< Jeremi 20 >

1 Nganga-Nzambe Pashuri, mwana mobali ya Imeri, mokonzi ya Tempelo ya Yawe, ayokaki ndenge Jeremi azalaki kosakola.
祭司音麦的儿子巴施户珥作耶和华殿的总管,听见耶利米预言这些事,
2 Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.
他就打先知耶利米,用耶和华殿里便雅悯高门内的枷,将他枷在那里。
3 Mokolo oyo elandaki, tango Pashuri alongolaki ye na likonzi, Jeremi alobaki na ye: — Yawe akobenga yo lisusu Pashuri te, kasi Magori-Misabibe.
次日,巴施户珥将耶利米开枷释放。于是耶利米对他说:“耶和华不是叫你的名为巴施户珥,乃是叫你玛歌珥·米撒毕,
4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.
因耶和华如此说:‘我必使你自觉惊吓,你也必使众朋友惊吓;他们必倒在仇敌的刀下,你也必亲眼看见;我必将犹大人全交在巴比伦王的手中,他要将他们掳到巴比伦去,也要用刀将他们杀戮。
5 Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango: biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.
并且我要将这城中的一切货财和劳碌得来的,并一切珍宝,以及犹大君王所有的宝物,都交在他们仇敌的手中;仇敌要当作掠物带到巴比伦去。
6 Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. »
你这巴施户珥和一切住在你家中的人都必被掳去;你和你的众朋友,就是你向他们说假预言的,都必到巴比伦去,要死在那里,葬在那里。’”
7 Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai, mpe nakosamaki penza; olekaki ngai na makasi mpe olongaki ngai. Bazali kotiola ngai mikolo nyonso, bato nyonso bazali kaka koseka ngai.
耶和华啊,你曾劝导我, 我也听了你的劝导。 你比我有力量,且胜了我。 我终日成为笑话, 人人都戏弄我。
8 Na tango nyonso oyo nalobaka, nagangaka makasi mpo na kosakola kaka mobulu mpe kobebisama. Mokolo na mokolo, Liloba na Yawe ememelaka ngai kofingama mpe pamela ya mabe.
我每逢讲论的时候,就发出哀声, 我喊叫说:有强暴和毁灭! 因为耶和华的话终日成了我的凌辱、讥刺。
9 Kasi soki nalobi: « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te!
我若说:我不再提耶和华, 也不再奉他的名讲论, 我便心里觉得 似乎有烧着的火闭塞在我骨中, 我就含忍不住,不能自禁。
10 Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se: « Botala! Somo na bangambo nyonso! Bofunda ye! Tofunda ye! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba: « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe! »
我听见了许多人的谗谤, 四围都是惊吓; 就是我知己的朋友也都窥探我, 愿我跌倒,说: 告他吧,我们也要告他! 或者他被引诱, 我们就能胜他, 在他身上报仇。
11 Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.
然而,耶和华与我同在, 好像甚可怕的勇士。 因此,逼迫我的必都绊跌, 不能得胜; 他们必大大蒙羞, 就是受永不忘记的羞辱, 因为他们行事没有智慧。
12 Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo omonaka mitema ya bayengebene mpe oyebaka malamu makanisi ya mitema ya bato, tika ete namona Yo kozongisela bango mabe, pamba te napesi likambo na ngai na maboko na Yo!
试验义人、察看人肺腑心肠的万军之耶和华啊, 求你容我见你在他们身上报仇, 因我将我的案件向你禀明了。
13 Boyembela Yawe! Bokumisa Yawe! Pamba te abikisaka bomoi ya mobola na maboko ya bato mabe.
你们要向耶和华唱歌; 赞美耶和华! 因他救了穷人的性命脱离恶人的手。
14 Tika ete mokolo ya mbotama na ngai elakelama mabe! Tika ete mokolo oyo mama na ngai abotaki ngai epambolama te!
愿我生的那日受咒诅; 愿我母亲产我的那日不蒙福!
15 Tika ete alakelama mabe, moto oyo amemelaki tata na ngai sango oyo esepelisaki motema na ye: « Baboteli yo mwana, mwana mobali! »
给我父亲报信说“你得了儿子”, 使我父亲甚欢喜的, 愿那人受咒诅。
16 Tika ete moto yango akoma lokola bingumba oyo Yawe abuki na mawa te! Tika ete ayoka bileli na tongo mpe makelele ya bitumba na midi.
愿那人像耶和华所倾覆而不后悔的城邑; 愿他早晨听见哀声, 晌午听见呐喊;
17 Mpo na nini Nzambe abomaki ngai te kati na libumu ya mama na ngai, oyo alingaki kozala kunda na ngai, mpe libumu na ye elingaki kobomba ngai libela na libela?
因他在我未出胎的时候不杀我, 使我母亲成了我的坟墓, 胎就时常重大。
18 Mpo na nini penza nabimaki na libumu ya mama na ngai? Ezali kaka mpo na komona pasi mpe mikakatano, mpe kosukisa bomoi na ngai na soni?
我为何出胎见劳碌愁苦, 使我的年日因羞愧消灭呢?

< Jeremi 20 >