< Jeremi 19 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobi: — Kende kosomba mbeki epai ya mosali mbeki. Kende nzela moko na bakambi ya bato mpe bakambi ya Banganga-Nzambe;
So sprach der HERR: Gehe hin und kaufe beim Töpfer einen Krug und nimm etliche von den Ältesten des Volkes und von den Ältesten der Priester
2 bimela na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, na liboso ya ekuke ya ndako epai wapi basalaka mbeki; mpe kuna, okosakola maloba oyo nakoyebisa yo.
und gehe hinaus in das Tal Ben-Hinnom, welches außerhalb des Scherbentores liegt, und verkündige daselbst die Worte, die ich dir sagen werde, und sprich:
3 Loba: « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Boyoka! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo.
Höret das Wort des HERRN, ihr Könige von Juda und ihr Einwohner von Jerusalem! So spricht der HERR der Heerscharen, der Gott Israels: Siehe, ich will Unglück über diesen Ort bringen, daß allen, die davon hören, die Ohren gellen werden;
4 Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te,
darum, daß sie mich verlassen und diesen Ort mißachtet und daselbst andern Göttern geräuchert haben, die weder sie, noch ihre Väter, noch die Könige von Juda gekannt haben; und sie haben diesen Ort mit dem Blut Unschuldiger gefüllt.
5 batongi bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, mpo na kotumba bana na bango na moto lokola mbeka ya kotumba epai ya Bala; nzokande Ngai natikala kotinda bango likambo ya boye te to mpe likambo ya boye etikala ata komata na makanisi na Ngai te;
Sie haben auch Baalshöhen gebaut, um ihre Kinder dem Baal als Brandopfer mit Feuer zu verbrennen, was ich nicht geboten und wovon ich nichts gesagt und was mir nie in den Sinn gekommen ist.
6 yango wana, na mikolo ekoya, elobi Yawe, bakobenga lisusu te esika oyo: ‹ Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, › kasi bakokoma kobenga yango: ‹ Lubwaku oyo babomelaka bato. ›
Darum seht, es werden Tage kommen, spricht der HERR, da dieser Ort nicht mehr Tophet oder Tal Ben-Hinnom, sondern Würgetal heißen wird!
7 Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba.
Und ich will an diesem Ort den Rat Judas und Jerusalems ausleeren und sie durch das Schwert fallen lassen vor dem Angesicht ihrer Feinde und durch die Hand derer, die nach ihrem Leben trachten; ihre Leichname aber will ich den Vögeln des Himmels und den Tieren des Feldes zur Speise geben;
8 Nakobebisa engumba oyo mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola. Bato nyonso oyo bakolekela awa bakokamwa mpe bakoyoka somo wana bakomona kobeba na yango nyonso.
und ich will diese Stadt zum Entsetzen und zum Gespött machen, so daß jeder, der vorüberzieht, über all ihre Plagen sich entsetzen und spotten wird.
9 Nakoleisa bango misuni ya bana na bango ya basi mpe ya mibali, bakoliana bango na bango tango bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe bakozingela bango.
Und ich will ihnen das Fleisch ihrer Söhne und ihrer Töchter zu essen geben, daß einer des andern Fleisch fressen soll in der Angst und Not, mit der ihre Feinde und die, welche ihnen nach dem Leben trachten, sie bedrängen werden.
10 Boye, buka mbeki na miso ya bato oyo bozali kokende na bango nzela moko
Und du sollst den Krug zerbrechen vor den Augen der Männer, die mit dir gehen,
11 mpe loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Nakobebisa ekolo mpe engumba oyo, kaka ndenge bapanzaka mbeki oyo mosali mbeki asali, mpe bakokoka lisusu kobongisa yango te. Bakokunda bibembe na Tofeti kino esika ya kokunda ekotikala lisusu te.
und sollst zu ihnen sagen: So spricht der HERR der Heerscharen: Ebenso will ich dieses Volk und diese Stadt zerbrechen, wie man eines Töpfers Geschirr zerbricht, das man nicht mehr flicken kann; und man wird im Tophet begraben, weil es an Raum zum Begraben fehlen wird.
12 Yango ezali makambo oyo nakosala na esika oyo mpe epai ya bavandi ya esika oyo, elobi Yawe, nakokomisa engumba oyo lokola Tofeti.
Also will ich mit diesem Orte und seinen Bewohnern verfahren, spricht der HERR, daß ich diese Stadt zu einem Tophet mache;
13 Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › »
und die Häuser von Jerusalem und die Paläste der Könige Judas sollen so unrein werden wie das Tophet, alle Häuser, auf deren Dächern sie dem ganzen Heer des Himmels geräuchert und fremden Göttern Trankopfer ausgegossen haben!
14 Jeremi azongaki wuta na Tofeti epai wapi Yawe atindaki ye mpo na kosakola, atelemaki na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe alobaki na bato nyonso:
Als aber Jeremia vom Tophet zurückkehrte, wohin ihn der HERR gesandt hatte, zu weissagen, trat er in den Vorhof des Hauses des HERRN und sprach zu allem Volk:
15 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Boyoka! Nakoyeisa na engumba oyo mpe na mboka oyo ezali zingazinga na yango pasi nyonso oyo nasakolaki na tina na yango, pamba te batosaki Ngai te mpe bayokaki maloba na ngai te. »
So spricht der HERR der Heerscharen, der Gott Israels: Siehe, ich bringe über diese Stadt und über alle ihre Städte all das Unglück, das ich wider sie geredet habe; denn sie haben sich halsstarrig gezeigt, um auf meine Worte nicht zu hören!

< Jeremi 19 >