< Jeremi 28 >

1 Kaka na mobu wana, mobu ya minei, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, mosakoli Anania, mwana mobali ya Azuri, moto ya mboka Gabaoni, alobaki na ngai kati na Tempelo ya Yawe na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso:
In the fifth month of that same year, the fourth year, near the beginning of the reign of King Zedekiah of Judah, the prophet Hananiah son of Azzur, who was from Gibeon, said to me in the house of the LORD in the presence of the priests and all the people:
2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni.
“This is what the LORD of Hosts, the God of Israel, says: ‘I have broken the yoke of the king of Babylon.
3 Etikali kaka mibu mibale; nakozongisa na esika oyo bisalelo nyonso ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azwaki na esika oyo mpe amemaki na Babiloni.
Within two years I will restore to this place all the articles of the house of the LORD that Nebuchadnezzar king of Babylon removed from here and carried to Babylon.
4 Nakozongisa lisusu na esika oyo: Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, mpe bato nyonso oyo, wuta na Yuda, bakendeki na bowumbu, na Babiloni, › elobi Yawe, ‹ pamba te nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. › »
And I will restore to this place Jeconiah son of Jehoiakim king of Judah, along with all the exiles from Judah who went to Babylon,’ declares the LORD, ‘for I will break the yoke of the king of Babylon.’”
5 Bongo Mosakoli Jeremi azongiselaki mosakoli Anania eyano na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso oyo batelemaki kati na Tempelo ya Yawe.
Then the prophet Jeremiah replied to the prophet Hananiah in the presence of the priests and all the people who were standing in the house of the LORD.
6 Mosakoli Jeremi alobaki: « Amen! Tika ete Yawe asala bongo! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu!
“Amen!” Jeremiah said. “May the LORD do so! May the LORD fulfill the words you have prophesied, and may He restore the articles of His house and all the exiles back to this place from Babylon.
7 Nzokande, yoka maloba oyo nalingi koloba na yo mpe na bato nyonso:
Nevertheless, listen now to this message I am speaking in your hearing and in the hearing of all the people.
8 Wuta kala, basakoli oyo basakolaki liboso ete yo mpe ngai tozala, basakolaki bitumba, pasi mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kotelemela bikolo ebele mpe mikili ya makasi;
The prophets of old who preceded you and me prophesied war, disaster, and plague against many lands and great kingdoms.
9 kasi soki mosakoli asakoli kimia, akondimama ete azali solo mosakoli oyo Yawe atindi masakoli na ye ekokisami. »
As for the prophet who prophesies peace, only if the word of the prophet comes true will the prophet be recognized as one the LORD has truly sent.”
10 Bongo mosakoli Anania alongolaki ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi mpe abukaki yango.
Then the prophet Hananiah took the yoke off the neck of Jeremiah the prophet and broke it.
11 Anania alobaki liboso ya bato nyonso: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Liboso ete mibu mibale ekoka, nakobuka ndenge wana ekangiseli ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, na kingo ya bikolo nyonso. › » Mpe mosakoli Jeremi akendeki na ye.
And in the presence of all the people Hananiah proclaimed, “This is what the LORD says: ‘In this way, within two years I will break the yoke of Nebuchadnezzar king of Babylon off the neck of all the nations.’” At this, Jeremiah the prophet went on his way.
12 Sima na mosakoli Anania kobuka ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi:
But shortly after Hananiah the prophet had broken the yoke off his neck, the word of the LORD came to Jeremiah:
13 « Kende koloba na Anania: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Solo, obuki ekangiseli ya banzete; kasi na esika na yango, okolata nde ekangiseli ya ebende.
“Go and tell Hananiah that this is what the LORD says: ‘You have broken a yoke of wood, but in its place you have fashioned a yoke of iron.’
14 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nasili kotia ekangiseli ya ebende na kingo ya bikolo nyonso mpo ete esalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe ekosalela ye solo. Nakopesa ye bokonzi ata likolo ya banyama ya zamba. › »
For this is what the LORD of Hosts, the God of Israel, says: ‘I have put a yoke of iron on the neck of all these nations to make them serve Nebuchadnezzar king of Babylon, and they will serve him. I have even given him control of the beasts of the field.’”
15 Bongo mosakoli Jeremi alobaki lisusu na mosakoli Anania: « Anania, yoka! Yawe atindi yo te; mpe ozali kotindika bato oyo na kotia motema na makambo ya lokuta!
Then the prophet Jeremiah said to the prophet Hananiah, “Listen, Hananiah! The LORD did not send you, but you have persuaded this people to trust in a lie.
16 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nakolongola yo na mokili oyo, okokufa kaka na mobu oyo; pamba te otindiki bato na kotombokela Yawe. › »
Therefore this is what the LORD says: ‘I am about to remove you from the face of the earth. You will die this year because you have preached rebellion against the LORD.’”
17 Kaka na mobu wana, na sanza ya sambo, mosakoli Anania akufaki.
And in the seventh month of that very year, the prophet Hananiah died.

< Jeremi 28 >