< Jeremi 23 >

1 « Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe.
“Woe to the shepherds who destroy and scatter the sheep of My pasture!” declares the LORD.
2 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai: « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe,
Therefore this is what the LORD, the God of Israel, says about the shepherds who tend My people: “You have scattered My flock and driven them away, and have not attended to them. Behold, I will attend to you for the evil of your deeds, declares the LORD.
3 « Ngai moko nakosangisa ndambo ya bibwele na Ngai, oyo batikali wuta na bikolo nyonso epai wapi nabenganelaki bango; mpe nakozongisa bango na lopango na bango, esika oyo bakobotana mpe bakokoma ebele.
Then I Myself will gather the remnant of My flock from all the lands to which I have banished them, and I will return them to their pasture, where they will be fruitful and multiply.
4 Nakopesa bango na maboko ya babateli mosusu ya bibwele mpo ete babatela bango malamu. Boye, bakobanga lisusu te, bakozala lisusu na somo te mpe moko te kati na bango akozanga lisusu, » elobi Yawe.
I will raise up shepherds over them who will tend them, and they will no longer be afraid or dismayed, nor will any go missing, declares the LORD.
5 « Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe, « nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi, mokonzi oyo akokamba na bwanya, oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo.
Behold, the days are coming, declares the LORD, when I will raise up for David a righteous Branch, and He will reign wisely as King and will administer justice and righteousness in the land.
6 Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye: Yawe azali Bosembo na biso.
In His days Judah will be saved, and Israel will dwell securely. And this is His name by which He will be called: The LORD Our Righteousness.
7 Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te: ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito; ›
So behold, the days are coming, declares the LORD, when they will no longer say, ‘As surely as the LORD lives, who brought the Israelites up out of the land of Egypt.’
8 kasi bakoloba: ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. »
Instead they will say, ‘As surely as the LORD lives, who brought and led the descendants of the house of Israel up out of the land of the north and all the other lands to which He had banished them.’ Then they will dwell once more in their own land.”
9 Na tina na basakoli: Motema na ngai ebukani kati na ngai, mikuwa na ngai nyonso ezali kolenga. Nakomi lokola moto oyo alangwe masanga, lokola moto oyo masanga ya vino ebeti ye, likolo na Yawe mpe maloba na Ye ya bule.
As for the prophets: My heart is broken within me, and all my bones tremble. I have become like a drunkard, like a man overcome by wine, because of the LORD, because of His holy words.
10 Pamba te mokili etondi na kindumba, mokili ekomi na matanga. Likolo ya bilakeli mabe, matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki, basakoli bakomi kolanda nzela mabe mpe bakomi na molende ya kosala kaka makambo oyo esengeli te.
For the land is full of adulterers— because of the curse, the land mourns and the pastures of the wilderness have dried up— their course is evil and their power is misused.
11 « Basakoli mpe Banganga-Nzambe, basundoli Nzambe; ezala kati na Tempelo na Ngai, nazali komona misala na bango ya mabe, » elobi Yawe.
“For both prophet and priest are ungodly; even in My house I have found their wickedness,”
12 « Yango wana, nzela na bango ekokoma moselu mpe molili; bakobengana bango kino na mboka ya molili mpe kuna bakokweya. Nakotindela bango pasi, tango oyo nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.
“Therefore their path will become slick; they will be driven away into the darkness and fall into it. For I will bring disaster upon them in the year of their punishment,”
13 « Namoni makambo ya nkele kati na basakoli ya Samari: bazali kosakola na kombo ya nzambe Bala mpe bazali kobungisa Isalaele, bato na Ngai, nzela.
“Among the prophets of Samaria I saw an offensive thing: They prophesied by Baal and led My people Israel astray.
14 Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi: bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »
And among the prophets of Jerusalem I have seen a horrible thing: They commit adultery and walk in lies. They strengthen the hands of evildoers, so that no one turns his back on wickedness. They are all like Sodom to Me; the people of Jerusalem are like Gomorrah.”
15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli: « Nakoleisa bango bilei ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge, pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusalemi nde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. »
Therefore this is what the LORD of Hosts says concerning the prophets: “I will feed them wormwood and give them poisoned water to drink, for from the prophets of Jerusalem ungodliness has spread throughout the land.”
16 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Boyoka te makambo oyo basakoli bazali kosakola epai na bino!
This is what the LORD of Hosts says: “Do not listen to the words of the prophets who prophesy to you. They are filling you with false hopes. They speak visions from their own minds, not from the mouth of the LORD.
17 Bazali koloba na bato oyo batiolaka Ngai: ‹ Yawe alobi: Bokozala malamu! › Mpe na bato oyo balandaka makanisi mabe ya mitema na bango: ‹ Mabe moko te ekokomela bino! ›
They keep saying to those who despise Me, ‘The LORD says that you will have peace,’ and to everyone who walks in the stubbornness of his own heart, ‘No harm will come to you.’
18 Kasi nani kati na basakoli wana akotaki na mayangani ya Yawe mpo ete amona to mpe ayoka Liloba na Yawe? Nani apesaki litoyi mpo na koyoka liloba na Ye?
But which of them has stood in the council of the LORD to see and hear His word? Who has given heed to His word and obeyed it?
