< Jeremi 36 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda:
This message from the Lord came to Jeremiah in the fourth year of the reign of Jehoiakim son of Josiah king of Judah:
2 « Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.
Get a scroll and write down everything I've told you condemning Israel, Judah, and all the other nations, from the time I first spoke to you during the reign of Josiah right up till now.
3 Tango mosusu, soki bato ya Yuda bayoki sango ya pasi nyonso oyo nabongisi mpo na kotindela bango, moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe; mpe, na bongo, Ngai nakolimbisa mabe mpe masumu na bango. »
Maybe when the people of Judah hear about all the disasters I plan to bring down on them, everyone will stop their evil ways. Then I will forgive their guilt and sin.
4 Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda.
So Jeremiah called Baruch son of Neriah to come, and while Jeremiah dictated, Baruch wrote down on a scroll everything that the Lord had told Jeremiah.
5 Jeremi alobaki na Baruki: « Ngai nakangami, nakolonga kokende na Tempelo ya Yawe te.
Then Jeremiah gave Baruch these instructions: “I'm a prisoner here so I can't go into the Lord's Temple.
6 Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango.
So you have to go to the Lord's Temple on a day when people are fasting, and read to them the Lord's messages from the scroll I dictated to you. Read them to all the people of Judah who come in from their towns.
7 Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. »
Maybe they will come and ask the Lord for forgiveness, and all of them will stop their evil ways, for the Lord is threatening terrible anger against them.”
8 Baruki, mwana mobali ya Neriya, asalaki makambo nyonso oyo mosakoli Jeremi atindaki ye kosala; atangaki na Tempelo ya Yawe maloba ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda.
Baruch son of Neriah did exactly what Jeremiah the prophet had told him to do. He went and read the Lord's message from the scroll in the Temple.
9 Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda.
This is how it happened. A fast to honor the Lord was declared involving all the people of Jerusalem and everyone who had come there from the towns of Judah. This was in the ninth month of the fifth year of the reign of Jehoiakim son of Josiah king of Judah.
10 Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.
Baruch read from the scroll what Jeremiah had dictated so that everyone could hear. He read it from the room of Gemariah son of Shaphan the scribe. This was in the upper Temple courtyard at the New Gate entrance.
11 Tango Mishe, mwana, mobali ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani, ayokaki maloba nyonso ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda,
When Micaiah son of Gemariah, son of Shaphan, heard all the Lord's messages read from the scroll,
12 akendeki na ndako ya mokonzi, akotaki kati na ndako ya mosala ya mokomi mikanda epai wapi bakalaka nyonso bazalaki na mayangani: Elishama, mokomi mikanda; Delaya, mwana mobali ya Shemaya; Elinatani, mwana mobali ya Akibori; Gemaria, mwana mobali ya Shafani; Sedesiasi, mwana mobali ya Anania; mpe bakalaka nyonso mosusu.
he went down to the royal secretary's room in the king's palace, where all the officials had gathered. Elishama the secretary, Delaiah son of Shemaiah, Elnathan son of Achbor, Gemariah son of Shaphan, Zedekiah son of Hananiah, and all the other officials were there.
13 Sima na Mishe koyebisa bango makambo nyonso oyo ayokaki epai ya Baruki tango azalaki kotangela bato makomi oyo ezalaki kati na mokanda,
Micaiah gave them a report of everything he'd heard Baruch read from the scroll to the people.
14 bakambi nyonso batindaki Yewudi, mwana mobali ya Netania, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Kushi, epai ya Baruki mpo na koyebisa ye: « Yaka yo moko elongo na mokanda oyo atangelaki bato. » Baruki, mwana mobali ya Neriya, akendeki epai na bango mpe amemaki mokanda na maboko na ye.
The officials sent Jehudi son of Nethaniah, son of Shelemiah, son of Cushi, to summon Baruch, telling him, “Bring the scroll that you read to the people, and come here.” So Baruch went to see them taking the scroll with him.
15 Balobaki na ye: — Tobondeli yo, vanda, tangela biso mokanda oyo. Baruki atangelaki bango mokanda yango.
“Please sit down and read it to us,” they said. So Baruch read it to them.
16 Tango bayokaki maloba wana nyonso, bakomaki kotalana bango na bango na somo mpe balobaki na Baruki: — Tosengeli penza koyebisa makambo oyo nyonso epai ya mokonzi.
After they'd heard everything, they were frightened and looked at each other. They said to Baruch, “We've got to tell the king about all this.”
17 Batunaki Baruki: — Yebisa biso ndenge nini osalaki mpo na kokoma makambo oyo nyonso. Ezali Jeremi te moto ayebisi yo makambo oyo?
Then they asked Baruch, “Now tell us, how did you come to write all this? Did Jeremiah dictate it to you?”
