< Jeremi 25 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi na tina na bato nyonso ya Yuda, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi, mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mobu moko na bokonzi.
La parole qui fut [adressée] à Jérémie touchant tout le peuple de Juda, la quatrième année de Jéhojakim fils de Josias Roi de Juda, qui est la première année de Nébucadnetsar Roi de Babylone.
2 Mosakoli Jeremi alobaki na bato nyonso ya Yuda mpe na bavandi nyonso ya Yelusalemi:
Laquelle Jérémie le Prophète prononça à tout le peuple de Juda, et à tous les habitants de Jérusalem, en disant:
3 « Wuta tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi kino na mokolo ya lelo, ekokisi mibu tuku mibale na misato oyo nayebisaka bino tango na tango liloba oyo Yawe azalaki koloba na ngai, kasi boyokaki ngai te.
Depuis la treizième année de Josias fils d'Amon Roi de Juda, jusqu’à ce jour, qui est la vingt-troisième année, la parole de l'Eternel m'a été [adressée], et je vous ai parlé, me levant dès le matin, et parlant; mais vous n'avez point écouté.
4 Mpe atako Yawe azalaki kotindela bino tango na tango basakoli, basali na Ye, kasi bosalaki kaka keba te mpo na koyoka liloba na Ye.
Et l'Eternel vous a envoyé tous ses serviteurs Prophètes, se levant dès le matin, et les envoyant; mais vous ne les avez point écoutés, et vous n'avez point incliné vos oreilles pour écouter.
5 Bazalaki koloba na bino: ‹ Tika ete moko na moko kati na bino abongola motema, atika nzela mpe misala na ye ya mabe; pamba te ezali na nzela wana nde bokoki kowumela na mokili oyo Yawe apesaki bino mpe batata na bino, wuta kala, mpo na libela.
Lorsqu'ils disaient: détournez-vous maintenant chacun de son mauvais train, et de la malice de vos actions, et vous habiterez d'un siècle à l'autre sur la terre que l'Eternel vous a donnée, à vous et à vos pères.
6 Bolanda banzambe mosusu te, bosalela mpe bofukamela yango te; bopelisa kanda na Ngai te na nzela ya banzambe ya bikeko oyo maboko na bino esali, mpe Ngai nakomonisa bino pasi te.
Et n'allez point après d'autres dieux, pour les servir, et pour vous prosterner devant eux, et ne m'irritez point par les œuvres de vos mains; et je ne vous ferai aucun mal.
7 Kasi boyokaki Ngai te, › elobi Yawe, ‹ botumbolaki Ngai kutu na nzela ya banzambe ya bikeko, oyo maboko na bino esalaki, mpe bomibendelaki bino moko pasi. › »
Mais vous m'avez désobéi, dit l'Eternel, pour m'irriter par les œuvres de vos mains, à votre dommage.
8 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Lokola boyokaki maloba na Ngai te,
C'est pourquoi ainsi a dit l'Eternel des armées: parce que vous n'avez point écouté mes paroles,
9 nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola; boye bakotikala seko na seko libebi.
Voici, j'enverrai, et j'assemblerai toutes les familles de l'Aquilon, dit l'Eternel, [j'enverrai], dis-je, vers Nébucadnetsar Roi de Babylone mon serviteur; et je les ferai venir contre ce pays et contre ses habitants, et contre toutes ces nations d'alentour; je les détruirai à la façon de l'interdit, je les mettrai en désolation, et en opprobre, et en déserts éternels.
10 Nakolongola kati na bango pole ya mwinda, banzembo ya esengo mpe kosepela, makelele ya bisengo ya libala ya sika mpe ya libanga oyo banikelaka ble.
Et je ferai cesser parmi eux la voix de joie, et la voix d'allégresse, la voix de l'époux et la voix de l'épouse, le bruit des meules, et la lumière des lampes.
11 Mokili oyo mobimba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te; mpe bikolo oyo ekosalela mokonzi ya Babiloni mibu tuku sambo.
Et tout ce pays sera un désert, jusqu’à s'en étonner, et ces nations seront asservies au Roi de Babylone soixante-dix ans.
12 Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.
Et il arrivera que quand les soixante-dix ans seront accomplis, je punirai, dit l'Eternel, le Roi de Babylone, et cette nation-là, de leurs iniquités, et le pays des Caldéens, que je mettrai en désolations éternelles.
13 Nakokokisa kati na mokili yango maloba nyonso oyo nalobaki mpo na kotelemela yango, maloba nyonso oyo ekomama kati na buku oyo, maloba oyo Jeremi asakolaki mpo na kotelemela bikolo nyonso.
