه خواهند شد. ولی من ارادهٔ خود را اعلام کرده‌ام و آن را تغییر نخواهم داد؛ تصمیم خود را گرفته‌ام و از آن برنخواهم گشت.»
29 Bato nyonso ya engumba bakimi, kaka na makelele ya basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpe oyo babundaka na matolotolo. Bamoko babombami na bazamba, bamosusu bakimi na madusu ya mabanga ya bangomba; bingumba nyonso etikali lisusu na bato te, mpe ata moto moko te atikali kuna.
اهالی شهرها از صدای نزدیک شدن سواران و کمانداران فرار خواهند کرد. عده‌ای در بیشه‌ها پنهان خواهند شد و برخی به کوهها خواهند گریخت. شهرها از سکنه خالی شده، مردم از ترس فرار خواهند کرد.
30 Oh engumba ekufa, ozali kosala nini? Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo; otie bonzenga na miso na yo. Ozali komikomisa kitoko na pamba, bamakangu na yo bazali kotiola yo mpe bazali koluka koboma yo.
ای که غارت شده‌ای چرا دیگر لباس فاخر می‌پوشی و خود را با جواهرات می‌آرایی و به چشمانت سرمه می‌کشی؟ از این تلاش‌ها هیچ سودی نمی‌بری، چون عاشقانت از تو برگشته و قصد جانت را دارند.
31 Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso: ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba: « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »
فریادی به گوشم رسید مانند نالهٔ زنی که برای اولین بار می‌زاید. این آه و نالهٔ قوم من است که زیر پای دشمنان خود، از نفس افتاده و دست التماس دراز کرده است!

< Jeremi 4 >