18 Baruki azongisaki: — Solo, ezali ye moto ayebisaki ngai makambo oyo nyonso, mpe ngai nasalelaki kaka ekomeli mpo na kotia yango na mokanda.
“Yes, he dictated it,” Baruch replied. “I wrote down in ink on the scroll everything he told me.”
19 Bakambi bayebisaki Baruki: — Yo mpe Jeremi, bokende kobombama. Mpe tika ete moto moko te ayeba esika bokozala.
The officials told Baruch, “You and Jeremiah are going to have to hide. Don't tell anyone where you are.”
20 Sima na bango kotia mokanda yango kati na ndako ya mosala ya Elishama, mokomi mikanda, bakendeki epai ya mokonzi kati na lopango mpe bayebisaki ye makambo nyonso.
Then the officials went to see the king in the courtyard. They had kept the scroll safe in Elishama the secretary's room while they gave a full report to the king.
21 Mokonzi atindaki Yewudi mpo ete akende kozwa mokanda yango, mpe Yewudi akendeki kozwa yango na ndako ya mosala ya mokomi mikanda Elishama mpe atangaki yango liboso ya mokonzi mpe ya bakalaka nyonso oyo batelemaki pene na ye.
The king sent Jehudi to fetch the scroll. He went and got it from Elishama the secretary's room. Then Jehudi read it to the king and all the officials who were there standing next to him.
22 Ezalaki na sanza ya libwa; mokonzi avandaki kati na shambre oyo bakimelaka na tango ya malili mpe azalaki koyetola moto oyo ezalaki kopela liboso na ye.
It was the ninth month and the king was sitting in front of a fire in his winter quarters.
23 Soki Yewudi atangi milongo misato to minei ya makomi ya mokanda, mokonzi azalaki kokata yango na mbeli ya mokomi mikanda mpe kobwaka yango na moto, kino tango mokanda nyonso esilaki kozika na moto.
Whenever Jehudi finished reading three or four columns, Jehoiakim would chop them off with a scribe's knife and toss them into the fire. Eventually the whole scroll was completely burned up.
24 Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.
Despite hearing all these messages, the king and his attendants weren't frightened and didn't tear their clothes in remorse.
25 Atako Elinatani, Delaya mpe Gemaria bazalaki kobondela mokonzi ete atumba mokanda yango te, atikalaki koyokela bango te.
Even when Elnathan, Delaiah, and Gemariah pleaded with the king not to burn the scroll, he refused to listen to them.
26 Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.
In fact the king ordered Jerahmeel, one of the princes, as well as Seraiah son of Azriel and Shelemiah son of Abdeel, to go and arrest Baruch and Jeremiah. But the Lord hid them.
27 Tango mokonzi asilisaki kotumba mokanda oyo ezalaki na maloba oyo Baruki akomaki na etinda ya Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi:
After the king burned the scroll Jeremiah had dictated to Baruch, a message from the Lord came to Jeremiah:
28 — Kamata mokanda mosusu mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo ezalaki na mokanda ya liboso oyo mokonzi Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki.
Get another scroll and write everything out that was on the first scroll that Jehoiakim king of Judah burned.
29 Loba lisusu na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Ezali yo nde moto otumbaki mokanda wana mpe olobaki: ‹ Mpo na nini okomaki ete mokonzi ya Babiloni akoya kobebisa mokili oyo mpe koboma ezala bato to banyama? ›
Regarding Jehoiakim king of Judah announce that this is what the Lord says: You have burned the scroll and asked, “Why did you write that the king of Babylon is going to come and destroy this country and kill all its people and animals?”
30 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda: Ekozala na mokitani na ye moko te oyo akokitana na ye na kiti ya bokonzi ya Davidi; ebembe na ye ekobwakama na libanda, mpe bakotanda yango na molunge ya moyi mpe na malili ya butu.
So this is what the Lord says about Jehoiakim king of Judah: He won't have anyone to succeed him as king, sitting on David's throne. His body will be thrown out to lie in the heat of the day and the cold of the night.
31 Nakopesa ye, bana na ye mpe basali na ye nyonso etumbu mpo na mabe na bango; nakotindela bango elongo na bavandi ya Yelusalemi mpe ya Yuda, pasi nyonso oyo nalakaki bango, mpo ete bayokaki Ngai te. »
I'm going to punish him and his descendants and officials for their sins. I will bring down on them and on the people living in Jerusalem and Judah, all the disasters I warned them about but they refused to listen.
32 Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati.
Jeremiah got another scroll and gave it to Baruch. Jeremiah dictated everything that was in the scroll that Jehoiakim had burned in the fire and Barcuh wrote it down. Even more messages of a similar kind were added.