< Jeremi 26 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda:
All'inizio del regno di Ioiakìm figlio di Giosia, re di Giuda, fu rivolta a Geremia questa parola da parte del Signore.
2 « Tala liloba oyo Yawe alobi: Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo; kolongola ata liloba moko te.
Disse il Signore: «Và nell'atrio del tempio del Signore e riferisci a tutte le città di Giuda che vengono per adorare nel tempio del Signore tutte le parole che ti ho comandato di annunziare loro; non tralasciare neppure una parola.
3 Tango mosusu bakoyoka, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe; bongo Ngai nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kotindela bango pasi likolo ya misala na bango ya mabe.
Forse ti ascolteranno e ognuno abbandonerà la propria condotta perversa; in tal caso disdirò tutto il male che pensavo di fare loro a causa della malvagità delle loro azioni.
4 Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Soki boyokeli Ngai te, soki boboyi kotosa malakisi oyo napesaki bino
Tu dirai dunque loro: Dice il Signore: Se non mi ascolterete, se non camminerete secondo la legge che ho posto davanti a voi
5 mpe boboyi kotosa maloba ya basali na Ngai, basakoli, oyo nazalaki kotindela bino tango na tango atako boboyaki koyokela bango,
e se non ascolterete le parole dei profeti miei servi che ho inviato a voi con costante premura, ma che voi non avete ascoltato,
6 nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › »
io ridurrò questo tempio come quello di Silo e farò di questa città un esempio di maledizione per tutti i popoli della terra».
7 Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bazalaki koyoka Jeremi koloba maloba oyo kati na Tempelo ya Yawe.
I sacerdoti, i profeti e tutto il popolo udirono Geremia che diceva queste parole nel tempio del Signore.
8 Kasi tango Jeremi asilisaki koloba na bato nyonso maloba oyo Yawe atindaki ye, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye mpe balobaki: « Okokufa!
Ora, quando Geremia finì di riferire quanto il Signore gli aveva comandato di dire a tutto il popolo, i sacerdoti e i profeti lo arrestarono dicendo: «Devi morire!
9 Mpo na nini ozali kosakola na Kombo na Yawe ete Ndako oyo ekokoma lokola Silo; engumba oyo ekobebisama, ekotikala lisusu na bato te? » Ebele ya bato nyonso bazingelaki Jeremi kati na Tempelo ya Yawe.
Perché hai predetto nel nome del Signore: Questo tempio diventerà come Silo e questa città sarà devastata, disabitata?». Tutto il popolo si radunò contro Geremia nel tempio del Signore.
10 Tango bakalaka ya Yuda bayokaki makambo oyo nyonso, balongwaki na ndako ya mokonzi, bakendeki na Tempelo ya Yawe mpe bavandaki liboso ya Ekuke ya Sika ya Tempelo ya Yawe.
I capi di Giuda vennero a sapere queste cose e salirono dalla reggia nel tempio del Signore e sedettero all'ingresso della Porta Nuova del tempio del Signore.
11 Banganga-Nzambe mpe basakoli balobaki na bakambi mpe na bato nyonso: « Moto oyo asengeli kokufa, pamba te asakoli mabe mpo na engumba oyo. Bino moko boyoki yango na matoyi na bino! »
Allora i sacerdoti e i profeti dissero ai capi e a tutto il popolo: «Una sentenza di morte merita quest'uomo, perché ha profetizzato contro questa città come avete udito con i vostri orecchi!».
12 Jeremi alobaki na bakambi mpe na bato nyonso: « Yawe atindi ngai kosakola mpo na Ndako mpe engumba oyo, makambo nyonso oyo bosili koyoka.
Ma Geremia rispose a tutti i capi e a tutto il popolo: «Il Signore mi ha mandato a profetizzare contro questo tempio e contro questa città le cose che avete ascoltate.
13 Bobongola sik’oyo bizaleli mpe misala na bino, mpe botosa Yawe, Nzambe na bino; mpe Yawe akobongola mokano oyo asilaki kozwa, mpe akotindela bino lisusu te pasi oyo alakaki bino.
Or dunque migliorate la vostra condotta e le vostre azioni e ascoltate la voce del Signore vostro Dio e il Signore ritratterà il male che ha annunziato contro di voi.
