< Jeremi 32 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na bokonzi mpe Nabukodonozori akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi.
Das Wort, welches an Jeremia von seiten Jahwes erging im zehnten Jahre Zedekias, des Königs von Juda, das ist das achtzehnte Jahr Nebukadrezars.
2 Ezalaki na tango oyo mampinga ya mokonzi ya Babiloni ezingelaki Yelusalemi, mpe mosakoli Jeremi azalaki ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli ya ndako ya mokonzi ya Yuda.
Damals belagerte das Heer des Königs von Babel Jerusalem; der Prophet Jeremia aber lag im Wachthofe, der zum Palaste des Königs von Juda gehörte, gefangen.
3 Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, abwakaki ye kuna na koloba: « Mpo na nini ozali kosakola na maloba oyo: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Nakokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobotola yango;
Zedekia, der König von Juda, hatte ihn nämlich gefangen gesetzt, indem er ihm vorwarf: Warum weissagst du denn: So spricht Jahwe: Fürwahr, ich will diese Stadt in die Gewalt des Königs von Babel überliefern, daß er sie einnehme,
4 Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akolonga te kokima liboso ya bato ya Babiloni, kasi nakokaba ye solo na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akolobana na ye mpe akotalana na ye na elongi;
und Zedekia, der König von Juda, soll den Händen der Chaldäer nicht entrinnen, sondern wird ganz gewiß in die Gewalt des Königs von Babel überliefert werden und er wird von Mund zu Mund mit ihm reden und Auge in Auge ihn sehen:
5 akomema Sedesiasi na Babiloni, akowumela kuna kino tango nakotala likambo na ye, elobi Yawe, soki bomeki kobundisa bato ya Babiloni, bokolonga te. › »
und zwar nach Babel wird er Zedekia führen, und daselbst soll er bleiben, so lange, bis ich mich seiner wieder annehme! - ist der Spruch Jahwes. Wenn ihr also mit den Chaldäern kämpft, so werdet ihr keinen Erfolg haben.
6 Jeremi alobaki: « Yawe alobaki na ngai:
Und Jeremia sprach: Das Wort Jahwes ist an mich ergangen folgendermaßen:
7 Anameyeli, mwana mobali ya Shalumi, noko na yo, azali koya epai na yo mpe akoloba: ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti, pamba te yo nde ozali na makoki mpe na mokumba ya kosikola yango. ›
Bald wird Hanameel, der Sohn deines Oheims Sallum, zu dir kommen, dir zu sagen: Kaufe meinen Acker in Anathoth, denn dir steht das Recht der Einlösung zu, daß du ihn kaufest!
8 Bongo, kaka ndenge Yawe alobaki, Anameyeli, mwana ya noko na ngai, ayaki kotala ngai kati na lopango ya bakengeli mpe alobaki: ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti kati na etuka ya Benjame, pamba te yo nde ozali na makoki ya kosikola yango mpe ya kozwa yango; somba na yo yango. › Nasosolaki ete ezali Liloba na Yawe;
Und es kam mein Vetter Hanameel, wie Jahwe vorausgesagt, zu mir in den Wachthof und sprach zu mir: Kaufe doch meinen Acker in Anathoth, welches im Stammlande Benjamin liegt, denn dir steht das Erbrecht und das Recht der Einlösung zu - kauf ihn dir! Da erkannte ich, daß es Jahwes Wort war,
9 boye nasombaki elanga oyo ezali na Anatoti, na maboko ya Anameyeli, mwana mobali ya noko na ngai, mpe nafutaki ye mbongo ya bibende ya palata, zomi na sambo.
kaufte den Acker von meinem Vetter Hanameel und wog ihm das Geld dar, sieben Goldsekel und zehn Silbersekel.
10 Nakomaki mokanda oyo nasombelaki elanga mpe nabetaki yango kashe; namekaki kilo ya mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli, na emekelo kilo.
Dann schrieb ich den Kaufvertrag auf ein Blatt, siegelte ihn und nahm Zeugen hinzu und wog das Geld mit der Wage dar.
