< Jeremi 10 >

1 Eh libota ya Isalaele, yoka liloba oyo Yawe azali koloba na yo!
audite verbum quod locutus est Dominus super vos domus Israhel
2 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Kolanda bizaleli ya bikolo ya bapaya te mpe kobanga bilembo ya likolo te ata soki ezali kobangisa bato ya bikolo.
haec dicit Dominus iuxta vias gentium nolite discere et a signis caeli nolite metuere quae timent gentes
3 Pamba te bizaleli ya bikolo ya bapaya ezali se pamba, banzambe na bango ezali se banzete ya pamba oyo bakataka kati na zamba, bongo moto ya misala ya maboko nde abongisaka yango na bambeli na ye.
quia leges populorum vanae sunt quia lignum de saltu praecidit opus manuum artificis in ascia
4 Bapakolaka yango palata mpe wolo, babetaka yango basete na marto mpo ete eningana te.
argento et auro decoravit illud clavis et malleis conpegit ut non dissolvatur
5 Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko oyo batiaka na elanga ya bapasiteki mpo na kokimisa bandeke: elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te. Kobanga yango te, pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. »
in similitudinem palmae fabricata sunt et non loquentur portata tollentur quia incedere non valent nolite ergo timere ea quia nec male possunt facere nec bene
6 Eh Yawe, moko te akokani na Yo! Ozali monene, mpe Kombo na Yo ezali na nguya monene.
non est similis tui Domine magnus tu et magnum nomen tuum in fortitudine
7 Oh Mokonzi ya bikolo, nani akoki koboya kotosa Yo? Obongi na lokumu, pamba te moko te azali lokola Yo kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo mpe kati na mikili na bango nyonso.
quis non timebit te o rex gentium tuum est enim decus inter cunctos sapientes gentium et in universis regnis eorum nullus est similis tui
8 Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba!
pariter insipientes et fatui probabuntur doctrina vanitatis eorum lignum est
9 Bapakola yango palata balekisa na moto, oyo ewuta na Tarsisi, mpe wolo oyo ewuta na Ufazi; bato oyo basalaka bililingi na banzete mpe ba-oyo balambaka bibende na moto nde basalaka yango: balatisaka yango bilamba ya langi ya ble mpe ya motane; ezali misala ya bato oyo basalaka misala ya maboko, oyo bayebi penza mosala malamu.
argentum involutum de Tharsis adfertur et aurum de Ofaz opus artificis et manus aerarii hyacinthus et purpura indumentum eorum opus artificum universa haec
10 Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.
Dominus autem Deus verus est ipse Deus vivens et rex sempiternus ab indignatione eius commovebitur terra et non sustinebunt gentes comminationem eius
11 Tala maloba oyo bokoloba na bango: « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. »
sic ergo dicetis eis dii qui caelos et terram non fecerunt pereant de terra et de his quae sub caelis sunt
12 Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.
qui facit terram in fortitudine sua praeparat orbem in sapientia sua et prudentia sua extendit caelos
13 Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, apelisaka mikalikali, anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe wuta na bibombelo na Ye.
ad vocem suam dat multitudinem aquarum in caelo et elevat nebulas ab extremitatibus terrae fulgura in pluviam facit et educit ventum de thesauris suis
14 Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.
stultus factus est omnis homo ab scientia confusus est omnis artifex in sculptili quoniam falsum est quod conflavit et non est spiritus in eis
15 Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola; ekolimwa na tango ya kosambisama.
vana sunt et opus risu dignum in tempore visitationis suae peribunt
16 Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
non est his similis pars Iacob qui enim formavit omnia ipse est et Israhel virga hereditatis eius Dominus exercituum nomen illi
17 Yo ekolo oyo bazingeli, kamata bisaka na yo mpe bima na mokili!
congrega de terra confusionem tuam quae habitas in obsidione
18 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Ya mbala oyo, nakobengana bavandi ya mokili oyo mpe nakotindela bango pasi mpo ete bakanga bango. »
quia haec dicit Dominus ecce ego longe proiciam habitatores terrae in hac vice et tribulabo eos ita ut inveniantur
19 Mawa na ngai, pamba te nazoki makasi na motema! Pota na ngai ezali kosila te! Namilobelaki: « Ezali pasi na ngai moko, esengeli na ngai kokanga motema. »
vae mihi super contritione mea pessima plaga mea ego autem dixi plane haec infirmitas mea est et portabo illam
20 Ndako na ngai ya kapo ebebisami, basinga na yango nyonso ekatani, bamemi bana na ngai ya mibali, natikali lisusu ata na mwana moko te. Nazali lisusu na moto ata moko te oyo akotelemisela ngai ndako ya kapo to akobongisela ngai esika ya kovanda.
tabernaculum meum vastatum est omnes funiculi mei disrupti sunt filii mei exierunt a me et non subsistunt non est qui extendat ultra tentorium meum et erigat pelles meas
21 Pamba te bakambi bazangaki mayele, balukaki Yawe te; yango wana, balongaki te, mpe bato nyonso oyo bango bazalaki kokamba bapanzanaki.
quia stulte egerunt pastores et Dominum non quaesierunt propterea non intellexerunt et omnis grex eorum dispersus est
22 Boyoka! Makelele moko ezali koya, lokito moko ya makasi ewuti na mokili ya nor, ekosilisa bato kati na bingumba ya Yuda mpe ekokomisa yango bandako ya mbwa ya zamba.
vox auditionis ecce venit et commotio magna de terra aquilonis ut ponat civitates Iuda solitudinem et habitaculum draconum
23 Oh Yawe, nayebi ete moto moko te azali mokonzi ya bomoi na ye; moto oyo azali kotambola azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.
scio Domine quia non est hominis via eius nec viri est ut ambulet et dirigat gressus suos
24 Oh Yawe, pesa biso etumbu oyo ekoki na biso; kasi kopesa yango na kanda te, noki te okosilisa koboma biso.
corripe me Domine verumtamen in iudicio et non in furore tuo ne forte ad nihilum redigas me
25 Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya oyo endimaka Yo te, likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, pamba te babebisi Jakobi, babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye.
effunde indignationem tuam super gentes quae non cognoverunt te et super provincias quae nomen tuum non invocaverunt quia comederunt Iacob et devoraverunt eum et consumpserunt illum et decus eius dissipaverunt

< Jeremi 10 >