< Jeremi 16 >

1 Yawe alobaki na ngai:
Afei, Awurade asɛm baa me nkyɛn sɛ:
2 « Okobala te mpe okotikala kobota bana mibali to bana basi na esika oyo te. »
“Ɛnsɛ sɛ wo ware na wowo mmammarima anaa mmammaa wɔ ha.”
3 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bana mibali mpe bana basi oyo bakobotama na mboka oyo, mpe na tina na basi oyo bazali bamama na bango mpe mibali oyo bazali batata na bango:
Yei ne deɛ Awurade ka fa mmammarima ne mmammaa a wɔwo wɔn asase yi so mmaa a wɔyɛ wɔn maamenom ne mmarima a wɔyɛ wɔn agyanom no ho:
4 « Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »
“Owuyareɛ bɛkunkum wɔn. Wɔrensu wɔn na wɔrensie wɔn, mmom wɔbɛyɛ sɛ sumina a ɛgugu fam. Wɔbɛtotɔ akofena ano na ɛkɔm bɛkunkum wɔn na wɔn afunu bɛyɛ aduane ama ewiem nnomaa ne asase so mmoa.”
5 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Kokota na ndako oyo ezali na matanga te, kokende na matanga te mpe koyokela bato oyo bazali na matanga mawa te, pamba te nalongoli kimia na Ngai, bolingo na Ngai mpe mawa na Ngai epai ya bato oyo, » elobi Yawe,
“Nhyɛne efie a ayie yɛ apontoɔ wo mu; nkɔsu wɔn abia, na mma wɔn hyɛden, ɛfiri sɛ mayi me nhyira, me dɔ ne mʼahummɔborɔ afiri saa nnipa yi so,” Awurade na ɔseɛ.
6 « ezala mikolo to bana mike, bango nyonso bakosila kokufa kati na mokili oyo. Bakokunda bango te mpe bakosalela bango matanga te, bongo moto moko te akomikata banzoloko to kokokola suki ya moto mpo na bango.
“Atitire ne mpapahwekwaa bɛwu wɔ asase yi so. Wɔrensie wɔn, na wɔrensu wɔn, na obiara remmɔ ne ho akam, na wɔn enti, obiara renyi ne ti mfa nkae wɔn.
7 Moto moko te akopesa bilei mpo na kobondisa bato oyo bazali na matanga sima na kufa, mpe moto moko te akopesa bango masanga mpo na kobondisa bango, ezala ata mpo na kufa ya batata to ya bamama na bango.
Obiara remma wɔn a wɔdi awufoɔ no ho awerɛhoɔ no aduane mfa nkyekye wɔn werɛ, owufoɔ no agya anaa ne maame mpo, na obiara mma wɔn nsã nso mfa nkyekye wɔn werɛ.
8 Mpe kokota te na ndako oyo bazali kosala feti mpo na kovanda mpe komela,
“Na nhyɛne efie a apontoɔ kɔ so wɔ mu nkɔtena ase, nnidi na nnom.
9 pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nakosilisa kati na esika oyo, na miso na bino mpe na tango na bino, makelele ya esengo mpe makelele ya kosepela, mingongo ya babalani mpe ya babandami na libala.
Na yei ne deɛ Awurade Otumfoɔ, Israel Onyankopɔn no seɛ: Wo nkwanna mu a, wʼani tua no, mede ahosɛpɛ ne anigyeɛ nnyegyeɛ, ayeforɔkunu ne ayeforɔyere ahosɛpɛ nne a ɛwɔ ha no, bɛba awieeɛ.
10 Tango okotatola maloba oyo nyonso na bato oyo, soki batuni yo: ‹ Mpo na nini Yawe akateli biso etumbu ya pasi makasi boye? Mabe nini tosalaki Ye? Masumu nini tosalaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso? ›
“Sɛ woka yeinom nyinaa kyerɛ saa nnipa yi na wɔbisa wo sɛ, ‘Adɛn enti na Awurade abɔ mmɔm a ɛyɛ hu sei atia yɛn? Ɛdeɛn mfomsoɔ na yɛayɛ? Bɔne bɛn na yɛayɛ atia Awurade, yɛn Onyankopɔn’ a,
11 Okoloba na bango: ‹ Ezali mpo ete batata na bino basundolaki Ngai, › elobi Yawe, ‹ basalaki banzambe ya bapaya, basalelaki yango mpe bafukamelaki yango. Batikaki Ngai mpe babatelaki Mobeko na Ngai te.