14 Bongo mpo na ngai, nazali na maboko na bino, bosala ngai makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu mpe sembo.
Quanto a me, eccomi in mano vostra, fate di me come vi sembra bene e giusto;
15 Kasi boyeba ete soki bobomi ngai, bokomema ngambo ya pamba na bomoi na bino mpe na engumba oyo elongo na bavandi na yango nyonso, likolo ya makila ya moto oyo ayebi likambo te; pamba te, solo penza, Yawe nde atindaki ngai epai na bino mpo na koyebisa bino maloba nyonso oyo, mpo ete boyoka yango. »
ma sappiate bene che, se voi mi ucciderete, attirerete sangue innocente su di voi, su questa città e sui suoi abitanti, perché il Signore mi ha veramente inviato a voi per esporre ai vostri orecchi tutte queste cose».
16 Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli: « Esengeli te koboma moto oyo! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. »
I capi e tutto il popolo dissero ai sacerdoti e ai profeti: «Non ci deve essere sentenza di morte per quest'uomo, perché ci ha parlato nel nome del Signore nostro Dio».
17 Ndambo ya bakambi ya mokili batelemaki mpe balobaki na lisanga mobimba ya bato:
Allora si alzarono alcuni anziani del paese e dissero a tutta l'assemblea del popolo:
18 « Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda; alobaki na bato nyonso ya Yuda: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›
Sion sarà arata come un campo, Gerusalemme diventerà un cumulo di rovine, il monte del tempio un'altura boscosa! «Michea il Morastita, che profetizzava al tempo di Ezechia, re di Giuda, affermò a tutto il popolo di Giuda: Dice il Signore degli eserciti:
19 Boni, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, to moto mosusu kati na Yuda abomaki ye? Ezekiasi atosaki Yawe te mpe asalelaki mosakoli Mishe ngolu te? Yawe abongolaki mokano na Ye te ya kotindela bango pasi oyo alakaki? Tokomibendela biso moko pasi ya makasi na pamba. »
Forse Ezechia re di Giuda e tutti quelli di Giuda lo uccisero? Non temettero piuttosto il Signore e non placarono il volto del Signore e così il Signore disdisse il male che aveva loro annunziato? Noi, invece, stiamo per commettere una grave iniquità a nostro danno».
20 Nzokande, Iri, mwana mobali ya Shemaya, moto ya Kiriati-Yearimi, azalaki mpe kosakola na Kombo na Yawe. Azalaki kaka kosakola makambo moko na Jeremi na tina na engumba mpe mokili oyo.
C'era anche un altro uomo che profetizzava nel nome del Signore, Uria figlio di Semaià da Kiriat-Iearìm; egli profetizzò contro questa città e contro questo paese con parole simili a quelle di Geremia.
21 Tango mokonzi Yeoyakimi elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bakambi bayokaki maloba ya Iri, balukaki koboma ye. Kasi tango Iri ayokaki yango, abangaki makasi mpe akimaki na Ejipito.
Il re Ioiakìm, tutti i suoi prodi e tutti i magistrati udirono le sue parole e il re cercò di ucciderlo, ma Uria lo venne a sapere e per timore fuggì andandosene in Egitto.
22 Mokonzi Yeoyakimi atindaki Elinatani, mwana mobali ya Akibori, na Ejipito elongo na bato mosusu.
Allora il re Ioiakìm inviò in Egitto uomini come Elnatàn figlio di Acbòr, e altri con lui.
23 Babimisaki Iri na Ejipito mpe bamemaki ye epai ya mokonzi Yeoyakimi oyo abomaki ye na mopanga mpe apesaki mitindo ete babwaka ebembe na ye kati na kunda oyo bakundaka bato pamba.
Costoro fecero uscire dall'Egitto Uria e lo condussero al re Ioiakìm che lo fece uccidere di spada e fece gettare il suo cadavere nelle fosse della gente del popolo.
24 Nzokande Ayikami, mwana mobali ya Shafani, abatelaki Jeremi; boye akabamaki te na maboko ya bato mpo ete baboma ye.
Ma la mano di Achikàm figlio di Safàn fu a favore di Geremia, perché non lo consegnassero in potere del popolo per metterlo a morte.

< Jeremi 26 >