< Jeremi 31 >
1 « Na tango wana, » elobi Yawe, « Ngai nakozala Nzambe ya bituka nyonso ya Isalaele, mpe bango bakozala bato na Ngai. »
U to vrijeme, govori Gospod, ja æu biti Bog svijem porodicama Izrailjevijem, i oni æe mi biti narod.
2 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Bato oyo bakobika na mopanga bakozwa ngolu kati na esobe; boye, nakoya kopesa Isalaele bopemi. »
Ovako veli Gospod: narod što osta od maèa naðe milost u pustinji, kad iðah da dam odmor Izrailju.
3 Yawe abimelaki biso na kala, alobaki: « Nalingaka bino na bolingo ya seko; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.
Odavna mi se javljaše Gospod. Ljubim te ljubavlju vjeènom, zato ti jednako èinim milost.
4 Nakobongisa bino lisusu; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.
Opet æu te sazidati, i biæeš sazidana, djevojko Izrailjeva, opet æeš se veseliti bubnjima svojim, i izlaziæeš sa zborom igraèkim.
5 Okolona lisusu bilanga ya vino na bangomba ya Samari; bato oyo bakolona yango bakosepela tango bakobuka mbuma na yango.
Opet æeš saditi vinograde na brdima Samarijskim, sadiæe vinogradari i ješæe rod.
6 Ekozala mokolo oyo bakengeli bakoganga na bangomba ya Efrayimi: ‹ Boya! Tika ete tokende na Siona, epai na Yawe, Nzambe na biso! › »
Jer æe doæi dan kad æe vikati èuvari na gori Jefremovoj: ustanite, da idemo na Sion, ka Gospodu Bogu svojemu.
7 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Boyemba na esengo mpo na Jakobi, boganga na esengo mpo na ekolo ya liboso kati na bikolo nyonso! Batatola, bosanzola mpe boloba: ‹ Oh Yawe, bikisa bato na Yo, bato ya Isalaele oyo batikali. ›
Jer ovako veli Gospod: pjevajte veselo radi Jakova, i podvikujte radi glave narodima; javljajte, hvalite i govorite: spasi, Gospode, narod svoj, ostatak Izrailjev.
8 Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota; bato ebele penza bakozonga.
Evo, ja æu ih dovesti iz zemlje sjeverne, i sabraæu ih s krajeva zemaljskih, i slijepa i hroma, i trudnu i porodilju, sve zajedno, zbor veliki vratiæe se ovamo.
9 Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.
Iæi æe plaèuæi, i s molitvama æu ih dovesti natrag; vodiæu ih pokraj potoka pravijem putem, na kom se neæe spoticati; jer sam otac Izrailju, i Jefrem je prvenac moj.
10 Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, botatola yango na bisanga ya mosika! Boloba: ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele akosangisa bango mpe akobatela bango ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye.
Èujte, narodi, rijeè Gospodnju, i javljajte po dalekim ostrvima i recite: koji rasije Izrailja, skupiæe ga, i èuvaæe ga kao pastir stado svoje.
11 Mpo ete Yawe akokangola Jakobi mpe akobikisa bango na maboko ya bato oyo baleki bango na makasi.
Jer iskupi Gospod Jakova, i izbavi ga iz ruku jaèega od njega.
12 Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona; bakosepela na bomengo ya Yawe: ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.
I doæi æe i pjevaæe na visini Sionskoj, i steæi æe se k dobru Gospodnjem, k žitu, k vinu i k ulju, k jaganjcima i teocima; i duša æe im biti kao vrt zaliven, i neæe više tužiti.
13 Bilenge basi bakobina na esengo elongo na bilenge mibali mpe mibange. Nakobongola matanga na bango na esengo, nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa.
Tada æe se veseliti djevojka u kolu, i momci i starci zajedno, i promijeniæu žalost njihovu na radost, i utješiæu ih, i razveseliæu ih po žalosti njihovoj.
14 Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe na mafuta ya bibwele, mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › » elobi Yawe.
I napitaæu sveštenicima dušu pretilinom, i narod æe se moj nasititi dobra mojega, govori Gospod.
15 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mongongo moko ezali koyokana na Rama, ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi: Rasheli azali kolela bana na ye ya mibali mpe aboyi kobondisama, pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. »
Ovako veli Gospod: glas u Rami èu se, naricanje i plaè veliki; Rahilja plaèe za djecom svojom, neæe da se utješi za djecom svojom, jer ih nema.
16 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tika kolela mpe kobimisa mpinzoli, pamba te mosala na yo ezali na litomba, » elobi Yawe, « bana na yo ya mibali bakozonga wuta na mokili ya banguna.
Ovako veli Gospod: ustavi glas svoj od plaèa i oèi svoje od suza, jer ima plata djelu tvojemu, govori Gospod, i oni æe se vratiti iz zemlje neprijateljske.
17 Elikya ezali mpo na bomoi na yo ya lobi, » elobi Yawe, « bana na yo bakozonga na mokili na bango.
I imaš nada za pošljedak, govori Gospod, da æe se vratiti sinovi tvoji na meðe svoje.
18 Nayoki kolelalela ya Efrayimi: ‹ Opesi ngai etumbu lokola mwana ngombe ya mobali oyo ezali na liboma, mpe etumbu yango ekweyelaki ngai. Zongisa ngai, mpe nakozonga, pamba te ozali Yawe, Nzambe na ngai.
Èujem doista Jefrema gdje tuži: pokarao si me, te sam pokaran kao june neuko; obrati me da se obratim, jer si ti Gospod Bog moj.
19 Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›
Jer pošto se obratih, pokajah se; i pošto se nauèih, udarih se po bedru; jer se posramih i stidim se što nosim sramotu mladosti svoje.
20 Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.
