< Jeremi 27 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda:
猶大王約西亞的兒子約雅敬登基的時候,有這話從耶和華臨到耶利米說:
2 Tala liloba oyo Ngai Yawe nalobi: « Sala ekangiseli na basinga mpe banzete mpe kanga yango na kingo na yo.
「耶和華對我如此說:你做繩索與軛,加在自己的頸項上,
3 Bongo tinda maloba epai ya bakonzi ya Edomi, ya Moabi, ya Amoni, ya Tiri mpe ya Sidoni na nzela ya batindami oyo bayei na Yelusalemi mpo na kokutana na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda.
藉那些來到耶路撒冷見猶大王西底家的使臣之手,把繩索與軛送到以東王、摩押王、亞捫王、泰爾王、西頓王那裏,
4 Pesa bango sango oyo bakomemela bakonzi na bango mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‘Boyebisa bakonzi na bino maloba oyo:
且囑咐使臣,傳與他們的主人說,萬軍之耶和華-以色列的上帝如此說:
5 Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi.
我用大能和伸出來的膀臂,創造大地和地上的人民、牲畜。我看給誰相宜,就把地給誰。
6 Sik’oyo, Ngai, nakabi mikili oyo nyonso na maboko ya mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni; nakabi mpe na maboko na ye ata banyama ya zamba mpo ete etosa ye.
現在我將這些地都交給我僕人巴比倫王尼布甲尼撒的手,我也將田野的走獸給他使用。
7 Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye.
列國都必服事他和他的兒孫,直到他本國遭報的日期來到。那時,多國和大君王要使他作他們的奴僕。
8 Soki ekolo moko to mokili moko eboyi kosalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, to eboyi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni, nakopesa ekolo yango etumbu na nzela mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, elobi Yawe, kino nakobebisa yango na nzela ya loboko na ye.
「無論哪一邦哪一國,不肯服事這巴比倫王尼布甲尼撒,也不把頸項放在巴比倫王的軛下,我必用刀劍、饑荒、瘟疫刑罰那邦,直到我藉巴比倫王的手將他們毀滅。這是耶和華說的。
9 Boye, boyokela te basakoli na bino, bato na bino ya soloka, bato na bino oyo balimbolaka bandoto, bato na bino oyo basololaka na bakufi, oyo bazali koloba na bino ete bosalela mokonzi ya Babiloni te.
至於你們,不可聽從你們的先知和占卜的、圓夢的、觀兆的,以及行邪術的;他們告訴你們說:『你們不致服事巴比倫王。』
10 Bazali kosakola makambo ya lokuta, kaka mpo na komema bino mosika ya mokili na bino. Ngai nakobengana bino solo mpe bokokufa.
他們向你們說假預言,要叫你們遷移,遠離本地,以致我將你們趕出去,使你們滅亡。
11 Kasi soki ekolo moko endimi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe endimi kosalela ye, nakotika ekolo yango na kimia kati na mokili na bango mpo ete basala bilanga mpe bawumela kuna, elobi Yawe.’ › »
但哪一邦肯把頸項放在巴比倫王的軛下服事他,我必使那邦仍在本地存留,得以耕種居住。這是耶和華說的。」
12 Bongo napesaki sango kaka wana epai ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda: « Bomema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe bosalela ye elongo na bato na ye, bongo bokobika!
我就照這一切的話對猶大王西底家說:「要把你們的頸項放在巴比倫王的軛下,服事他和他的百姓,便得存活。
13 Mpo na nini bino elongo na bato na bino bokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ndenge Yawe akataki mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kosalela mokonzi ya Babiloni?
你和你的百姓為何要因刀劍、饑荒、瘟疫死亡,正如耶和華論到不服事巴比倫王的那國說的話呢?
14 Boyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino: ‹ Bokosalela mokonzi ya Babiloni te! › Bazali kosakola makambo ya lokuta.
不可聽那些先知對你們所說的話;他們說:『你們不致服事巴比倫王』,其實他們向你們說假預言。
15 Natindaki bango te, » elobi Yawe, « bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Nakobengana bino mpe bokokufa, bino mpe basakoli oyo bazali kosakola epai na bino. »
耶和華說:『我並沒有打發他們,他們卻託我的名說假預言,好使我將你們和向你們說預言的那些先知趕出去,一同滅亡。』」
16 Bongo nalobaki na Banganga-Nzambe mpe na bato nyonso: « Tala makambo oyo Yawe alobi: Boyoka te basakoli na bino, oyo bazali koloba: ‹ Tala, bisalelo ya Tempelo ya Yawe ekozonga noki wuta na Babiloni. › Bazali koloba na bino makambo ya lokuta!
我又對祭司和這眾民說:「耶和華如此說:你們不可聽那先知對你們所說的預言。他們說:『耶和華殿中的器皿快要從巴比倫帶回來』;其實他們向你們說假預言。
17 Boyoka bango te! Bosalela mokonzi ya Babiloni, bongo bokobika! Mpo na nini engumba oyo ebebisama?
不可聽從他們,只管服事巴比倫王便得存活。這城何致變為荒場呢?
18 Soki bazali solo basakoli mpe Liloba na Yawe ezali kati na bango, tika ete basambela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete bisalelo oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi ekende na Babiloni te.
他們若果是先知,有耶和華的話臨到他們,讓他們祈求萬軍之耶和華,使那在耶和華殿中和猶大王宮內,並耶路撒冷剩下的器皿,不被帶到巴比倫去。(
19 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na makonzi, nzungu ya monene ya bronze, bivandelo na yango mpe bisalelo mosusu oyo etikalaki kati na engumba wana,
因為萬軍之耶和華論到柱子、銅海、盆座,並剩在這城裏的器皿,
20 bisalelo oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atikaki tango amemaki Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, na bowumbu longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, elongo na bankumu nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi;
就是巴比倫王尼布甲尼撒擄掠猶大王約雅敬的兒子耶哥尼雅,和猶大、耶路撒冷一切貴冑的時候所沒有掠去的器皿。)
21 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na biloko oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi:
論到那在耶和華殿中和猶大王宮內,並耶路撒冷剩下的器皿,萬軍之耶和華-以色列的上帝如此說:
22 ‹ Bakomema yango na Babiloni, mpe ekotikala kuna kino na mokolo oyo nakolandela yango, › elobi Yawe, ‹ nakolongola yango mpe nakozongisa yango na esika oyo, elobi Yawe. › »
必被帶到巴比倫存在那裏,直到我眷顧以色列人的日子。那時,我必將這器皿帶回來,交還此地。這是耶和華說的。」

< Jeremi 27 >