< Jeremi 18 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi:
This is the word that came to Jeremiah from the LORD:
2 — Kende na ndako ya mosali mbeki mpe, kuna, nakoyebisa yo makambo.
“Go down at once to the potter’s house, and there I will reveal My message to you.”
3 Boye, nakendeki na ndako ya mosali mbeki mpe nakutaki ye azali kosala mosala na ye.
So I went down to the potter’s house and saw him working at the wheel.
4 Kasi mbeki oyo azalaki kosala na mabele oyo basalelaka bikeko ezalaki kokangama ye na maboko. Bongo, mosali mbeki yango asalaki mbeki mosusu wuta na mbeki oyo ebebaki, asalaki yango lisusu kitoko kolanda posa ya motema na ye.
But the vessel that he was shaping from the clay became flawed in his hand; so he formed it into another vessel, as it seemed best for him to do.
5 Mpe kuna, Yawe alobaki na ngai:
Then the word of the LORD came to me, saying,
6 — Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki?
“O house of Israel, declares the LORD, can I not treat you as this potter treats his clay? Just like clay in the potter’s hand, so are you in My hand, O house of Israel.
7 Soki nazwi mokano ya kopikola, ya kokweyisa to ya kobebisa ekolo to mokili songolo,
At any time I might announce that a nation or kingdom will be uprooted, torn down, and destroyed.
8 bongo ekolo to mokili oyo nakebisi etiki kosala mabe, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa mpo na yango mpe nakolongola pasi oyo nakanaki kotindela yango.
But if that nation I warned turns from its evil, then I will relent of the disaster I had planned to bring.
9 To mpe lisusu, soki nazwi mokano ya kotonga to ya kolona ekolo to mokili pakala,
And if at another time I announce that I will build up and establish a nation or kingdom,
10 bongo ekolo to mokili yango ekomi kosala mabe na miso na Ngai mpe eboyi koyokela Ngai, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kosalela yango bolamu.
and if it does evil in My sight and does not listen to My voice, then I will relent of the good I had intended for it.
11 Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›
Now therefore, tell the men of Judah and the residents of Jerusalem that this is what the LORD says: ‘Behold, I am planning a disaster for you and devising a plan against you. Turn now, each of you, from your evil ways, and correct your ways and deeds.’
12 Kasi bakozongisa: ‹ Ezali na tina te! Tokokoba kaka kosala mabongisi ya mitema na biso, mpe moko na moko kati na biso akokoba kaka kolanda baposa mabe ya motema na ye. › »
But they will reply, ‘It is hopeless. We will follow our own plans, and each of us will act according to the stubbornness of his evil heart.’”
13 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Boluka koyeba kati na bikolo soki nani asila koyoka makambo ya boye! Isalaele, mboka kitoko, asali likambo ya mabe penza!
Therefore this is what the LORD says: “Inquire among the nations: Who has ever heard things like these? Virgin Israel has done a most terrible thing.
14 Boni, bosila komona mvula ya pembe ya Libani kosila na bangomba na yango? Bosila komona mayi ya malili oyo ekitaka na bangomba na yango kokawuka?
Does the snow of Lebanon ever leave its rocky slopes? Or do its cool waters flowing from a distance ever run dry?
15 Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai, bazali kotumba malasi ya ansa mpo na banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, oyo ebetisaka bango mabaku na nzela mpe epengwisaka bango na nzela ya kala, bongo ememaka bango na banzela mosusu oyo bafungola nanu te.
Yet My people have forgotten Me. They burn incense to worthless idols that make them stumble in their ways, leaving the ancient roads to walk on rutted bypaths instead of on the highway.
16 Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.
They have made their land a desolation, a perpetual object of scorn; all who pass by will be appalled and shake their heads.
17 Nakopanza bango liboso ya banguna na bango ndenge mopepe ya este esalaka. Tango bakokoma na pasi, nakopesa bango mokongo mpe nakolakisa bango elongi na Ngai te. »
I will scatter them before the enemy like the east wind. I will show them My back and not My face in the day of their calamity.”
18 Bazalaki koloba: « Boya! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba! »
Then some said, “Come, let us make plans against Jeremiah, for the law will never be lost to the priest, nor counsel to the wise, nor an oracle to the prophet. Come, let us denounce him and pay no heed to any of his words.”
19 Eh Yawe, yoka makambo oyo bafundi na ngai bazali koloba!
Attend to me, O LORD. Hear what my accusers are saying!
20 Boni, bazongisaka solo mabe na malamu? Tala, batimoli libulu mpo na kokunda ngai! Kanisa ndenge nini natelemaki liboso na Yo mpo na koloba na tina na bolamu na bango, mpo ete kanda na Yo ekende mosika na bango.
Should good be repaid with evil? Yet they have dug a pit for me. Remember how I stood before You to speak good on their behalf, to turn Your wrath from them.
21 Mpo na yango, boma bana na bango na nzala, kaba bango na mopanga! Tika ete basi na bango bakufisa bana na bango mpe bakoma basi bakufisa mibali! Tika ete kufa ekomela mibali na bango, mpe bilenge mibali na bango bakufa na mopanga ya bitumba.
Therefore, hand their children over to famine; pour out the power of the sword upon them. Let their wives become childless and widowed; let their husbands be slain by disease, their young men struck down by the sword in battle.
22 Tika ete kolela eyokana wuta na bandako na bango tango okotindela bango banguna na pwasa, pamba te batimoli libulu mpo ete bakanga ngai mpe batie mitambo na makolo na ngai!
Let a cry be heard from their houses when You suddenly bring raiders against them, for they have dug a pit to capture me and have hidden snares for my feet.
23 Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso oyo basali mpo na koboma ngai; kolimbisa mabe na bango te, kolongola masumu na bango liboso na Yo te! Tika ete balenga liboso na Yo! Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo.
But You, O LORD, know all their deadly plots against me. Do not wipe out their guilt or blot out their sin from Your sight. Let them be overthrown before You; deal with them in the time of Your anger.

< Jeremi 18 >