Et je ferai venir sur ce pays-là toutes mes paroles que j'ai prononcées contre lui, toutes les choses qui sont écrites dans ce livre, lesquelles Jérémie a prophétisées contre toutes ces nations.
14 Bango, bato ya Babiloni, bakokoma mpe bawumbu ya bikolo ebele mpe ya bakonzi ya nguya; nakosalela bango kolanda etamboli mpe misala ya maboko na bango. »
Car de grands Rois aussi et de grandes nations se serviront d'eux, et je leur rendrai selon leurs actions, et selon l'œuvre de leurs mains.
15 Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobaki na ngai: « Kamata na loboko na Ngai kopo etonda na vino ya kanda na Ngai mpe melisa yango bikolo nyonso epai wapi nakotinda yo.
Car ainsi m'a dit l'Eternel, le Dieu d'Israël: prends de ma main la coupe de ce vin, [savoir] de cette fureur-ci, et en fais boire à tous les peuples auxquels je t'envoie.
16 Tango bakomela yango, bakolangwa mpe bakokoma kotenga-tenga liboso ya mopanga oyo nakotinda kati na bango. »
Ils [en] boiront, et ils [en] seront troublés, et ils en perdront l'esprit, à cause de l'épée que j'enverrai parmi eux.
17 Boye, nakamataki kopo yango na loboko ya Yawe mpe namelisaki yango bikolo nyonso epai wapi atindaki ngai:
Je pris donc la coupe de la main de l'Eternel, et j'en fis boire à toutes les nations auxquelles l'Eternel m'envoyait.
18 Yelusalemi elongo na bingumba ya Yuda, bakonzi mpe bakalaka na yango; mpo na kobebisa yango, kokomisa yango eloko ya somo, ya maseki mpe ya lisuma, ndenge ezali komonana sik’oyo.
[Savoir] à Jérusalem, et aux villes de Juda, et à ses Rois, et à ses principaux, pour les mettre en désolation, en étonnement, en opprobre, et en malédiction, comme [il paraît] aujourd'hui.
19 Namelisaki yango Faraon, mokonzi ya Ejipito; basali na ye, bakalaka na ye, bato na ye nyonso,
A Pharaon Roi d'Egypte, et à ses serviteurs, et aux principaux [de sa Cour], et à tout son peuple.
20 bapaya nyonso oyo bavandaka kuna, bakonzi nyonso ya mokili ya Utsi; bakonzi nyonso ya mokili ya Filisitia, ya Ashikeloni, ya Gaza, ya Ekroni mpe ya bato oyo batikalaki na Asidodi;
Et à tout le mélange [d'Arabie], et à tous les Rois du pays de Huts; et à tous les Rois du pays des Philistins, à Askélon, Gaza, et Hékron, et au reste d'Asdod.
21 Edomi, Moabi, bato ya Amoni;
A Edom; et à Moab; et aux enfants de Hammon;
22 bakonzi nyonso ya Tiri mpe ya Sidoni; bakonzi ya bisanga mpe ya bituka oyo ezalaka pene ya ebale monene;
A tous les Rois de Tyr; et à tous les Rois de Sidon; et aux Rois des Iles qui sont au delà de la mer;
23 Dedani, Tema, Buzi mpe bato nyonso oyo bavandaka mosika mpe batikaka mandefu te;
A Dédan; Téma; et Buz; et à tous ceux qui se sont coupés les cheveux;
24 bakonzi nyonso ya Arabi mpe bakonzi nyonso ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na esobe;
A tous les Rois d'Arabie, et à tous les Rois du mélange qui habitent au désert.
25 bakonzi nyonso ya Zimiri, ya Elami mpe ya Medi;
Et à tous les Rois de Zimri; et à tous les Rois de Hélam; et à tous les Rois de Mède;
26 bakonzi nyonso ya nor, oyo bazalaka pene mpe ba-oyo bazalaka mosika, moko pene na mosusu, bakonzi ya mboka nyonso oyo ezalaka na mokili. Sima na bango nyonso, mokonzi ya Sheshaki mpe akomela yango.
Et à tous les Rois de l'Aquilon, tant proches qu'éloignés l'un de l'autre; et à tous les Royaumes de la terre, qui sont sur le dessus de la terre; et le Roi de Sésac [en] boira après eux.
27 « Boye loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bomela, bolangwa mpe bosanza, bokweya mpo na kotelema lisusu te, mpo na mopanga oyo nakotinda kati na bino. ›
Et tu leur diras: ainsi a dit l'Eternel des armées, le Dieu d'Israël: buvez et soyez enivrés, même rendez le vin que vous avez bu et soyez renversés sans vous relever, à cause de l'épée que j'enverrai parmi vous.