11 Nakamataki mokanda oyo nasombelaki elanga, oyo nabetaki kashe, oyo kati na yango bakoma malako ya mibeko mpe mabongisi; mpe nazwaki lisusu mokanda oyo babeta kashe te;
Sodann nahm ich den gesiegelten Kaufbrief
12 mpe napesaki mokanda oyo nasombelaki elanga epai ya Baruki, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, na miso ya Anameyeli, mwana ya noko na ngai, mpe ya batatoli oyo batiaki mikoloto na bango kati na mokanda oyo nasombelaki elanga, mpe na miso ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na lopango ya bakengeli.
und übergab den Kaufbrief an Baruch, den Sohn Nerijas, des Sohnes Mahasejas, in Gegenwart meines Vetters Hanameel und in Gegenwart der Zeugen, die den Kaufbrief unterschrieben hatten, in Gegenwart aller Judäer, die sich im Wachthofe aufhielten,
13 Napesaki Baruki mitindo oyo na miso na bango nyonso:
und wies in ihrer Gegenwart Baruch an:
14 ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Kamata mikanda oyo nasombelaki elanga, ezala oyo babeta kashe to oyo babeta kashe te; tia yango kati na mbeki oyo basala na mabele ya bikeko mpo ete ebeba te.
So spricht Jahwe der Heerscharen, der Gott Israels: Nimm diese Briefe, diesen gesiegelten Kaufbrief und diesen offenen Kaufbrief, und lege sie in ein Thongefäß, damit sie geraume Zeit erhalten bleiben.
15 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bato bakosomba lisusu bandako, bilanga mpe bilanga ya vino kati na mokili oyo. ›
Denn so spricht Jahwe der Heerscharen, der Gott Israels: Es sollen dereinst wieder Häuser und Äcker und Weinberge in diesem Lande gekauft werden!
16 Sima na ngai kopesa mokanda oyo nasombelaki elanga epai ya Baruki, mwana mobali ya Neriya, nabondelaki Yawe:
Und nachdem ich Baruch, dem Sohne Nerijas, den Kaufbrief übergeben hatte, betete ich folgendermaßen zu Jahwe:
17 Oh Nkolo Yawe! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo: olembanaka likambo moko te.
Ach, Herr Jahwe! Fürwahr, du hast den Himmel und die Erde durch deine große Macht und durch deinen ausgereckten Arm geschaffen - für dich ist kein Ding unmöglich!
18 Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga;
Der du Tausenden Gnade erweisest und die Verschuldung der Väter in den Schoß ihrer Kinder nach ihnen heimzahlst, - o großer, gewaltiger Gott, des Name Jahwe der Heerscharen ist,
19 mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye.
groß an Rat und mächtig an That, du, dessen Augen über allen Wegen der Menschenkinder offenstehen, daß du einem jeden nach seinem Wandel und gemäß den Früchten seiner Thaten vergiltst,
20 Osalaki bilembo minene mpe bikamwa kati na Ejipito mpe ozali kokoba kosala yango kino lelo kati na Isalaele mpe kati na bato nyonso, mpe osalaki ete Kombo na Yo ekende sango ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
der du Zeichen und Wunder gewirkt hast in Ägypten und bis auf den heutigen Tag, sowohl an Israel wie an den Menschen überhaupt, und dir einen Namen gemacht hast, wie es heute der Fall ist.
21 Obimisaki bato na Yo, Isalaele, na Ejipito na nzela ya bilembo minene mpe bikamwa wana osalelaki nguya na Yo mpe osembolaki loboko na Yo ya nguya mpo na koyeisa somo kati na bato ya Ejipito.
Und du führtest dein Volk Israel aus Ägypten hinweg unter Zeichen und Wundern und mit mächtiger Hand und ausgerecktem Arm und mit großem Schrecken
22 Opesaki bango mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa na batata na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi.
und gabst ihnen dieses Land, dessen Verleihung an sie du ihren Vätern zugeschworen hattest, ein Land, das von Milch und Honig überfließt.
23 Bakotaki kati na yango mpe babotolaki yango; kasi batosaki Yo te, basalelaki Mobeko na Yo te, basalaki te nyonso oyo otindaki bango. Yango wana omemelaki bango pasi oyo nyonso.
Als sie aber hereingekommen waren und es in Besitz genommen hatten, da gehorchten sie deinen Befehlen nicht, noch wandelten sie nach deinem Gesetze, thaten nichts von dem, was du ihnen zu thun geboten; da ließest du ihnen all' dieses Unheil zustoßen.
