< Jeremi 35 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, azalaki mokonzi:
Yahuda Kralı Yoşiya oğlu Yehoyakim döneminde RAB Yeremya'ya şöyle seslendi:
2 « Kende epai ya bato ya libota ya Rekabi mpe bengisa bango ete baya kokota kati na moko ya bashambre ya Tempelo ya Yawe. Mpe pesa bango masanga ya vino ya komela kuna. »
“Rekavlılar'ın evine gidip onlarla konuş. Onları RAB'bin Tapınağı'nın odalarından birine götürüp şarap içir.”
3 Boye, nakendeki kokutana na Yazania, mwana mobali ya Jeremi, mwana mobali ya Abatsinia, mpe bandeko na ye ya mibali elongo na bana na bango nyonso ya mibali: libota mobimba ya bato ya libota ya Rekabi.
Bunun üzerine Havassinya oğlu Yirmeya oğlu Yaazanya'yı, kardeşlerini, bütün çocuklarını ve Rekav ailesinin öbür üyelerini yanıma alıp
4 Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke.
Tanrı adamı Yigdalya oğlu Hanan'ın oğullarının RAB'bin Tapınağı'ndaki odasına götürdüm. Bu oda önderlerin odasının bitişiğinde, kapı görevlisi Şallum oğlu Maaseya'nın odasının üstündeydi.
5 Natiaki biloko etonda na vino mpe ndambo ya bakopo liboso ya bato ya libota ya Rekabi; mpe nalobaki na bango: — Bomela masanga ya vino.
Rekav ailesinin üyelerinin önüne şarap dolu testiler, kâseler koyarak, “Buyrun, şarap için” dedim.
6 Kasi bazongisaki: — Tomelaka masanga ya vino te, mpo ete koko na biso, Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki biso mobeko oyo: « Bokoki komela masanga ya vino te, ezala bino to bakitani na bino,
Ne var ki, “Biz şarap içmeyiz” diye karşılık verdiler, “Çünkü atamız Rekav oğlu Yehonadav bize şu buyruğu verdi: ‘Siz de soyunuzdan gelenler de asla şarap içmeyeceksiniz!
7 mpe bokoki kotonga bandako te, kosala bilanga te, kolona banzete ya vino te mpe bokoki kozala na biloko wana te; kasi bosengeli kaka kovanda tango nyonso na bandako ya kapo, mpo ete bozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bozali baleki nzela. »
Ayrıca ev yapmayacak, tohum ekmeyecek, bağ dikmeyeceksiniz. Böyle şeyler edinmeyecek, ömür boyu çadırlarda yaşayacaksınız. Öyle ki, göç ettiğiniz topraklarda uzun süre yaşayasınız.’
8 Totosaka makambo nyonso oyo koko na biso Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, ayebisa biso: Ezala biso, basi na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, tomelaka masanga ya vino te,
Atamız Rekav oğlu Yehonadav'ın bize buyurduğu her şeyi yaptık. Kendimiz de karılarımız, oğullarımız, kızlarımız da hiç şarap içmedik.
9 totongaka bandako te mpo na kovanda kuna, tozalaka na bilanga ya vino te, bilanga te mpe milona te;
İçinde oturmak için evler yapmadık, bağlar, tarlalar, ekinler edinmedik.
10 tovandaka kaka na bandako ya kapo mpe totosaka makambo nyonso oyo koko na biso, Yonadabi, ayebisa biso.
Çadırlarda yaşadık; atamız Yehonadav ne buyurduysa hepsini yaptık.
11 Kasi tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abotolaki mokili oyo, tolobaki: « Boya, tokende na Yelusalemi mpo ete tobikisa bomoi na biso liboso ya basoda ya Babiloni mpe ya Siri. » Yango wana, toyaki kovanda na Yelusalemi.
Ama Babil Kralı Nebukadnessar bu ülkeye saldırınca, ‘Haydi, Kildan ve Aram ordusundan kaçmak için Yeruşalim'e gidelim’ dedik. Bunun için Yeruşalim'de kaldık.”
12 Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
Bundan sonra RAB Yeremya'ya şöyle seslendi:
13 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Kende koyebisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi: « Bokoki solo kozwa liteya te mpe kotosa maloba na Ngai te, » elobi Yawe?
“İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB şöyle diyor: ‘Git, Yahuda halkına ve Yeruşalim'de yaşayanlara şunları söyle: Sözlerimi dinleyerek hiç ders almayacak mısınız, diyor RAB.
14 « Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki mobeko epai ya bana na ye ete bamela masanga ya vino te, mpe babatelaka mobeko yango. Kino na mokolo ya lelo, bamelaka masanga ya vino te mpo na kotosa mobeko oyo koko na bango apesaki bango. Nzokande, tango na tango, Ngai nazalaki koloba na bino, kasi bozalaki koyoka Ngai te.
Rekav oğlu Yehonadav, soyuna şarap içmemelerini buyurdu; buyruğuna uyuldu. Bugüne dek şarap içmediler. Çünkü atalarının buyruğuna uydular. Bense size defalarca seslendiğim halde beni dinlemediniz.
15 Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino: ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.
Defalarca size kullarım peygamberleri gönderdim. Kötü yolunuzdan dönmeniz, davranışlarınızı düzeltmeniz, başka ilahların ardınca gidip onlara tapınmamanız için hepinizi uyardılar. Ancak o zaman size ve atalarınıza verdiğim toprakta yaşayacaksınız. Ama kulak verip beni dinlemediniz.
16 Bakitani ya Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, babatelaki mobeko oyo koko na bango apesa bango, kasi bato oyo baboyi kotosa Ngai. »
Rekav oğlu Yehonadav'ın soyu atalarının verdiği buyruğu tuttu, ama bu halk beni dinlemedi.’
17 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi: « Boyoka! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. »
“Bu yüzden İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB diyor ki, ‘İşte, Yahuda ve Yeruşalim'de yaşayan herkesin başına sözünü ettiğim her felaketi getirmek üzereyim. Çünkü onları uyardım, ama dinlemediler; onları çağırdım, ama yanıt vermediler.’”
18 Boye, Jeremi alobaki na bato ya libota ya Rekabi: — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Lokola botosaka mobeko ya koko na bino Yonadabi, bolandaka malako nyonso oyo ayebisa bino mpe bosalelaka makambo nyonso oyo atinda bino,
Yeremya Rekav ailesine şöyle dedi: “İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB diyor ki, ‘Atanız Yehonadav'ın buyruğuna uydunuz, onun bütün uyarılarını dikkate aldınız, size buyurduğu her şeyi yaptınız.’
19 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, akotikala kozanga te moto oyo akosalela Ngai. › »
Bunun için İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB diyor ki, ‘Rekav oğlu Yehonadav'ın soyundan önümde hizmet edecek olanlar hiçbir zaman eksilmeyecek.’”

< Jeremi 35 >