< Jeremi 37 >

1 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akomisaki Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda na esika ya Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi.
And king Zedekiah the son of Josiah reigned instead of Coniah the son of Jehoiakim, Nebuchadrezzar king of Babylon having made him king in the land of Judah.
2 Ezala ye, bakalaka na ye ya lokumu mpe bato ya mokili, moko te ayokaki na bokebi maloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi.
And neither he, nor his servants, nor the people of the land, hearkened unto the words of Jehovah, which he had spoken through the prophet Jeremiah.
3 Mokonzi Sedesiasi atindaki Yewukali, mwana mobali ya Shelemia, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, epai ya mosakoli Jeremi mpo ete bayebisa ye maloba oyo: « Nabondeli yo, bondela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso! »
And Zedekiah the king sent Jehucal the son of Shelemiah, and Zephaniah the son of Maaseiah the priest to the prophet Jeremiah, saying, Pray now unto Jehovah our God for us.
4 Na tango wana, Jeremi azalaki na bonsomi ya kotambola na esika oyo alingi kati na bato, pamba te batiaki ye nanu na boloko te.
And Jeremiah came in and went out among the people; for they had not put him into prison.
5 Tango basoda ya Babiloni, oyo bazingelaki engumba Yelusalemi bayokaki sango ete basoda ya Faraon babimi na Ejipito, batikaki kozingela Yelusalemi.
And Pharaoh's army was come forth out of Egypt; and when the Chaldeans that besieged Jerusalem heard tidings of them, they went up from Jerusalem.
6 Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi:
And the word of Jehovah came unto Jeremiah the prophet, saying,
7 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai: ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito;
Thus saith Jehovah the God of Israel: Thus shall ye say to the king of Judah, that sent you unto me to inquire of me: Behold, Pharaoh's army, which is come forth to help you, shall return to Egypt into their own land.
8 mpe basoda ya Babiloni bakozonga mpe bakobundisa engumba oyo; bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. ›
And the Chaldeans shall come again, and fight against this city, and take it, and burn it with fire.
9 Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Bokanisa te ete bato ya Babiloni bakolongwa na mokili na bino. Te! Bakolongwa te. ›
Thus saith Jehovah: Deceive not yourselves, saying, The Chaldeans are certainly gone away from us; for they are not gone.
10 Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. »
For though ye had smitten the whole army of the Chaldeans that fight against you, and there remained [but] wounded men among them, [yet] should they rise up every man in his tent, and burn this city with fire.
11 Sima na basoda ya Babiloni kotika kozingela Yelusalemi likolo ya basoda ya Faraon, oyo bazalaki kopusana,
And it came to pass when the army of the Chaldeans was gone up from Jerusalem because of Pharaoh's army,
12 Jeremi alingaki kobima na Yelusalemi mpo ete akende kozwa, kati na etuka ya Benjame, libula na ye ya mabele kati na bato ya kuna.
that Jeremiah went forth out of Jerusalem to go into the land of Benjamin, to have his portion there among the people.
13 Kasi tango akomaki na Ekuke ya Benjame, mokambi ya bakengeli ya mokonzi, oyo kombo na ye ezalaki Iriya, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Anania, akangaki mosakoli Jeremi mpe atunaki ye: — Boni, ozali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni?
And when he was in the gate of Benjamin, a captain of the guard was there whose name was Irijah, the son of Shelemiah, the son of Hananiah; and he laid hold on the prophet Jeremiah, saying, Thou art deserting to the Chaldeans.
14 Jeremi azongisaki: — Te! Ezali lokuta, nazali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni te! Kasi Iriya aboyaki koyoka ye, akangaki ye kaka mpe amemaki ye epai ya bakambi.
And Jeremiah said, It is false: I am not deserting to the Chaldeans. But he hearkened not to him; and Irijah laid hold on Jeremiah, and brought him to the princes.
15 Bakambi batombokelaki Jeremi makasi, babetaki ye mpe batiaki ye na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, ndako oyo bakomisaki boloko.
And the princes were wroth with Jeremiah, and smote him, and put him in the place of confinement in the house of Jonathan the scribe: for they had made that the prison.
16 Babwakaki Jeremi kati na boloko ya se ya mabele epai wapi awumelaki tango molayi.
When Jeremiah was come into the dungeon and into the vaults, and Jeremiah had remained there many days,
17 Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku: — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe? Jeremi azongisaki: — Solo, liloba ezali! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.
king Zedekiah sent and took him out. And the king asked of him secretly in his house, and said, Is there any word from Jehovah? And Jeremiah said, There is; and he said, Thou shalt be given into the hand of the king of Babylon.
18 Bongo Jeremi alobaki lisusu na mokonzi Sedesiasi: — Mabe nini penza ngai nasali yo to bakalaka na yo to mpe bato na yo mpo ete bobwaka ngai kati na boloko oyo?
And Jeremiah said unto king Zedekiah, What have I offended against thee, or against thy servants, or against this people, that ye have put me in the prison?
19 Wapi basakoli na bino oyo bazalaki koloba ete mokonzi ya Babiloni akoya te kobundisa bino mpe mokili na bino?
And where are your prophets that prophesied unto you, saying, The king of Babylon shall not come against you, nor against this land?
20 Kasi sik’oyo mokonzi, nkolo na ngai, nabondeli yo: yoka ngai! Tika ete mabondeli na ngai ekoma liboso na yo: kozongisa ngai te kati na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, noki te nakokufa kuna!
And now hear, I pray thee, my lord, O king: let my supplication, I pray thee, come before thee; and cause me not to return into the house of Jonathan the scribe, lest I die there.
21 Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.
Then Zedekiah the king commanded, and they committed Jeremiah into the court of the guard, and they gave him daily a loaf of bread out of the bakers' street, until all the bread in the city was spent. And Jeremiah abode in the court of the guard.

< Jeremi 37 >