< Jeremi 3 >

1 « Soki mobali abomi libala na mwasi na ye, mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu; boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye? Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo? Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele, bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, » elobi Yawe.
Dis-leur: "S’Il arrive qu’un homme répudie sa femme, et que celle-ci, après l’avoir quitté, devienne l’épouse d’un autre, se peut-il qu’il la reprenne de nouveau? Un tel pays n’en serait-il pas tout à fait déshonoré? Or, toi, tu t’es prostituée à de nombreux amants et tu reviendrais à moi! dit l’Eternel.
2 « Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala: Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.
Lève les yeux vers les collines et regarde: où ne t’es-tu pas abandonnée? Pour eux, tu te postais sur les routes comme fait le Bédouin dans le désert, et ainsi tu as souillé le pays par tes débauches et ton inconduite.
3 Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.
Dussent les ondées bienfaisantes te manquer, les pluies tardives faire défaut, tu avais le front d’une courtisane, tu refusais de rougir!
4 Boni, obengaka Ngai te: ‹ Tata na ngai, moninga na ngai ya bomwana! ›
Sans doute, à l’heure présente, tu t’écries en t’adressant à moi: "O mon père, tu es le guide de ma jeunesse;
5 Ozali kutu kotuna Ngai: ‹ Boni, kino tango nini okokanga kanda? Kotomboka na yo ekosila te? › Yango nde makambo ozali koloba, kasi ozali mpe kaka kokoba na misala na yo ya mabe. »
me gardera-t-il éternellement rancune? Conservera-t-il toujours son ressentiment?" Voilà comme tu parles, et tu commets les pires fautes, et triomphes dans le mal!"
6 Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai: « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba.
L’Eternel me dit au temps du roi Josias: "As-tu vu ce que faisait Israël, la nation renégate? Elle allait sur toute montagne élevée, sous tout bois verdoyant, et s’y livrait à la prostitution.
7 Nakanisaki ete akozongela Ngai soki asilisi kosala makambo nyonso oyo azalaki na yango posa; kasi azongeli Ngai te, mpe ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, amonaki yango.
Je me disais: Plus tard, après avoir commis tous ces excès, c’est à moi qu’elle reviendra… Elle n’est pas revenue! Et sa perfide soeur, la nation de Juda, en a été témoin.
8 Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba.
Elle a vu que c’est bien à cause de son adultère que je l’avais répudiée, la nation renégate, Israël, et que je lui avais remis l’acte de divorce; mais sa soeur perfide, la nation de Juda, n’a pas pris peur; à son tour, elle alla se prostituer.
9 Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete.
Ses scandaleux dérèglements déshonorèrent le pays, elle trahit sa foi avec des idoles de pierre et de bois.
10 Atako bongo, ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, azongaki epai na Ngai te na motema na ye mobimba; azongaki na ye kaka likolo-likolo, » elobi Yawe.
Et malgré tout, sa perfide soeur, la nation de Juda, n’est pas revenue à moi de tout son coeur, mais de façon hypocrite," dit l’Eternel.
11 Yawe alobaki na ngai: « Mopengwi Isalaele azali sembo koleka mopengwi Yuda.
L’Eternel me dit encore: "La nation renégate d’Israël peut se prétendre innocente en comparaison de Juda, la nation perfide.
12 Kende kosakola sango oyo na nor: ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › elobi Yawe, ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, pamba te nazali Moyengebene, › elobi Yawe. ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.
Tu iras donc proclamer les paroles suivantes du côté du Nord, tu diras: Reviens, renégate, ô Israël! dit l’Eternel. Je ne ferai plus tomber mon courroux sur vous, car je suis clément, dit l’Eternel, mon ressentiment n’est pas durable.
13 Ndima kaka mabe na yo, mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo; obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya, na se ya banzete nyonso ya mibesu, mpe otosaki Ngai te, › » elobi Yawe.
Seulement, reconnais ta faute, que tu as péché contre l’Eternel, ton Dieu, que tu étais prodigue de démarches auprès des étrangers, sous tous les arbres verdoyants, et que tu n’écoutais pas ma voix", dit l’Eternel.
14 « Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona.
