< Jeremi 17 >

1 « Masumu ya Yuda ezali lokola makomi oyo bakoma na ekomeli ya ebende oyo ezali na songe ya diama; bakoma yango na bitando ya mitema na bango mpe na maseke ya bitumbelo na bango.
“Yahuda'nın günahı demir kalemle yazıldı; Yüreklerinin levhaları, Sunaklarının boynuzları üzerine Elmas uçlu aletle oyuldu.
2 Ndenge bakanisaka bana na bango ya mibali, ndenge wana mpe bakanisaka bitumbelo na bango mpe makonzi ya Ashera, nzambe mwasi, pembeni ya banzete ya mibesu na likolo ya bangomba.
Bol yapraklı her ağacın yanında, Her yüksek tepedeki sunaklarla, Aşera putlarıyla Çocuklarıymış gibi ilgileniyorlar.
3 Oh ngomba na Ngai kati na mokili, nakokaba lokola bomengo ya bitumba: biloko na yo, bozwi na yo nyonso mpe bisambelo na yo ya likolo ya bangomba mpo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo.
Ey kırdaki dağım, ülkende işlenen günahlar yüzünden Servetini, bütün hazinelerini Ve puta tapılan yerlerini bırakacağım, yağmalansın.
4 Likolo ya mabe na yo, okobungisa libula oyo napesaki yo, nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo kati na mokili oyo oyebi te; pamba te opelisi kanda na Ngai, mpe ekopela mpo na libela. »
Sana verdiğim mülkü kendi suçunla yitireceksin. Bilmediğin bir ülkede Düşmanlarına köle edeceğim seni. Çünkü öfkemi alevlendirdiniz, Tutuşup sonsuza dek yanacak.”
5 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto, oyo ayekamelaka eloko ya pete mpe atalelaka Yawe te, alakelama mabe!
RAB diyor ki, “İnsana güvenen, İnsanın gücüne dayanan, Yüreği RAB'den uzaklaşan kişi lanetlidir.
6 Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe; akomona bolamu te tango ekoya, akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe, na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te.
Böylesi bozkırdaki çalı gibidir, İyilik geldiği zaman görmeyecek; Kurak çöle, Kimsenin yaşamadığı tuzlaya yerleşecek.
7 Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe mpe atalelaka Ye apambolama!
“Ne mutlu RAB'be güvenen insana, Güveni yalnız RAB olana!
8 Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi: ezalaka na somo ya moyi makasi te; makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »
Böylesi su kıyılarına dikilmiş ağaca benzer, Köklerini akarsulara salar. Sıcak gelince korkmaz, Yaprakları hep yeşildir. Kuraklık yılında kaygılanmaz, Meyve vermekten geri durmaz.”
9 Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te; nani akoki koyeba yango?
Yürek her şeyden daha aldatıcıdır, iyileşmez, Onu kim anlayabilir?
10 « Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »
“Ben RAB, herkesi davranışlarına, Yaptıklarının sonucuna göre ödüllendirmek için Yüreği yoklar, düşünceyi denerim.”
11 Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.
Yumurtlamadığı yumurtaların üzerinde oturan keklik nasılsa, Haksız servet edinen kişi de öyledir. Yaşamının ortasında serveti onu bırakır, Yaşamının sonunda kendisi aptal çıkar.
12 Kiti ya Bokonzi ya nkembo, oyo enetolama wuta na ebandeli ezali nde Esika na biso ya bule.
Tapınağımızın yeri Başlangıçtan yüceltilmiş görkemli bir tahttır.
13 Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.
Ey İsrail'in umudu RAB, Seni bırakanların hepsi Utanılacak duruma düşecek. Sana sırtını dönenler toprağa yazılacak, Çünkü RAB'bi, diri su pınarını bıraktılar.
14 Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika; Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, mpo ete nakumisaka nde Yo!
Şifa ver bana, ya RAB, O zaman iyi olurum; Kurtar beni, kurtuluş bulurum, Çünkü övgüm sensin.
15 Tala, bato oyo bazali koloba na ngai: « Wapi Liloba na Yawe? Tika ete ekokisama sik’oyo! »
Bana, “Hani, RAB'bin sözü nerede? Haydi, gelsin yerine bakalım” deyip duruyorlar.
16 Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele oyo alandaka nzela na Yo. Oyebi malamu ete nazalaki na posa ya komona mokolo ya pasi te. Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai ebimaka nde liboso na Yo.
Senin hizmetinde çoban olmaktan kaçınmadım, Felaket gününü de ben istemedim. Dudaklarımdan çıkan her sözü bilirsin, ya RAB. O söz zaten senin ağzındaydı.
