< Jeremi 24 >

1 Sima na Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, komema na bowumbu, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni: Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, bakalaka ya Yuda, bato ya misala ya maboko mpe bato oyo balambaka bibende na moto; Yawe alakisaki ngai bitunga mibale ya bambuma ya figi oyo batiaki liboso ya Tempelo ya Yawe.
After Nebuchadnezzar king of Babylon had carried away Jeconiah son of Jehoiakim king of Judah, as well as the officials of Judah and the craftsmen and metalsmiths from Jerusalem, and had brought them to Babylon, the LORD showed me two baskets of figs placed in front of the temple of the LORD.
2 Kitunga moko ezalaki na bambuma kitoko ya figi lokola bambuma oyo etelaka liboso; mpe kitunga mosusu ezalaki na bambuma ekawuka oyo bakoki kolia te.
One basket had very good figs, like those that ripen early, but the other basket contained very poor figs, so bad they could not be eaten.
3 Yawe atunaki ngai: — Jeremi, ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona bambuma ya figi: bambuma oyo ya kitoko ezali elengi, kasi oyo ekawuka ezali mabe mpe moto moko te akoki kolia yango.
“Jeremiah,” the LORD asked, “what do you see?” “Figs!” I replied. “The good figs are very good, but the bad figs are very bad, so bad they cannot be eaten.”
4 Bongo Yawe alobaki na ngai:
Then the word of the LORD came to me, saying,
5 — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Ndenge bambuma kitoko oyo ya figi ezali, ndenge wana mpe nazali komona bato ya Yuda oyo natindaki na bowumbu, longwa na esika oyo kino na Babiloni.
“This is what the LORD, the God of Israel, says: ‘Like these good figs, so I regard as good the exiles from Judah, whom I have sent away from this place to the land of the Chaldeans.
6 Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosalela bango bolamu, mpe nakozongisa bango kati na mokili oyo. Nakobongisa bango lisusu, kasi nakobebisa bango lisusu te; nakolona bango lokola nzete, nakopikola bango lisusu te.
I will keep My eyes on them for good and will return them to this land. I will build them up and not tear them down; I will plant them and not uproot them.
7 Nakopesa bango motema oyo ekoyeba Ngai, mpo ete basosola ete nazali Yawe. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango, pamba te bakozongela Ngai na motema na bango mobimba.
I will give them a heart to know Me, that I am the LORD. They will be My people, and I will be their God, for they will return to Me with all their heart.
8 Kasi ndenge bambuma ya figi oyo ekawuka ezali mabe mpe bakoki kolia yango te, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe nakosala Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe batikali ya Yelusalemi, ezala ba-oyo batikali na mboka mpe ba-oyo bazali na Ejipito:
But like the bad figs, so bad they cannot be eaten,’ says the LORD, ‘so will I deal with Zedekiah king of Judah, his officials, and the remnant of Jerusalem—those remaining in this land and those living in the land of Egypt.
9 nakokomisa bango eloko ya koyoka somo mpe ya koyokela pasi, na miso ya bikolo nyonso ya mabele; eloko ya kotiola, eloko ya kosakanela, eloko ya maseki, eloko ya lisuma, kati na bisika nyonso epai wapi nakobengana bango.
I will make them a horror and an offense to all the kingdoms of the earth, a disgrace and an object of scorn, ridicule, and cursing wherever I have banished them.
10 Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, kino tango ekosilisa koboma bango na mokili oyo napesaki bango elongo na batata na bango. »
And I will send against them sword and famine and plague, until they have perished from the land that I gave to them and their fathers.’”

< Jeremi 24 >