19 Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki! Kanda na Ye epeli lokola moto, bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe.
Behold, the storm of the LORD has gone out with fury, a whirlwind swirling down upon the heads of the wicked.
20 Kanda ya Yawe ekokita te kino ekokokisa malamu-malamu penza mabongisi ya motema na Ye! Bokozwa mayele ya kososola yango malamu na mikolo oyo ekoya.
The anger of the LORD will not turn back until He has fully accomplished the purposes of His heart. In the days to come you will understand this clearly.
21 Natindaki basakoli wana te, kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende; nalobaki na bango likambo moko te, kasi tala bango wana bazali kosakola!
I did not send these prophets, yet they have run with their message; I did not speak to them, yet they have prophesied.
22 Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai, balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai, mpe bato na Ngai balingaki kotika banzela mpe misala na bango ya mabe!
But if they had stood in My council, they would have proclaimed My words to My people and turned them back from their evil ways and deeds.”
23 Boni, bokanisi ete Ngai Nzambe namonaka kaka pene, kasi namonaka mosika te? » elobi Yawe.
“Am I only a God nearby,” declares the LORD, “and not a God far away?”
24 « Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te? » elobi Yawe.
“Can a man hide in secret places where I cannot see him?” declares the LORD. “Do I not fill the heavens and the earth?” declares the LORD.
25 « Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai; bazali koloba: ‹ Tala, naloti ndoto! Naloti ndoto! ›
“I have heard the sayings of the prophets who prophesy lies in My name: ‘I had a dream! I had a dream!’
26 Kino tango nini penza basakoli oyo bakokoba kosakola makambo ya lokuta, makanisi ya pamba ya mitema na bango?
How long will this continue in the hearts of these prophets who prophesy falsehood, these prophets of the delusion of their own minds?
27 Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala?
They suppose the dreams that they tell one another will make My people forget My name, just as their fathers forgot My name through the worship of Baal.
28 Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble? » elobi Yawe;
Let the prophet who has a dream retell it, but let him who has My word speak it truthfully. For what is straw compared to grain?” declares the LORD.
29 « boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni? » elobi Yawe.
“Is not My word like fire,” declares the LORD, “and like a hammer that smashes a rock?”
30 « Yango wana, nakotelemela basakoli oyo bawelaka bango na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe;
“Therefore behold,” declares the LORD, “I am against the prophets who steal from one another words they attribute to Me.”
31 « solo, nakotelemela basakoli oyo bafungolaka minoko na bango mpo na kokomisa maloba na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe,
“Yes,” declares the LORD, “I am against the prophets who wag their own tongues and proclaim, ‘The LORD declares it.’”
32 « nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.
“Indeed,” declares the LORD, “I am against those who prophesy false dreams and retell them to lead My people astray with their reckless lies. It was not I who sent them or commanded them, and they are of no benefit at all to these people,” declares the LORD.
33 « Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo: ‹ Yawe alobi nini? › Loba na ye: ‹ Yawe alobi nini? Nakosundola bino, elobi Yawe. ›
“Now when this people or a prophet or priest asks you, ‘What is the burden of the LORD?’ you are to say to them, ‘What burden? I will forsake you, declares the LORD.’
34 Soki mosakoli to Nganga-Nzambe to moto mosusu alobi: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › nakopesa ye elongo na libota na ye etumbu.
As for the prophet or priest or anyone who claims, ‘This is the burden of the LORD,’ I will punish that man and his household.
35 Nzokande, tala maloba oyo moko na moko kati na bino asengeli koyebisa moninga to ndeko na ye: ‹ Eyano nini Yawe apesi? Yawe alobi nini? ›
This is what each man is to say to his friend and to his brother: ‘What has the LORD answered?’ or ‘What has the LORD spoken?’
36 Kasi bosengeli lisusu te koloba: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › noki te liloba yango ekokoma etumbu mpo na moto oyo alobi yango, pamba te bobongoli maloba na Nzambe na bomoi, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na biso!
But refer no more to the burden of the LORD, for each man’s word becomes the burden, so that you pervert the words of the living God, the LORD of Hosts, our God.
37 Tala maloba oyo osengeli koloba na mosakoli wana: ‹ Eyano nini Yawe apesi yo? › to ‹ Yawe alobi nini? ›
Thus you are to say to the prophet: ‘What has the LORD answered you?’ and ‘What has the LORD spoken?’
38 Nzokande, soki bolobi lisusu: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › wana tala liloba oyo Yawe alobi: Lokola bosalelaka maloba oyo: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › ata tango Ngai nayebisaki bino: ‹ Boloba te: Tala liloba oyo Yawe alobi! ›
But if you claim, ‘This is the burden of the LORD,’ then this is what the LORD says: Because you have said, ‘This is the burden of the LORD,’ and I specifically told you not to make this claim,
39 mpo na yango, nakobosana bino solo mpe nakobengana bino mosika ya elongi na Ngai, bino elongo na engumba oyo napesaki na bino mpe na batata na bino;
therefore I will surely forget you and will cast you out of My presence, both you and the city that I gave to you and your fathers.
40 nakoyokisa bino soni ya libela, soni oyo bokotikala kobosana te. »
And I will bring upon you everlasting shame and perpetual humiliation that will never be forgotten.”

< Jeremi 23 >