< Jeremi 1 >

1 Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.
Речи Јеремије, сина Хелкијиног, између свештеника који беху у Анатоту у земљи Венијаминовој,
2 Yawe alobaki na ye tango mokonzi Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi,
Коме дође реч Господња у време Јосије сина Амоновог, цара Јудиног, тринаесте године царовања његовог,
3 mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu.
И у време Јоакима сина Јосијиног, цара Јудиног, до свршетка једанаесте године царовања Седекије сина Јосијиног над Јудом, док не би пресељен Јерусалим, петог месеца.
4 Yawe alobaki na ngai:
И дође ми реч Господња говорећи:
5 — Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo; liboso ete obotama, nabulisaki yo: naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.
Пре него те саздах у утроби, знах те; и пре него изиђе из утробе, посветих те; за пророка народима поставих те.
6 Nazongisaki: — Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge!
А ја рекох: Ох, Господе, Господе! Ево, не знам говорити, јер сам дете.
7 Kasi Yawe alobaki na ngai: — Koloba te: « Nazali elenge. » Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo.
А Господ ми рече: Не говори: Дете сам; него иди куда те год пошаљем, и говори шта ти год кажем.
8 Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, —elobi Yawe.
Не бој их се, јер сам ја с тобом да те избављам, говори Господ.
9 Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki: — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.
И пруживши Господ руку своју дотаче се уста мојих, и рече ми Господ: Ето, метнух речи своје у твоја уста.
10 Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.
Види, постављам те данас над народима и царствима да истребљујеш и обараш, и да затиреш и раскопаваш, и да градиш и да садиш.
11 Sima na yango, Yawe atunaki ngai: — Jeremi, ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona etape ya nzete ya amande.
После ми дође реч Господња говорећи: Шта видиш, Јеремија? И рекох: Видим прут бадемов.
12 Yawe alobaki na ngai: — Omoni malamu, pamba te nasenzelaka maloba na Ngai mpo na kokokisa yango.
Тада ми рече Господ: Добро си видео, јер ћу настати око речи своје да је извршим.
13 Yawe atunaki ngai lisusu: — Ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona nzungu moko ezali kotoka, etengama na ngambo ya nor.
Опет ми дође реч Господња другом говорећи: Шта видиш? И рекох: Видим лонац где ври, и предња му је страна према северу.
14 Yawe alobaki na ngai: — Ezali wuta na nor nde pasi ekokomela bavandi ya mokili.
Тада ми рече Господ: Са севера ће навалити зло на све становнике ове земље.
15 Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe. Bakonzi na bango bakoya kotia bakiti na bango ya bokonzi liboso ya bikuke ya Yelusalemi; bakozingela bamir nyonso ya Yelusalemi mpe bakobundisa bingumba nyonso ya Yuda.
Јер, гле, ја ћу сазвати све породице из северних царстава, вели Господ, те ће доћи, и сваки ће метнути свој престо на вратима јерусалимским и око свих зидова његових и око свих градова Јудиних.
16 Nakosambisa bato na Ngai mpo na mabe oyo basalaki: basundolaki Ngai, bakomaki kobonza mbeka ya malasi epai ya banzambe mosusu, mpe bakomaki kogumbamela banzambe oyo basalaki na maboko na bango.
И изрећи ћу им суд свој за сву злоћу њихову што ме оставише, и кадише другим боговима, и клањаше се делу руку својих.
17 Mibongisa, yika mpiko! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.
Ти дакле опаши се и устани и говори им све што ћу ти заповедити; не бој их се, да те не бих сатро пред њима.
18 Na mokolo ya lelo, nakomisi yo engumba batonga makasi, likonzi ya ebende mpe mir ya ebende mpo na komibatela liboso ya mokili mobimba: liboso ya bakonzi ya Yuda, ya bakalaka na yango, ya Banganga-Nzambe na yango mpe ya bavandi nyonso ya mokili yango.
Јер ево ја те постављам данас као тврд град и као ступ гвозден и као зидове бронзане свој овој земљи, царевима Јудиним и кнезовима његовим и свештеницима његовим и народу земаљском.
19 Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te; pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.
Они ће ударити на те, али те неће надвладати, јер сам ја с тобом, вели Господ, да те избављам.

< Jeremi 1 >