Nije li mi Jefrem mio sin? nije li dijete predrago? Otkad govorih protiv njega, jednako ga se opominjem; zato je srce moje ustreptalo njega radi, doista æu se smilovati na nj, govori Gospod.
21 « Tia bilembo na nzela, pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango; sala penza keba na nzela na yo, na nzela oyo ozali kolanda. Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga, zonga na bingumba na yo!
Podigni znake, nanesi gomile kamenja, zapamti put kojim si išla; vrati se, djevojko Izrailjeva, vrati se u gradove svoje.
22 Oh elenge mwasi ya mobulu, kino tango nini okotika kotambola-tambola? Yawe akosala likambo ya sika na mabele: mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. »
Dokle æeš lutati, kæeri odmetnice! jer je Gospod uèinio nešto novo na zemlji: žena æe opkoliti èovjeka.
23 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango: ‹ Oh ndako ya bosembo; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo! ›
Ovako veli Gospod nad vojskama, Bog Izrailjev: još æu ovu rijeè govoriti u zemlji Judinoj i u gradovima njegovijem kad natrag dovedem roblje njihovo: Gospod da te blagoslovi, stane pravde, sveta goro!
24 Bato bakokoma kovanda elongo kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba na yango nyonso: basali bilanga mpe babokoli bibwele.
Jer æe se naseliti u njoj Juda, i svi gradovi njegovi, i ratari i koji idu za stadom.
25 Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. »
Jer æu napojiti umornu dušu, i nasititi svaku klonulu dušu.
26 Boye, tango nalamukaki, natalaki pene na ngai; nasosolaki ete pongi na ngai ezalaki elengi.
Utom se probudih i pogledah, i san mi bješe sladak.
27 « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakolona bato mpe banyama lokola milona kati na bokonzi ya Isalaele mpe kati na bokonzi ya Yuda.
Evo idu dani, govori Gospod, kad æu zasijati dom Izrailjev i dom Judin sjemenom èovjeèijim i sjemenom od stoke.
28 Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe;
I kao što sam pazio na njih da ih istrijebljujem i razvaljujem, i kvarim i zatirem i muèim, tako æu paziti na njih da ih sazidam i posadim, govori Gospod.
29 « na mikolo wana, bato bakoloba lisusu te: ‹ Batata balie mbuma ya vino ya mobesu, mpe minu ya bana na bango ekomi ngayi. ›
U te dane neæe se više govoriti: oci jedoše kiselo grožðe, a sinovima trnu zubi.
30 Na esika na yango, moto na moto akokufa mpo na masumu na ye moko; moto nyonso oyo alie mbuma ya vino ya mobesu, minu na ye moko nde ekokoma ngayi.
Nego æe svaki za svoj grijeh poginuti; ko god jede kiselo grožðe, tome æe zubi trnuti.
31 Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakosala boyokani ya sika elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda;
Evo, idu dani, govori Gospod, kad æu uèiniti s domom Izrailjevijem i s domom Judinijem nov zavjet,
32 ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe.
Ne kao onaj zavjet koji uèinih s ocima njihovijem, kad ih uzeh za ruku da ih izvedem iz zemlje Misirske, jer onaj zavjet moj oni pokvariše, a ja im bijah muž, govori Gospod;
33 « Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe: « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.
Nego ovo je zavjet što æu uèiniti s domom Izrailjevijem poslije ovijeh dana, govori Gospod: metnuæu zavjet svoj u njih, i na srcu njihovu napisaæu ga, i biæu im Bog i oni æe mi biti narod.
34 Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba: ‹ Yeba Yawe! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »
I neæe više uèiti prijatelj prijatelja ni brat brata govoreæi: poznajte Gospoda; jer æe me znati svi od maloga do velikoga, govori Gospod; jer æu im oprostiti bezakonja njihova, i grijeha njihovijeh neæu više pominjati.
35 Tala makambo oyo Yawe alobi, Ye oyo atia moyi mpo ete engengisa mokolo, apesa mibeko ete sanza mpe minzoto engengisa butu, aningisaka ebale monene mpo ete mbonge etia makelele, mpe oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga:
Ovako veli Gospod, koji daje sunce da svijetli danju, i uredbe mjesecu i zvijezdama da svijetle noæu, koji raskida more i buèe vali njegovi, kojemu je ime Gospod nad vojskama:
36 « Soki kaka bakoki solo kolongola malako oyo na miso na Ngai, » elobi Yawe, « wana bana ya Isalaele mpe bakozala lisusu ekolo te na miso na ngai. »
Ako tijeh uredaba nestane ispred mene, govori Gospod, i sjeme æe Izrailjevo prestati biti narod preda mnom navijek.
37 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolo mpe komona miboko ya mabele, wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaele mpo na makambo nyonso oyo basali, » elobi Yawe.
Ovako veli Gospod: ako se može izmjeriti nebo gore i izvidjeti temelji zemaljski dolje, tada æu i ja odbaciti sve sjeme Izrailjevo za sve što su uèinili, veli Gospod.
38 « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bakotonga lisusu engumba oyo mpo na Ngai, kobanda na ndako molayi ya Ananeyeli kino na Ekuke ya Suka ya mir;
Evo idu dani, govori Gospod, u koje æe se sazidati Gospodu ovaj grad od kule Ananeilove do vrata na uglu.
39 bakotia singa ya batongi ndako longwa na esika wana kino na ngomba moke ya Garebi, mpe ekobaluka kino na Gowa.
I još æe dalje otiæi uže mjeraèko do huma Gariva i obrnuæe se na Goat.
40 Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »
I sva dolina od mrtvijeh tjelesa i pepela, i sva polja dori do potoka Kedrona, do ugla konjskih vrata k istoku, biæe svetinja Gospodu; neæe se razvaliti ni potrti dovijeka.