24 Tala, banguna basili kobongama mpo na kobotola engumba! Likolo ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, oyo bazali kobundisa yango. Makambo oyo olobaki ekokisami, ndenge ozali komona yango na mokolo ya lelo.
Schon reichen die Wälle bis an die Stadt zu ihrer Eroberung, und die Stadt ist der Gewalt der Chaldäer, die sie belagern, infolge des Schwerts und des Hungers und der Pest überliefert, und was du angedroht hattest, ist geschehen, und du hast es vor Augen.
25 Mpe atako engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, Yo, Nkolo Yawe, olobi na ngai: ‹ Somba elanga na mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli. › »
Und doch sprachst du, Herr Jahwe, zu mir: Kaufe dir den Acker für Geld und nimm Zeugen hinzu! - während doch die Stadt der Gewalt der Chaldäer überliefert ist.
26 Bongo Yawe alobaki na Jeremi:
Da erging das Wort Jahwes an Jeremia folgendermaßen:
27 « Nazali Yawe, Nzambe ya moto nyonso. Boni, ezali na likambo oyo Ngai nakoki kolembana?
Fürwahr, ich bin Jahwe, der Gott alles Fleisches, - ist wohl für mich irgend etwas unmöglich?
28 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi: Nakokaba engumba oyo na maboko ya bato ya Babiloni mpe ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo ete azwa yango.
Darum so spricht Jahwe: Fürwahr, ich will diese Stadt in die Gewalt der Chaldäer und in die Gewalt Nebukadrezars, des Königs von Babel, überliefern, daß er sie einnehme,
29 Bato ya Babiloni oyo bazali kobundisa engumba oyo, bakokota kati na yango mpe bakotumba yango; bakotumba yango elongo na bandako oyo, na likolo ya manzanza na yango, bato bazalaki kotumbola Ngai na kobonza bambeka ya malasi ya ansa epai ya nzambe Bala mpe kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe ya bapaya.
und die Chaldäer, die diese Stadt belagern, werden eindringen und diese Stadt anzünden und niederbrennen, - auch die Häuser, auf deren Dächern sie dem Baal geräuchert und andern Göttern Trankopfer gespendet haben, um mich zum Zorne zu reizen.
30 Bana ya Isalaele mpe ya Yuda, wuta bolenge na bango, bazalaki kosala eloko mosusu te na miso na Ngai, soki kaka mabe te; solo, bana ya Isalaele bazalaki kosala eloko mosusu te, soki kaka te kopesa Ngai kanda na nzela ya biloko oyo maboko na bango esalaki, elobi Yawe.
Denn die Israeliten und die Judäer pflegten von Jugend auf nur das zu thun, was mir mißfällig war; denn die Israeliten reizten mich ohne Aufhören durch die Machwerke ihrer Hände zum Zorn - ist der Spruch Jahwes;
31 Wuta batonga engumba oyo kino na mokolo ya lelo, mosala na yango kaka kotumbola Ngai mpe kopesa Ngai kanda; yango wana, nakolongola yango liboso na Ngai.
ja, ein Anlaß zum Zorn und zum Grimm war mir diese Stadt von der Zeit an, da man sie erbaute, bis auf den heutigen Tag, so daß ich sie mir aus den Augen schaffen muß,
32 Bato ya Isalaele mpe ya Yuda bapesaki Ngai kanda na nzela ya mabe nyonso oyo basalaki: ezala bango, bakonzi na bango, bakalaka na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi.
wegen all' der Bosheit der Israeliten und der Judäer, die sie verübt haben, um mich zum Zorne zu reizen, sie, ihre Könige, ihre Oberen, ihre Priester und ihre Propheten und die Männer von Juda und die Bewohner Jerusalems.
33 Bapesaki Ngai mokongo na esika ya kotala Ngai. Atako nazalaki tango na tango koteya bango, kasi batikalaki koyoka Ngai te mpe baboyaki kozwa mayele.
Sie kehrten mir den Rücken zu und nicht das Angesicht und, obwohl man sie unermüdlich immer wieder belehrte, hörten sie dennoch nicht, daß sie Zucht angenommen hätten.
34 Batiaki kutu banzambe na bango ya bikeko kati na Ndako epai wapi babelaka Kombo na Ngai, mpe na bongo, bakomisaki yango mbindo.
