< Jeremi 29 >

1 Tala makomi ya mokanda oyo mosakoli Jeremi atindaki, wuta na Yelusalemi, epai ya bakambi oyo batikalaki kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya basakoli mpe epai ya bato nyonso oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi.
Peygamber Yeremya'nın sürgünde sağ kalan halkın ileri gelenlerine, kâhinlerle peygamberlere ve Nebukadnessar'ın Yeruşalim'den Babil'e sürdüğü bütün halka Yeruşalim'den gönderdiği mektubun metni aşağıda yazılıdır.
2 Mokanda yango etindamaki sima na bato oyo kokende na bawumbu longwa na Yelusalemi: mokonzi Yekonia, mama ya mokonzi, bakalaka na ye ya lokumu, bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bato oyo balambaka bibende na moto mpe bato ya misala ya maboko.
Bu mektup Kral Yehoyakin'in, ana kraliçenin, saray görevlilerinin, Yahuda ve Yeruşalim önderlerinin, zanaatçılarla demircilerin Yeruşalim'den sürgüne gitmelerinden sonra,
3 Apesaki mokanda yango na maboko ya Eleasa, mwana mobali ya Shafani; mpe na maboko ya Gemaria, mwana mobali ya Ilikia. Ezali bango nde Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki na Babiloni epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. Mokanda yango elobaki boye:
Yahuda Kralı Sidkiya'nın Babil Kralı Nebukadnessar'a gönderdiği Şafan oğlu Elasa ve Hilkiya oğlu Gemarya eliyle gönderildi:
4 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi epai ya bato nyonso oyo namemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi:
İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB Yeruşalim'den Babil'e sürdüğü herkese şöyle diyor:
5 « Botonga bandako mpe bovanda kuna; bolona banzete mpe bolia mbuma na yango;
“Evler yapıp içinde oturun, bahçe dikip ürününü yiyin.
6 bobalana, bobota bana mibali mpe bana basi, bolukela bana na bino ya mibali basi mpe bobalisa bana na bino ya basi, mpo ete bango mpe babota bana mibali mpe bana basi. Bobotana kuna mpe bokoma ebele, mpe botika te ete motango na bino ekita.
Evlenin, oğullarınız, kızlarınız olsun; oğullarınızı, kızlarınızı evlendirin. Onların da oğulları, kızları olsun. Orada çoğalın, azalmayın.
7 Boluka kimia mpe bolamu ya engumba epai wapi namemaki bino na bowumbu; bobondela Yawe mpo na yango, pamba te soki yango ebongi, bino mpe bokozala malamu. »
Sizi sürmüş olduğum kentin esenliği için uğraşın. O kent için RAB'be dua edin. Çünkü esenliğiniz onunkine bağlıdır.”
8 Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino: bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto.
Evet, İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB diyor ki, “Aranızdaki peygamberlerle falcılara aldanmayın. Düş görmeye özendirdiğiniz kişilere kulak asmayın.
9 Pamba te bazali nde kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai; natindi bango te, » elobi Yawe.
Çünkü onlar adımı kullanarak size yalan peygamberlik ediyorlar. Onları ben göndermedim.” RAB böyle diyor.
10 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi: « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo.
RAB diyor ki, “Babil'de yetmiş yılınız dolunca sizinle ilgilenecek, buraya sizi geri getirmek için verdiğim iyi sözü tutacağım.
11 Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
Çünkü sizin için düşündüğüm tasarıları biliyorum” diyor RAB. “Kötü tasarılar değil, size umutlu bir gelecek sağlayan esenlik tasarıları bunlar.
12 Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai; mpe Ngai nakoyoka bino.
O zaman beni çağıracak, gelip bana yakaracaksınız. Ben de sizi işiteceğim.
13 Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba.
Beni arayacaksınız, bütün yüreğinizle arayınca beni bulacaksınız.
14 Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »
Kendimi size buldurtacağım” diyor RAB. “Sizi eski gönencinize kavuşturacağım. Sizi sürdüğüm bütün yerlerden ve uluslardan toplayacağım” diyor RAB. “Ve sizi sürgün ettiğim yerden geri getireceğim.”
15 Solo, bokoki koloba: « Yawe abimisi basakoli kati na biso awa na Babiloni! »
Madem, “RAB bizim için Babil'de peygamberler çıkardı” diyorsunuz,
16 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi oyo avandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, na tina na bavandi nyonso ya engumba oyo, mpe na tina na bandeko na bino oyo bakendeki te na bowumbu elongo na bino;
Davut'un tahtında oturan kral, bu kentte kalan halk ve sizinle sürgüne gitmeyen yurttaşlarınız için RAB şöyle diyor.
17 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, mpe nakokomisa bango lokola mbuma ya figi oyo epola, oyo moto ata moko te akokoka kolia.
Evet, Her Şeye Egemen RAB diyor ki, “Üzerlerine kılıç, kıtlık, salgın hastalık göndereceğim. Onları yenilmeyecek kadar çürük, bozuk incir gibi edeceğim.
18 Nakolanda bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka; mpe na miso ya bikolo nyonso ya mabele, nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya lisuma, eloko ya kobanga mpe ya kotiola kati na bikolo nyonso epai wapi nakobengana bango.
Kılıçla, kıtlıkla, salgın hastalıkla peşlerine düşeceğim. Yeryüzündeki bütün krallıklara dehşet saçacak, kendilerini sürdüğüm bütün ülkeler arasında lanetlenecek, dehşet ve alay konusu olacak, aşağılanacaklar.
