< Jeremi 30 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
RAB Yeremya'ya şöyle seslendi:
2 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Koma kati na buku makambo nyonso oyo nayebisaki yo.
“İsrail'in Tanrısı RAB diyor ki, ‘Sana bildirdiğim bütün sözleri bir kitaba yaz.
3 Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. »
İşte halkım İsrail'i ve Yahuda'yı eski gönençlerine kavuşturacağım günler yaklaşıyor’ diyor RAB, ‘Onları atalarına verdiğim topraklara geri getireceğim, orayı yurt edinecekler’ diyor RAB.”
4 Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele mpe Yuda:
İsrail ve Yahuda için RAB'bin bildirdiği sözler şunlardır:
5 « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo nde ezali koyokana; kimia ezali lisusu te.
“RAB diyor ki, ‘Korku sesi duyduk, Esenlik değil, dehşet sesi.
6 Botuna mpe botala: Boni, mobali akoki kobota bana? Bongo mpo na nini nazali komona moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa?
Sorun da görün: Erkek, çocuk doğurur mu? Öyleyse neden doğuran kadın gibi Her erkeğin ellerini belinde görüyorum? Neden her yüz solmuş?
7 Mawa! Ekozala penza mokolo ya somo! Mokolo moko te ekokokana na yango! Ekozala tango ya pasi mpo na Jakobi, kasi akobikisama na pasi yango.
Ah, ne korkunç gün! Onun gibisi olmayacak. Yakup soyu için sıkıntı dönemi olacak, Yine de sıkıntıdan kurtulacak.
8 Na mokolo wana, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ nakobuka ekangiseli na bakingo na bango, nakokata basinga oyo bakangelaki bango mpe bakozala lisusu te bawumbu ya bapaya.
“‘O gün’ diyor Her Şeye Egemen RAB, ‘Boyunlarındaki boyunduruğu kıracak, Bağlarını koparacağım. Bundan böyle yabancılar onları Kendilerine köle etmeyecekler.
9 Nzokande, bakosalela Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi oyo nakotia mpo ete akamba bango.
Onun yerine Tanrıları RAB'be Ve başlarına atayacağım kralları Davut'a Kulluk edecekler.
10 Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te! Oh Isalaele, kozala na somo te, › elobi Yawe. ‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika, mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu! Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi, mpe moto moko te akobangisa ye lisusu.
“‘Korkma, ey kulum Yakup, Yılma, ey İsrail’ diyor RAB. ‘Çünkü seni uzak yerlerden, Soyunu sürgün edildiği ülkeden kurtaracağım. Yakup yine huzur ve güvenlik içinde olacak, Kimse onu korkutmayacak.
11 Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino; kasi bino, nakobebisa bino nye te; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo; nakozanga te kopamela bino. ›
Çünkü ben seninleyim, Seni kurtaracağım’ diyor RAB. ‘Seni aralarına dağıttığım bütün ulusları Tümüyle yok etsem de, Seni büsbütün yok etmeyecek, Adaletle yola getirecek, Hiç cezasız bırakmayacağım.’
12 Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Pota na yo ekobika te mpe pasi na yo ekosila te.
“RAB diyor ki, ‘Senin yaran şifa bulmaz, Beren iyileşmez.
13 Moto akolobela yo akozala te, kisi ezali te mpo na pota na yo, lobiko ezali te mpo na yo.
Davanı görecek kimse yok, Yaran umarsız, şifa bulmaz.
14 Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.
Bütün oynaşların unuttu seni, Arayıp sormuyorlar. Seni düşman vururcasına vurdum, Acımasızca cezalandırdım. Çünkü suçun çok, Günahların sayısız.
15 Mpo na nini ozali koganga mpo na pota na yo, mpe pasi na yo ezali kosila te? Nasali yo boye mpo ete ngambo na yo ezali monene, mpe masumu na yo eleki ebele.
Neden haykırıyorsun yarandan ötürü? Yaran şifa bulmaz. Suçlarının çokluğu ve sayısız günahın yüzünden Getirdim bunları başına.
16 Kasi bato nyonso oyo bakosala yo mabe, bakosala bango mpe mabe; banguna na yo nyonso bakokende na bowumbu; bato oyo babotolaki yo biloko, bakobotola bango mpe biloko; bato oyo banyokolaki yo, bakonyokola mpe bango.
Ama seni yiyenlerin hepsi yem olacak, Bütün düşmanların sürgüne gidecek. Seni soyanlar soyulacak, Yağmalayanlar yağmalanacak.
17 Nakozongisela yo bomengo na yo mpe nakobikisa bapota na yo, › elobi Yawe. ‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola, Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa; ›
Ama ben seni sağlığına kavuşturacak, Yaralarını iyileştireceğim’ diyor RAB, ‘Çünkü Siyon itilmiş, Onu arayan soran yok diyorlar.’
18 tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nakozongisa lisusu bomengo kati na bandako ya kapo ya Jakobi mpe nakoyokela bandako na ye mawa; bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala.
“RAB diyor ki, ‘Yakup'un çadırlarını eski gönencine kavuşturacağım, Konutlarına acıyacağım. Yeruşalim höyük üzerinde yeniden kurulacak, Saray kendi yerinde duracak.
19 Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengo ekobima kati na bango. Nakokomisa bango ebele, mpe motango na bango ekokoma ebele; nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te.
Oralardan şükran ve sevinç sesleri duyulacak. Sayılarını çoğaltacağım, azalmayacaklar, Onları onurlandıracağım, küçümsenmeyecekler.
20 Bana na bango ya mibali bakozala lokola na tango ya kala, mpe lingomba na bango ekowumela liboso na Ngai; nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bazali konyokola bango.
Çocukları eskisi gibi olacak, Toplulukları önümde sağlam duracak; Onlara baskı yapanların hepsini cezalandıracağım.
21 Mokonzi na bango akowuta kati na bango, mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango; nakobenda bango pene na Ngai mpe bakoya pene na Ngai, pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai? › elobi Yawe.
Önderleri kendilerinden biri olacak, Yöneticileri kendi aralarından çıkacak. Onu kendime yaklaştıracağım, Bana yaklaşacak. Kim canı pahasına yaklaşabilir bana?’ diyor RAB.
22 ‹ Boye, bokozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bino. › »
“‘Böylece siz benim halkım olacaksınız, Ben de sizin Tanrınız olacağım.’
23 Tala, mopepe ya Yawe etomboki, kanda makasi na Ye epeli, bakake ezali konguluma na likolo, mpe ezali kokweya na mito ya bato mabe.
İşte RAB'bin fırtınası öfkeyle kopacak, Şiddetli kasırgası kötülerin başında patlayacak.
24 Kanda makasi ya Yawe ekozonga te kino tango ekokokisa mabongisi ya motema na Ye. Bokososola yango penza na mikolo ekoya.
Aklının tasarladığını tümüyle yapana dek, RAB'bin kızgın öfkesi dinmeyecek. Son günlerde bunu anlayacaksınız.”