< Jeremi 21 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango mokonzi Sedesiasi atindelaki ye Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpo na koloba na ye:
Verbum, quod factum est ad Ieremiam a Domino, quando misit ad eum rex Sedechias Phassur filium Melchiae, et Sophoniam filium Maasiae sacerdotem, dicens:
2 « Tuna Yawe sik’oyo mpo na biso, pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azali kobundisa biso; tango mosusu Yawe akosala bikamwa mpo na biso ndenge asalaki na tango ya kala, mpo ete Nabukodonozori atika biso. »
Interroga pro nobis Dominum, quia Nabuchodonosor rex Babylonis praeliatur adversum nos: si forte faciat Dominus nobiscum secundum omnia mirabilia sua, et recedat a nobis.
3 Kasi Jeremi azongiselaki bango: « Boloba na Sedesiasi:
Et dixit Ieremias ad eos: Sic dicetis Sedechiae:
4 ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo.
Haec dicit Dominus Deus Israel: Ecce ego convertam vasa belli, quae in manibus vestris sunt, et quibus vos pugnatis adversum regem Babylonis, et Chaldaeos, qui obsident vos in circuitu murorum: et congregabo ea in medio civitatis huius.
5 Mpe Ngai moko, nakosembola loboko na Ngai mpo na kobundisa bino na nguya, na kanda, na kosilika mpe na kotomboka makasi.
Et debellabo ego vos in manu extenta, et in brachio forti, et in furore, et in indignatione, et in ira grandi.
6 Nakobebisa nyonso oyo ezali kati na engumba oyo: bato mpe banyama; mpe bakokufa na bokono oyo ebomaka.
Et percutiam habitatores civitatis huius, homines et bestiae pestilentia magna morientur.
7 Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe: Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›
Et post haec ait Dominus: dabo Sedechiam regem Iuda, et servos eius, et populum eius, et qui derelicti sunt in civitate hac a peste et gladio, et fame, in manu Nabuchodonosor regis Babylonis, et in manu inimicorum eorum, et in manu quaerentium animam eorum, et percutiet eos in ore gladii, et non flectetur, neque parcet, nec miserebitur.
8 Mpe lisusu, loba na bato: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Botala, nasili kotia liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya kufa.
Et ad populum hunc dices: Haec dicit Dominus: Ecce ego do coram vobis viam vitae, et viam mortis.
9 Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka. Kasi moto oyo akobima mpe akokende komipesa na maboko ya bato ya Babiloni oyo bazingeli bino, akobikisa bomoi na ye mpe akokufa te.
Qui habitaverit in urbe hac, morietur gladio, et fame, et peste: qui autem egressus fuerit, et transfugerit ad Chaldaeos, qui obsident vos, vivet, et erit ei anima sua, quasi spolium.
10 Nazwaki mokano ya kosala engumba oyo mabe, kasi bolamu te, elobi Yawe; nakokaba yango na maboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobebisa yango na moto. ›
Posui enim faciem meam super civitatem hanc in malum, et non in bonum, ait Dominus: in manu regis Babylonis dabitur, et exuret eam igni.
11 Loba na libota ya mokonzi ya Yuda: ‹ Boyoka Liloba na Yawe!
Et domui regis Iuda: Audite verba Domini,
12 Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi: Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso, bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli; soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai, kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto; mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango.
domus David, haec dicit Dominus: Iudicate mane iudicium, et eruite vi oppressum de manu calumniantis: ne forte egrediatur ut ignis indignatio mea, et succendatur, et non sit qui extinguat propter malitiam studiorum vestrorum.
13 Oh Yelusalemi, yo oyo ovandaka na lubwaku, na mabanga ya etando ya likolo ya ngomba, nazali kosepela na yo te, elobi Yawe, yo oyo olobaka: ‘Nani azali na makoki ya kobundisa biso? Nani azali na makoki ya kokota na ekimelo na biso?’
Ecce ego ad te habitatricem vallis solidae atque campestris, ait Dominus: qui dicitis: Quis percutiet nos? et quis ingredietur domos nostras?
14 Nakopesa yo etumbu kolanda misala na yo, elobi Yawe, nakopelisa moto na zamba na yo, mpe ekotumba nyonso oyo ezali zingazinga na yo. › »
Et visitabo super vos iuxta fructum studiorum vestrorum, dicit Dominus: et succendam ignem in saltu eius: et devorabit omnia in circuitu eius.