19 Pamba te bayokaki maloba na Ngai te, » elobi Yawe, « maloba oyo nazalaki kotindela bango tango na tango na nzela ya basali na Ngai, basakoli. Mpe bino bato oyo bokendeki na bowumbu, bino mpe boyokaki te, » elobi Yawe.
Çünkü sözlerime kulak asmadılar” diyor RAB. “Kullarım peygamberler aracılığıyla sözlerimi defalarca gönderdim, ama dinlemediniz.” RAB böyle diyor.
20 Yango wana, boyoka Liloba na Yawe, bino bawumbu nyonso oyo natindaki na Babiloni longwa na Yelusalemi.
Bunun için, ey sizler, Yeruşalim'den Babil'e gönderdiğim sürgünler, RAB'bin sözüne kulak verin!
21 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na Akabi, mwana mobali ya Kolaya, mpe na tina na Sedesiasi, mwana mobali ya Maaseya, oyo bazali kosakola makambo ya lokuta epai na bino, na Kombo na Ngai: « Nakokaba bango na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe akoboma bango na miso na bino.
Adımı kullanarak size yalan peygamberlik eden Kolaya oğlu Ahav'la Maaseya oğlu Sidkiya için İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB diyor ki, “Onları Babil Kralı Nebukadnessar'ın eline teslim edeceğim, gözünüzün önünde ikisini de öldürecek.
22 Likolo na bango, bawumbu nyonso oyo bawutaki na Yuda, bongo bazali na Babiloni, bakosalela elakeli mabe oyo: ‹ Tika ete Yawe asala bino ndenge asalaki Sedesiasi mpe Akabi, oyo mokonzi ya Babiloni atumbaki na moto! ›
Onlardan ötürü Babil'deki bütün Yahuda sürgünleri, ‘RAB seni Babil Kralı'nın diri diri yaktırdığı Sidkiya ve Ahav'la aynı duruma düşürsün’ diye lanet edecek.
23 Pamba te basalaki kati na Isalaele ekobo elongo na basi ya baninga na bango, bapaya, mpe balobaki lokuta na Kombo na Ngai, nzokande Ngai natindaki bango te kosala bongo. Nayebi yango malamu, mpe Ngai moko nazali Motatoli na yango, » elobi Yawe.
Çünkü İsrail'de çirkin şeyler yaptılar; komşularının karılarıyla zina ettiler, onlara buyurmadığım halde adımla yalan sözler söylediler. Bunu biliyorum ve buna tanığım” diyor RAB.
24 Yebisa Shemaya, moto ya Nekelami, maloba oyo:
Nehelamlı Şemaya'ya diyeceksin ki,
25 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Otindaki mikanda na kombo na yo moko epai ya bato nyonso ya Yelusalemi, epai ya Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpe epai ya Banganga-Nzambe. Olobaki na Sofoni:
“İsrail'in Tanrısı, Her Şeye Egemen RAB şöyle diyor: Sen Yeruşalim halkına, Maaseya oğlu Kâhin Sefanya'yla bütün öbür kâhinlere kendi adına mektuplar göndererek şöyle yazmıştın:
26 ‹ Yawe aponaki yo Nganga-Nzambe na esika ya Yeoyada mpo ete obatela Tempelo ya Yawe. Osengelaki kobwaka na boloko mpe kokanga bibende na makolo, bato pamba oyo bazali komimona lokola basakoli.
“‘RAB tapınağın sorumlusu olarak Yehoyada yerine seni kâhin atadı. Peygamber gibi davranan her deliyi tomruğa, demir boyunduruğa vurmak görevindir.
27 Boye, mpo na nini opamelaki te mosakoli Jeremi, moto ya Anatoti, oyo azali komimona lokola mosakoli kati na bino?
Öyleyse aranızda kendini peygamber ilan eden Anatotlu Yeremya'yı neden azarlamadın?
28 Atindelaki biso sango oyo kati na Babiloni: Bowumbu na bino ekowumela tango molayi. Yango wana, botonga bandako mpe bovanda kuna, bolona bilanga mpe bolia mbuma na yango. › »
Çünkü Yeremya biz Babil'dekilere şu haberi gönderdi: Sürgün uzun olacak. Onun için evler yapıp içinde oturun; bahçe dikip ürününü yiyin.’”
29 Nzokande, Nganga-Nzambe Sofoni atangisaki mosakoli Jeremi mokanda yango.
Kâhin Sefanya mektubu Peygamber Yeremya'ya okuyunca,
30 Boye, Yawe alobaki na Jeremi:
RAB Yeremya'ya şöyle seslendi:
31 « Tinda sango oyo epai ya bawumbu nyonso: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Shemaya, moto ya Nekelami: Lokola Shemaya asakolaki makambo ya lokuta epai na bino, nzokande natindaki ye te, mpe amemi bino na kotia motema na lokuta,
“Bütün sürgünlere şu haberi gönder: ‘Nehelamlı Şemaya için RAB diyor ki: Madem ben göndermediğim halde Şemaya peygamberlik edip sizleri yalana inandırdı,
32 tala liloba oyo Yawe alobi: Solo, nakopesa Shemaya, moto ya Nekelami, etumbu elongo na bakitani na ye. Kati na bato na ye, moko te akotikala, mpe akotikala komona te bolamu oyo nakosala epai ya bato na Ngai, elobi Yawe, pamba te atindiki bato na Ngai kotombokela Ngai. › »
ben de Nehelamlı Şemaya'yı ve bütün soyunu cezalandıracağım: Bu halkın arasında soyundan kimse sağ kalmayacak, halkıma yapacağım iyiliği görmeyecek, diyor RAB. Çünkü o halkı bana karşı kışkırttı.’”

< Jeremi 29 >