< Jeremi 14 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi na tina na bokawuki:
Este es un mensaje del Señor que llegó a Jeremías en relación con la sequía:
2 « Bato ya Yuda bazali na matanga, bingumba na bango esili kobebisama, bazali kolela mpo na mokili na bango, mpe koganga ezali koyokana wuta na Yelusalemi.
Judá está de luto; sus ciudades se están consumiendo. Su pueblo llora por la tierra, y de Jerusalén llega un grito de auxilio.
3 Bakambi bazali kotinda basali na bango mpo ete bakende kotoka mayi; kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te, bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba, bazipi bilongi na soni mpe na mawa.
Los ricos envían a sus siervos a buscar agua. Van a las cisternas, pero no encuentran agua. Regresan con las tinajas vacías, decepcionados y avergonzados, cubriendo sus cabezas.
4 Mabele esili kokawuka, pamba te mvula ezali konoka lisusu te, basali bilanga bakomi na pasi mpe bazipi bilongi na bango mpo na soni.
La tierra se ha secado porque no ha llovido en el país. Los campesinos se avergüenzan y se cubren la cabeza.
5 Ezala mboloko kati na zamba ekomi kokima ata mwana na yango oyo esili kobota, pamba te matiti ya kolia ezali lisusu te.
Hasta la cierva abandona a su cervatillo recién nacido porque no hay hierba.
6 Ba-ane ya zamba etelemi na basonge ya bangomba ekawuka mpe ezali kobenda mopepe lokola mbwa ya zamba; miso na yango elembi kotala, pamba te matiti ya kolia ezali te. »
Los asnos salvajes se paran en las colinas desnudas, jadeando como chacales. Les falla la vista porque no tienen nada que comer.
7 Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.
Aunque nuestros pecados nos delatan, Señor, por favor, haz algo por nosotros gracias a tu bondad. Sí, nos hemos rebelado contra ti muchas veces; hemos pecado contra ti.
8 Oh Elikya ya Isalaele, Mobikisi na ye na tango ya pasi, mpo na nini ozali kosala makambo lokola mopaya kati na mboka oyo to lokola moleki nzela oyo atelemaka kaka na mboka mpo na kolekisa butu?
Tú eres la esperanza de Israel, nuestro Salvador en tiempos de angustia. ¿Por qué actúas como un extranjero en nuestro país, como un viajero que sólo se queda una noche?
9 Mpo na nini ozali kosala makambo lokola moto oyo asutuki to lokola elombe oyo azangi makoki ya kobikisa moto? Nzokande, Yo, Yawe, ozali kati na biso mpe tobengami solo na Kombo na Yo! Kosundola biso te!
¿Por qué te comportas como alguien sorprendido, como un guerrero poderoso que no puede ayudar? Tú estás aquí entre nosotros, Señor, y nosotros somos conocidos como tu pueblo. ¡Por favor, no nos abandones!
10 Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo: « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, bavandaka esika moko te. Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango. »
Esto es lo que el Señor dice de su pueblo: Les encanta alejarse de mí; ni siquiera intentan evitarlo. Por eso el Señor se niega a aceptarlos. Ahora se acordará de sus acciones culpables y los castigará por sus pecados.
11 Bongo, Yawe alobaki na ngai: — Kosambela mpo na bolamu ya bato oyo te!
El Señor me dijo: No reces por el bienestar de este pueblo.
12 Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.
Aunque ayunen, no escucharé su clamor. Aunque ofrezcan holocaustos y ofrendas de grano, no los aceptaré. Por el contrario, los exterminaré con la espada, el hambre y la peste.
13 Kasi nazongiselaki Ye: — Oh Nkolo Yawe, basakoli bazali kokoba koloba na bango: « Te! Bokotikala komona mopanga to nzala makasi te, kasi nakopesa bino kimia ya solo na esika oyo. »
“¡Oh, Señor Dios!” Respondí: “Mira lo que les dicen los profetas, que dicen hablar en tu nombre: ‘No verán la guerra ni sufrirán el hambre, sino que les daré una paz duradera en este lugar’”.
14 Yawe alobaki na ngai: — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko.
Los profetas están profetizando mentiras en mi nombre, respondió el Señor. Yo no los envié, ni los elegí, ni les hablé. Es una visión mentirosa, una predicción vacía, un producto engañoso de sus propias mentes lo que te están profetizando.
15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na basakoli oyo bazali koloba na Kombo na Ngai: « Natindaki bango te, atako bazali koloba: ‹ Mopanga mpe nzala makasi ekokweya na mokili oyo te. › Basakoli yango bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi.
Así que esto es lo que dice el Señor sobre esos profetas que profetizan en mi nombre: Yo no los envié, pero aun así dicen: “Este país no sufrirá guerra ni hambre”. Esos mismos profetas morirán de guerra o de hambre.
16 Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.
Los cadáveres de la gente a la que profetizaron serán arrojados a las calles de Jerusalén a causa del hambre y la guerra. No habrá nadie que los entierre, ni a sus esposas, ni a sus hijos, ni a sus hijas. Derramaré sobre ellos su propio mal.
17 Loba na bango maloba oyo: ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.
Esto es lo que debes decirles: Las lágrimas brotan de mis ojos sin cesar, de día y de noche, porque mi pueblo ha sido aplastado por un duro golpe, una herida realmente grave.
18 Soki nakeyi na zamba, nazali komona bibembe ya bato oyo babomi na mopanga; soki nakoti kati na engumba, nazali komona bato oyo bazali kokufa na nzala. Basakoli mpe Banganga-Nzambe bazali kososola likambo moko te tango bazali kotambola na mokili. › »
Si salgo al campo, veo a los muertos por la espada; si voy a la ciudad, veo a los muertos por el hambre. Tanto los profetas como los sacerdotes vagan por el campo; no saben lo que hacen.
19 Boni, obwaki solo Yuda? Oyini penza Siona? Mpo na nini otindeli biso pasi makasi oyo ezangeli nzela ya kobika? Tokanisaki ete tokozwa kimia; nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te! Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono; nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi!
¿Realmente has rechazado a Judá? ¿Odias tanto a Sión? ¿Por qué nos has herido tanto que no podemos curarnos? Esperábamos la paz, pero en lugar de ello no ha llegado nada bueno; esperábamos un tiempo de curación, pero en lugar de ello sólo ha habido terror repentino.
20 Oh Yawe, tososoli solo mabe na biso mpe masumu ya batata na biso! Solo, tosali penza masumu liboso na Yo.
Señor, reconocemos nuestra maldad, la culpa de nuestros antepasados y nuestros propios pecados contra ti.
21 Koyina biso te mpo na lokumu ya Kombo na Yo! Kobebisa te nkembo ya Kiti ya Bokonzi na Yo! Kanisa boyokani oyo osalaki elongo na biso mpe kobebisa yango te!
Por tu propia reputación, por favor no nos odies; no traigas deshonra a tu glorioso trono. Por favor, recuerda tu acuerdo con nosotros; no lo rompas.
22 Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula? Te! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.
¿Pueden los falsos dioses de las otras naciones hacer llover? ¿Pueden los cielos mismos enviar lluvias? No, eres tú, Señor, nuestro Dios. Por eso ponemos nuestra esperanza en ti, porque sólo tú puedes hacer todo esto.

< Jeremi 14 >