17 Kobangisa ngai te, pamba te ozali Ekimelo na ngai na tango ya pasi!
Dehşet verme bana, Felaket gününde sığınağım sensin.
18 Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni, kasi batela ngai ete nayokisama soni te! Tika ete bango balenga na somo, kasi ngai nalenga na somo te. Tindela bango mokolo ya pasi, bebisa bango malamu mbala mibale.
Bana eziyet edenler utandırılsın, Ama beni utandırma; Onları yılgınlığa düşür, Ama beni düşürme. Felaket gününü getir üzerlerine, Onları iki kat yıkımla ez.
19 Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai: « Kende kotelema na ekuke ya bato, na ekuke oyo bakonzi ya Yuda bakotelaka mpe babimelaka. Kende mpe lisusu kotelema na bikuke nyonso ya Yelusalemi.
RAB bana şöyle dedi: “Yahuda krallarının girip çıktığı Halk Kapısı'na ve Yeruşalim'in öbür kapılarına git, orada dur.
20 Loba na bango: ‹ Oh bino bakonzi mpe bato nyonso ya Yuda elongo na bino nyonso bavandi ya Yelusalemi, bino oyo bokotelaka na bikuke oyo, boyoka Liloba na Yawe!
Halka de ki, ‘Ey Yahuda kralları, Yahuda halkı, Yeruşalim'de oturup bu kapılardan girenler, RAB'bin sözünü dinleyin!
21 Tala liloba oyo Yawe alobi: Bosala keba ete moko te kati na bino amema mikumba na mokolo ya Saba to alekisa yango na bikuke ya Yelusalemi;
RAB diyor ki, Şabat Günü yük taşımamaya, Yeruşalim kapılarından içeri bir şey sokmamaya dikkat edin.
22 moko te kati na bino abimisa mokumba na ndako na ye to asala mosala songolo na mokolo ya Saba. Kasi bozwa mokolo yango lokola mokolo ya bule ndenge natindaki bakoko na bino.
Şabat Günü evinizden yük çıkarmayın, hiç iş yapmayın. Atalarınıza buyurduğum gibi Şabat Günü'nü kutsal sayacaksınız.
23 Nzokande, baboyaki koyoka, bayeisaki mito na bango makasi mpo na koboya kaka koyoka mpe kolanda mitindo na Ngai.
Ne var ki, onlar sözümü dinlemediler, kulak asmadılar. Dikbaşlılık ederek beni dinlemediler, yola gelmek istemediler.
24 Kasi soki penza boyoki Ngai, elobi Yawe, soki bomemi mikumba te, soki bolekisi te mikumba na bikuke ya engumba oyo mpe soki bobulisi mokolo ya Saba, soki bosali ata mosala moko te na mokolo wana ya Saba,
Beni iyi dinlerseniz, diyor RAB, Şabat Günü bu kentin kapılarından yük taşımayıp hiç iş yapmayarak Şabat Günü'nü kutsal sayarsanız,
25 bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi bakokotela na bikuke ya engumba oyo elongo na bakalaka na bango; bongo bango elongo na bakalaka na bango bakoya na likolo ya bashar mpe mpunda elongo na bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi; bongo, bato bakovanda libela na libela na engumba oyo.
Davut'un tahtında oturan krallarla önderler savaş arabalarına, atlara binip Yahuda halkı ve Yeruşalim'de yaşayanlarla birlikte bu kentin kapılarından girecekler. Bu kentte sonsuza dek insanlar yaşayacak.
26 Bato bakowuta na bingumba ya Yuda mpe na mboka oyo ezali pene ya Yelusalemi, na etuka ya Benjame mpe na ngambo ya weste ya bangomba mikuse, na etuka ya bangomba mpe ya Negevi; mpo na koya kobonza kati na Tempelo ya Yawe bambeka ya kotumba, bambeka mosusu, makabo ya bambuma mpe malasi ya ansa, mpo na kobonza makabo ya kozongisa matondi, kati na Tempelo ya Yawe.
Yahuda kentlerinden, Yeruşalim çevresinden, Benyamin topraklarından, Şefela'dan, dağlık bölgeden, Negev'den gelip RAB'bin Tapınağı'na yakmalık sunular, kurbanlar, tahıl sunuları, günnük ve şükran sunuları getirecekler.
27 Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »
Ancak beni dinlemez, Şabat Günü Yeruşalim kapılarından yük taşıyarak girer, o günü kutsal saymazsanız, kentin kapılarını ateşe vereceğim. Yeruşalim saraylarını yakıp yok edecek, hiç sönmeyecek ateş.’”

< Jeremi 17 >