< Jeremi 34 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na basoda na ye nyonso, mikili ya bakonzi nyonso oyo azalaki kokamba, mpe bikolo nyonso bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso ya zingazinga na yango:
The word that has been to Jeremiah from YHWH—and Nebuchadnezzar king of Babylon, and all his force, and all kingdoms of the land of the dominion of his hand, and all the peoples are fighting against Jerusalem, and against all its cities—saying:
2 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: kende koloba na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Nasengeli kokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobebisa yango na moto.
“Thus said YHWH, God of Israel: Go, and you have spoken to Zedekiah king of Judah, and have said to him, Thus said YHWH: Behold, I am giving this city into the hand of the king of Babylon, and he has burned it with fire,
3 Bongo yo, okobika te na loboko na ye, kasi bakokanga yo solo mpe bakokaba yo na maboko na ye; okomona mokonzi ya Babiloni miso na yo moko, akolobana na yo elongi na elongi, mpe okokende na Babiloni.
and you do not escape out of his hand, for you are certainly caught, and you are given into his hand, and your eyes see the eyes of the king of Babylon, and his mouth speaks with your mouth, and you enter Babylon.
4 Nzokande, Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, yoka Liloba na Yawe! Tala elaka oyo Yawe apesi yo: Okokufa na mopanga te,
Only, hear a word of YHWH, O Zedekiah king of Judah—thus said YHWH to you: You do not die by sword,
5 kasi okokufa na kimia. Mpe ndenge bato bapelisaki moto mpe batumbaki malasi ya solo kitoko, na matanga ya batata na yo, bakonzi ya kala oyo baleka liboso na yo, mpo na kopesa bango lokumu, ndenge wana mpe bakosala mpo na lokumu na yo. Mpe bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo: ‘Oh mawa, nkolo na ngai!’ Solo, Ngai moko nde napesi elaka oyo, elobi Yawe. › »
you die in peace, and with the burnings of your fathers, the former kings who have been before you, so they make a burning for you; and, Oh, lord, they lament for you, for the word I have spoken—a declaration of YHWH.”
6 Mosakoli Jeremi alobaki na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, maloba wana nyonso, kati na Yelusalemi,
And Jeremiah the prophet speaks all these words to Zedekiah king of Judah in Jerusalem,
7 wana basoda ya mokonzi ya Babiloni bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso mosusu ya Yuda, oyo mokonzi ya Babiloni alongaki nanu te: Lakishi mpe Azeka, pamba te yango kaka nde ezalaki bingumba batonga makasi oyo etikalaki kati na Yuda.
and the forces of the king of Babylon are fighting against Jerusalem, and against all the cities of Judah that are left—against Lachish, and against Azekah, for these have been left among the cities of Judah, cities of fortresses.
8 Sima na mokonzi Sedesiasi kosala boyokani elongo na bato nyonso kati na Yelusalemi mpo ete kokangolama ya bawumbu nyonso esakolama, Yawe alobaki na Jeremi
The word that has been to Jeremiah from YHWH, after the making of a covenant by King Zedekiah with all the people who [are] in Jerusalem, to proclaim liberty to them,
9 mpo ete moto nyonso apesa bawumbu na ye bonsomi, bawumbu oyo bazali Ba-Ebre, bazala mibali to basi; mpe mpo ete moto moko te akoba kokanga ndeko na ye, Moyuda, kati na bowumbu.
to each send out his manservant, and each his maidservant—the Hebrew and the Hebrewess—free, so as not to lay service on them—on any Jew, a brother, a man;
10 Boye, bakambi nyonso mpe bato nyonso oyo basalaki boyokani yango bandimaki kokangola bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi mpe kopesa bango bonsomi, mpo ete bakoba lisusu te kokanga bango na bowumbu; bandimaki, bakokisaki mpe bapesaki bawumbu na bango bonsomi.
and all the heads listen, and all the people who have come into the covenant to each send forth his manservant and each his maidservant free, so as not to lay service on them anymore, indeed, they listen, and send them away;
11 Kasi sima na tango, babongolaki makanisi na bango; bakangaki lisusu na bowumbu mibali mpe basi oyo bango basilaki kopesa bonsomi, mpe bakomisaki bango lisusu bawumbu.
and they turn afterward, and cause the menservants and the maidservants to return, whom they had sent forth free, and they subdue them for menservants and for maidservants.