28 Soki baboyi kozwa mpe komela kopo oyo ezali na loboko na yo, okoloba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Bomela! Bomela!
Or il arrivera qu'ils refuseront de prendre la coupe de ta main pour [en] boire; mais tu leur diras: ainsi a dit l'Eternel des armées: vous en boirez certainement.
29 Pamba te, botala! Ezali na engumba epai wapi babelelaka Kombo na Ngai nde nabandi kotinda pasi; boni, bokanisi ete bino bokozwa etumbu te? Bokozanga te kozwa etumbu, pamba te nazali koyeisa mopanga kati na bavandi nyonso ya mokili, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›
Car voici, je commence d'envoyer du mal sur la ville sur laquelle mon Nom est réclamé, et vous, en seriez-vous exempts en quelque sorte? vous n'en serez point exempts; car je m'en vais appeler l'épée sur tous les habitants de la terre, dit l'Eternel des armées.
30 Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango: ‹ Yawe azali koganga wuta na likolo, azali kotomboka lokola kake wuta na Esika na Ye ya bule, azali konguluma makasi mpo na kotelemela mokili na Ye! Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino, akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo!
Tu prophétiseras donc contre eux toutes ces paroles-là, et tu leur diras: l'Eternel rugira d'en haut, et fera entendre sa voix de la demeure de sa Sainteté; il rugira d'une façon épouvantable contre son agréable demeure; il redoublera vers tous les habitants de la terre un cri d'encouragement, comme quand on presse au pressoir.
31 Makelele ya makasi ekoyokana kino na suka ya mokili; pamba te Yawe akosambisa bikolo, akosambisa bato nyonso, akobomisa bato mabe na mopanga, › » elobi Yawe.
Le son éclatant en est venu jusques au bout de la terre; car l'Eternel plaide avec les nations, et il contestera contre toute chair; on livrera les méchants à l'épée, dit l'Eternel.
32 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Tala! Pasi ezali kopanzana longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu; mopepe makasi etelemi longwa na basuka ya mokili. »
Ainsi a dit l'Eternel des armées: voici, le mal s'en va sortir d'une nation à l'autre, et un grand tourbillon se lèvera du fond de la terre.
33 Na tango wana, bato oyo Yawe akoboma bakozala bisika nyonso, longwa na songe moko kino na songe mosusu ya mokili. Bakosalela bango matanga te, bakosangisa bango te mpo na kokunda bango.
Et en ce jour-là ceux qui auront été mis à mort par l'Eternel seront [étendus] depuis un bout de la terre, jusques à son autre bout, ils ne seront point pleurés, et ils ne seront point recueillis, ni ensevelis; mais ils seront comme du fumier sur le dessus de la terre.
34 Bino babateli bibwele, bolela mpe boganga! Bino bakambi ya bitonga, bobaluka-baluka na putulu! Pamba te tango na bino ya kokufa ekoki! Bokokweya mpe bokopanzana mike-mike lokola mbeki.
[Vous] pasteurs, hurlez et criez; et vous magnifiques du troupeau, vautrez-vous [dans la poudre]; car les jours [déterminés] pour vous massacrer, et [les jours] de votre mort sont accomplis; et vous tomberez comme un vaisseau désirable.
35 Babateli bibwele bakozanga esika ya kokimela; bakambi ya bampate bakozanga esika ya kobombama.
Et les pasteurs n'auront aucun moyen de s'enfuir, ni les magnifiques du troupeau, d'échapper.
36 Boyoka koganga ya babateli bibwele, kolela ya bakambi ya bampate, pamba te Yawe azali kobebisa bazamba epai wapi bibwele eliaka.
Il y aura une voix du cri des pasteurs, et un hurlement des plus puissants du troupeau, à cause que l'Eternel s'en va ravager leurs pâturages.
37 Bitando ya kimia ekotikala pamba likolo ya kanda ya Yawe.
Et les cabanes paisibles seront abattues, à cause de l'ardeur de la colère de l'Eternel.
38 Lokola nkosi etikaka ndako na yango, mokili na bango mpe ekotikala lisusu na bato te likolo ya mopanga ya banyokoli na bango mpe likolo ya kanda ya Yawe.
Il a abandonné son Tabernacle, comme le lionceau, car leur pays va être mis en désolation, à cause de l'ardeur de la fourrageuse, à cause, dis-je, de l'ardeur de sa colère.