Vielmehr stellten sie ihre Scheusale selbst in dem Tempel auf, der nach meinem Namen genannt ist, um ihn so zu verunreinigen.
35 Bakomaki kotonga bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo na kobonza bana na bango ya mibali mpe ya basi epai ya Moloki; ezali likambo oyo Ngai natikalaki kotinda bango te, mpe natikala kokanisa te ete bakoki kosala makambo ya nkele boye mpo na komemisa Yuda masumu.
Sie erbauten die Baalshöhen im Thale Ben Hinnom, um ihre Söhne und ihre Töchter dem Melech zu verbrennen, - was ich ihnen nicht geboten habe, und was mir nicht in den Sinn gekommen ist, daß sie solche Greuel verüben sollten, um Juda zur Sünde zu verführen.
36 Mpo na yango, tala sik’oyo liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na engumba oyo bino bozali koloba ete ekabami na maboko ya mokonzi ya Babiloni na nzela ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka:
Und nun - darum spricht also Jahwe, der Gott Israels, in betreff dieser Stadt, von der ihr sagt, sie sei durch das Schwert und durch den Hunger und durch die Pest der Gewalt des Königs von Babel überliefert:
37 ‹ Solo, nakosangisa bango wuta na mikili nyonso epai wapi nabenganaki bango tango natombokelaki bango, nakozongisa bango na esika oyo mpe nakovandisa bango na kimia.
Fürwahr, ich will sie aus allen Ländern, wohin ich sie in meinem Grimm und mit heftigem Grolle verstoßen habe, sammeln und an diesen Ort zurückbringen und daselbst in Sicherheit wohnen lassen.
38 Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
Dann sollen sie mein Volk, und ich will ihr Gott sein
39 Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.
und will ihnen einerlei Sinn und einerlei Wandel verleihen, daß sie mich alle Zeit fürchten, ihnen und ihren Kindern zum Heile.
40 Nakosala boyokani ya libela elongo na bango, nakotika te kosalela bango bolamu mpe nakosala ete batosa Ngai mpe bapesa Ngai lisusu mokongo te.
Und ich will einen immerwährenden Bund mit ihnen schließen, daß ich mich mit meinen Wohlthaten nie von ihnen abwenden will, und will ihnen Furcht vor mir ins Herz legen, daß sie nicht von mir weichen.
41 Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›
Vielmehr werde ich meine Wonne an ihnen haben, daß ich ihnen Gutes thue, und will sie einpflanzen in dieses Land in Treue, von ganzem Herzen und von ganzer Seele.
42 Tala liloba oyo Yawe alobi: Ndenge natindelaki bato oyo pasi oyo nyonso, ndenge wana mpe nakotindela bango bomengo nyonso oyo nalakaki bango.
Denn so spricht Jahwe: Wie ich über dieses Volk all' dies schwere Unheil gebracht habe, so bringe ich auch über sie all' das Gute, das ich ihnen verheiße,
43 Bato bakosomba lisusu bilanga kati na mokili oyo bino bozali koloba na tina na yango: ‹ Mokili oyo ebeba, etikala lisusu na bato mpe na banyama te; pamba te ekabama na maboko ya bato ya Babiloni. ›
und man wird wieder Äcker kaufen in diesem Lande, von dem ihr sagt: Eine Einöde ist's, ohne Menschen und Vieh! in die Gewalt der Chaldäer ist's überliefert!
44 Solo, bakosomba lisusu bilanga na motuya ya palata, bakotia mikoloto mpe bakashe na mikanda oyo bakosombela bilanga yango, na miso ya batatoli, kati na mboka ya Benjame, kati na bamboka mike-mike oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi, kati na bingumba ya Yuda mpe kati na bingumba ya mokili ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi; pamba te nakozongisa bato na bango oyo bakendeki na bowumbu, elobi Yawe. »
Man wird Äcker für Geld kaufen und Kaufbriefe schreiben und siegeln und Zeugen hinzunehmen, im Lande Benjamin wie in der Umgebung Jerusalems und in den Städten Judas und in den Städten auf dem Gebirge und in den Städten in der Niederung und in den Städten des Südlandes: denn ich werde ihre Gefangenen heimführen! - ist der Spruch Jahwes.