12 Boye, tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
And there is a word of YHWH to Jeremiah from YHWH, saying,
13 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu; nalobaki:
“Thus said YHWH, God of Israel: I made a covenant with your fathers in the day of My bringing them forth from the land of Egypt, from a house of servants, saying,
14 ‹ Sima na mibu sambo nyonso, moto nyonso kati na bino asengeli kopesa bonsomi na Moyuda, ndeko na ye, oyo amitekaki lokola mowumbu; akosalela yo mibu motoba, bongo, sima na yango, okotika ye kokende na bonsomi. › Kasi bakoko na bino bayokaki Ngai te mpe batosaki Ngai te.
At the end of seven years you each send forth his brother, the Hebrew, who is sold to you, and has served you six years, indeed, you have sent him forth from you free: and your fathers did not listen to Me, nor inclined their ear.
15 Nzokande bino, na mwa mikolo oyo kaka, bobongolaki bino moko mitema mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai: moko na moko kati na bino asakolaki kokangolama ya ndeko na ye, apesaki ndeko na ye bonsomi. Bosalaki kutu boyokani yango liboso na Ngai, kati na Ndako Ngai.
And today you turn back and you do that which is right in My eyes, to each proclaim liberty to his neighbor, and you make a covenant before Me in the house over which My Name is called.
16 Kasi tala sik’oyo makambo bosali: bozongi sima, botiki ekateli oyo bozwaki mpe botioli bosantu ya Kombo na Ngai; pamba te bozongisi bawumbu na bino ya kala, mibali to basi, oyo bopesaki bonsomi mpo ete bakende na esika nyonso oyo balingi; bokangi bango na makasi mpo ete bakoma lisusu bawumbu na bino.
And you turn back, and defile My Name, and you each cause his manservant and each his maidservant, whom he had sent forth free (at their pleasure), to return, and you subdue them to be for menservants and for maidservants to you.”
17 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi: Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi; nafungoli yango mpo na kotelemela bino: nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele;
Therefore, thus said YHWH: “You have not listened to Me to proclaim freedom, each to his brother, and each to his neighbor; behold, I am proclaiming to you liberty,” a declaration of YHWH, “to the sword, to the pestilence, and to the famine, and I have given you for a trembling to all kingdoms of the earth.
18 nakokaba bato oyo babebisaki boyokani na Ngai mpe bakokisaki te malako ya boyokani oyo basalaki liboso na Ngai, na nzela ya kokata na biteni mibale mwana ngombe ya mobali mpe ya kotambola na kati-kati ya biteni yango.
And I have given the men who are transgressing My covenant, who have not established the words of the covenant that they have made before Me, by the calf, that they have cut in two, and pass through between its pieces—
19 Bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bakalaka ya lokumu, Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya mokili, oyo batambolaki na kati-kati ya biteni ya mwana ngombe ya mobali,
heads of Judah, and heads of Jerusalem, the officers, and the priests, and all the people of the land who had passed through between the pieces of the calf—
20 nakokaba bango na maboko ya banguna na bango mpe ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe; mpe bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya mabele.
indeed, I have given them into the hand of their enemies, and into the hand of those seeking their soul, and their carcass has been for food to the bird of the heavens, and to the beast of the earth.
21 Nakokaba Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, elongo na bakalaka na ye na maboko ya banguna na bango, oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya mampinga ya mokonzi ya Babiloni, oyo akei sik’oyo mosika na bino.
And I give Zedekiah king of Judah and his heads into the hand of their enemies, and into the hand of those seeking their soul, and into the hand of the forces of the king of Babylon that are going up from off you.
22 Nakopesa bango mitindo, elobi Yawe, mpe nakozongisa bango kati na engumba oyo: bakobundisa yango, bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. Mpe nakokomisa bingumba ya Yuda esobe, ezanga bavandi. »
Behold, I am commanding,” a declaration of YHWH, “and have brought them back to this city, and they have fought against it, and captured it, and burned it with fire, and I make the cities of Judah a desolation—without inhabitant.”