< Jake 4 >
1 Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi? Boni, ewutaka te na baposa mabe na bino, oyo ebundaka kati na banzoto na bino?
Where do conflicts and quarrels among you come from? Do they not come from your passions that war in your members?
2 Bozali kolula biloko, kasi bozali kozwa yango te; bokomi kino koboma bato. Botondi na zuwa, kasi bozali kolonga te kozwa oyo bozali koluka; bokomi koswana mpe kobunda bitumba. Bozwaka te biloko oyo bozalaka na yango posa, pamba te bosengaka yango epai ya Nzambe te.
You lust, and do not have. You kill, covet, and cannot obtain. You fight and make war. You do not have, because you do not ask.
3 Kasi soki bosengaka epai ya Nzambe mpe bozwaka te, ezali mpo ete bosengaka na makanisi mabe, na makanisi ya kosepelisa kaka baposa na bino moko.
You ask, and do not receive, because you ask with wrong motives, so that you may spend it for your pleasures.
4 Bato na ekobo! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.
You adulterers and adulteresses, do you not know that friendship with the world is hostility toward God? Therefore whoever wants to be a friend of the world makes himself an enemy of God.
5 Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi: « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso? »
Or do you think that the Scripture says in vain, "The Spirit which he made to dwell in us yearns jealously"?
6 Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba: « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »
But he gives more grace. Therefore it says, God resists the proud, but gives grace to the humble.
7 Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino.
Be subject therefore to God. But resist the devil, and he will flee from you.
8 Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino!
Draw near to God, and he will draw near to you. Cleanse your hands, you sinners; and purify your hearts, you double-minded.
9 Botala pasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa!
Lament, mourn, and weep. Let your laughter be turned to mourning, and your joy to gloom.
10 Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.
Humble yourselves in the sight of the Lord, and he will exalt you.
11 Bandeko na ngai, botonganaka te bino na bino. Moto oyo atongaka mpe asambisaka ndeko na ye asambwisaka mibeko mpe abukaka yango. Nzokande, soki ozali kosambwisa mibeko, elakisi ete ozali kotosa yango te, kasi ozali nde mosambisi na yango.
Do not speak against one another, brothers. He who speaks against a brother or judges his brother, speaks against the law and judges the law. But if you judge the law, you are not a doer of the law, but a judge.
12 Pamba te Ye oyo apesa mibeko azali kaka Ye moko Mosambisi, Ye nde azali na makoki ya kobikisa mpe ya kobebisa. Bongo yo, ozali nani mpo ete osambisa moninga na yo?
Only one is the lawgiver and judge, who is able to save and to destroy. But who are you to judge your neighbor?
13 Boyoka sik’oyo, bino bato oyo bolobaka: « Lelo to lobi, tokokende na engumba songolo, tokovanda kuna mobu mobimba mpe tokosala mombongo oyo ekobotela biso mbongo ebele. »
Come now, you who say, "Today or tomorrow let us go into this city, and spend a year there, trade, and make a profit."
14 Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi? Bomoi na bino nde nini? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe?
Whereas you do not know what tomorrow will be like. What is your life? For you are a vapor that appears for a little time and then vanishes away.
15 Tala ndenge bosengeli koloba: « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. »
For you ought to say, "If the Lord wills, we will both live, and do this or that."
16 Kasi bino, bozali nde komikumisa na monene ya mabongisi na bino! Boyeba malamu ete lolendo ya ndenge wana ezali mabe.
But now you glory in your boasting. All such boasting is evil.
17 Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.
To him therefore who knows to do good, and does not do it, to him it is sin.