Revenez, enfants rebelles, dit l’Eternel, car je veux, moi, contracter une union avec vous. Je vous prendrai un par ville; deux par famille, et je vous amènerai à Sion.
15 Bongo nakopesa bino bakambi kolanda posa ya motema na Ngai, bakambi oyo bakotambolisa bino na bwanya mpe na mayele.
Je vous donnerai des pasteurs selon mon coeur, qui vous conduiront avec sagesse et discernement.
16 Na mikolo wana, tango bokokoma penza ebele na mokili, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te: ‹ Sanduku ya Boyokani ya Yawe. › Bakomitungisa lisusu mpo na yango te mpe bakokanisa yango lisusu te; kozanga na yango ekolobela bato eloko moko te, mpe bakoluka lisusu te kosala Sanduku ya Boyokani.
Alors, quand vous serez devenus, à cette époque, nombreux et prospères dans le pays, déclare l’Eternel, on ne dira plus: Arche de l’Alliance du Seigneur! La pensée n’en reviendra plus à l’esprit, on n’en rappellera plus le souvenir ni on n’en remarquera l’absence: on n’en fera plus d’autre.
17 Na tango wana, bakobenga Yelusalemi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, mpe bikolo nyonso ekosangana na Yelusalemi mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yawe. Boye, bakolanda lisusu te baposa mabe ya mitema na bango.
En ces temps on appellera Jérusalem: "Trône de l’Eternel. Tous les peuples s’assembleront là, à Jérusalem, en l’honneur de l’Eternel, et ils cesseront de suivre les mauvais penchants de leur coeur.
18 Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula.
A cette époque, la maison de Juda ira se joindre à la maison d’Israël, et ensemble elles reviendront du pays du Nord au pays que j’ai donné comme héritage à vos ancêtres.
19 Namilobelaki: ‹ Esengo nini penza nazalaki na yango ya kokamata bino lokola bana mpe kopesa bino mikili ya kitoko, libula oyo eleki kitoko kati na bikolo! › Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata › mpe bokotika te kolanda Ngai.
Et je pensais en moi-même: "Comme je veux te faire une place parmi mes enfants et te donner un pays de délices, un patrimoine, magnifique entre tous, parmi les nations!" Et j’ajoutais: "Tu m’appelleras "mon Père" et tu ne t’éloigneras plus de moi."
20 Kasi bino lisanga ya Isalaele, bokosi Ngai lokola mwasi oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, » elobi Yawe.
Cependant, comme une épouse qui trahit son compagnon, ainsi vous m’avez trahi, maison d’Israël, dit l’Eternel.
21 Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba: ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele, pamba te babebisi nzela na bango mpe babosani Yawe, Nzambe na bango.
On entend du bruit sur les hauteurs: ce sont les sanglots, les supplications des enfants d’Israël! Car leur conduite a été dépravée, ils ont oublié l’Eternel, leur Dieu.
22 « Bino batomboki, bozonga epai na Ngai mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino! » « Solo, tokozonga epai na Yo, pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.
Revenez, ô enfants rebelles! Je guérirai vos égarements. Nous voici, nous allons à toi, car tu es l’Eternel, notre Dieu.
23 Solo, bisala-sala oyo ezali kosalema na bangomba mikuse mpe milayi ezali kaka makelele ya pamba. Solo, Yawe, Nzambe na biso, azali Lobiko ya Isalaele.
A coup sûr, ce n’était que mensonge ce qui venait des collines, ces attroupements dans les montagnes! à coup sûr, c’est en l’Eternel, notre Dieu, qu’est le salut d’Israël!
24 Wuta bolenge na biso, banzambe ya bikeko ebebisaki mbuma ya misala ya batata na biso, bibwele na bango mpe ngombe na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi.
Et c’est ce culte honteux qui a dévoré, dès notre jeunesse, le fruit du labeur de nos pères, leurs brebis et leurs boeufs, leurs fils et leurs filles!
25 Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »
Couchons-nous dans notre honte, enveloppons-nous de notre ignominie, puisque nous avons péché contre l’Eternel, notre Dieu, nous et nos ancêtres, dès notre jeune âge et jusqu’à ce jour, faute d’écouter la voix de l’Eternel, notre Dieu.

< Jeremi 3 >