ɛnneɛ ka kyerɛ wɔn sɛ, ‘Ɛfiri sɛ mo agyanom gyaa me hɔ kɔdii anyame foforɔ akyi, kɔsom wɔn sɔree wɔn, Awurade asɛm nie. Wogyaa me na wɔanni me mmara so.
12 Bongo bino, bozali mpe kotambola na ezaleli mabe koleka ata ezaleli mabe ya batata na bino. Botala ndenge nini moko na moko kati na bino azali kolanda makanisi mabe ya motema na ye, na esika ya kotosa Ngai.
Na mo deɛ, moayɛ amumuyɛsɛm asene mo agyanom. Monhwɛ sɛdeɛ mo mu biara di nʼakoma bɔne asoɔden akyi wɔ ɛberɛ a anka ɛsɛ sɛ ɔyɛ ɔsetie ma me.
13 Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›
Ɛno enti, mɛtu mo afiri saa asase yi so de mo akɔ asase a, mo anaa sɛ mo agyanom nnim so, na ɛhɔ mobɛsom anyame foforɔ awia ne anadwo, na merenhunu mo mmɔbɔ.’
14 Yango wana, na mikolo oyo ezali koya, » elobi Yawe, « bato bakotika koloba: ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito; ›
“Nanso nna no reba,” Awurade na ɔseɛ, “a nnipa renka bio sɛ, ‘Sɛ Awurade te ase yi, deɛ ɔyii Israelfoɔ firii Misraim,’
15 kasi bakokoma koloba: ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na mokili ya nor mpe na mikili nyonso epai wapi abenganaki bango. › Nakozongisa bango na mokili na bango, mokili oyo napesaki bakoko na bango.
mmom wɔbɛka sɛ, ‘Sɛ Awurade te ase yi deɛ ɔyii Israelfoɔ firii atifi fam asase ne aman a ɔtuu wɔn kɔɔ so nyinaa.’ Ɛfiri sɛ mɛsane de wɔn aba asase a mede maa wɔn tete agyanom no so.
16 Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.
“Na seesei, mɛsoma apofofoɔ bebree a wɔbɛkyere wɔn.” Awurade na ɔseɛ. “Ɛno akyi, mɛsoma akɔfa abɔmmɔfoɔ bebree a wɔbɛtaataa wɔn wɔ mmepɔ ne nkokoɔ nyinaa so ne abotan ntokuro mu.
17 Nazali kotala malamu banzela na bango nyonso; moto moko te akoki kobombama na miso na Ngai, mpe masumu na bango ekoki ata moke te kobombama na miso na Ngai.
Mʼani tua wɔn akwan nyinaa; ɛnsumaa me, na wɔn bɔne nso nhintaeɛ wɔ mʼani so.
18 Nakofutisa bango mbala mibale lifuti ya mabe na bango mpe ya masumu na bango, pamba te bakomisi mokili na Ngai mbindo na nzela ya bililingi mpe ya bikeko na bango oyo ezanga bomoi, mpe batondisi libula na Ngai na banzambe na bango ya bikeko mpe ya nkele. »
Mɛtua wɔn amumuyɛ ne wɔn bɔne so ka mprenu, ɛfiri sɛ wɔde aniwudeɛ nsɛsodeɛ a ɛnni nkwa ne wɔn ahoni a ɛyɛ akyiwadeɛ abɛhyɛ mʼagyapadeɛ so ma de agu mʼasase ho fi.”
19 Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba: « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.
Ao Awurade, mʼahoɔden ne mʼaban, mʼahohia mu dwanekɔbea, wo nkyɛn na amanaman no bɛba wɔbɛfiri nsase ano aka sɛ, “Yɛn agyanom annya biribiara sɛ anyame huhuo, ahoni a wɔn ho nni mfasoɔ na wɔammoa wɔn.
20 Boni, bato bakoki solo komisalela banzambe, tango bango moko bazali banzambe te?
Nnipa yɛ wɔn ankasa anyame anaa? Aane, nanso wɔnyɛ nokorɛ anyame!”
21 Yango wana, nakolakisa bango, nakolakisa bango nguya mpe makasi na ngai; bongo bakoyeba penza ete Kombo na Ngai ezali Yawe. »
“Ɛno enti mɛkyerɛkyerɛ wɔn, saa ɛberɛ yi deɛ mɛkyerɛ wɔn me tumi ne mʼahoɔden. Afei wɔbɛhunu sɛ me din ne Awurade.

< Jeremi 16 >