< Jake 3 >

1 Bandeko na ngai, bozala ebele te ya koluka kozala balakisi, pamba te boyebi malamu ete, biso balakisi, tokosambisama makasi.
내 형제들아! 너희는 선생 된 우리가 더 큰 심판을 받을 줄을 알고 선생이 되지 말라
2 Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.
우리가 다 실수가 많으니 만일 말에 실수가 없는 자면 곧 온전한 사람이라 능히 온 몸에 굴레 씌우리라
3 Soki totiaka ebende na monoko ya mpunda, ezali mpo ete etosa biso; mpe na nzela wana, tokambaka nzoto na yango nyonso.
우리가 말을 순종케 하려고 그 입에 재갈먹여 온 몸을 어거하며
4 Tala masuwa: atako ezali monene mpe mopepe makasi etindikaka yango, kasi mwa yenda moke nde ekambaka yango mpo ete elanda nzela oyo kapitene ya masuwa alingi komema yango.
또 배를 보라 그렇게 크고 광풍에 밀려가는 것들을 지극히 작은 키로 사공의 뜻대로 운전하나니
5 Ezali mpe ndenge moko mpo na lolemo: ezali eteni moko ya moke kati na nzoto ya moto, kasi ekoki komikumisa na makambo minene penza. Tala, mwa moto moke ezikisaka zamba monene!
이와같이 혀도 작은 지체로되 큰 것을 자랑하도다 보라 어떻게 작은 불이 어떻게 많은 나무를 태우는가
6 Lolemo mpe ezali moto; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba. (Geenna g1067)
혀는 곧 불이요 불의의 세계라 혀는 우리 지체 중에서 온 몸을 더럽히고 생의 바퀴를 불사르나니 그 사르는 것이 지옥 불에서 나느니라 (Geenna g1067)
7 Moto azali na makoki ya kokonza lolenge nyonso ya banyama, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bambisi, mpe akonza yango penza.
여러 종류의 짐승과 새며 벌레와 해물은 다 길들므로 사람에게 길들었거니와
8 Kasi mpo na lolemo, moko te akoki kokonza yango: ezali penza mabe, elembaka te mpe etonda na ngenge oyo ebomaka.
혀는 능히 길들일 사람이 없나니 쉬지 아니하는 악이요 죽이는 독이 가득한 것이라
9 Kaka na lolemo yango, topambolaka Nkolo, Tata na biso, mpe tolakelaka mabe bato oyo Nzambe akela na elilingi na Ye.
이것으로 우리가 주 아버지를 찬송하고 또 이것으로 하나님의 형상대로 지음을 받은 사람을 저주하나니
10 Ezala lipamboli to elakeli mabe, nyonso ebimaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, esengelaki te kozala bongo.
한 입으로 찬송과 저주가 나는도다 내 형제들아! 이것이 마땅치 아니하니라
11 Boni, etima moko ekoki kobimisa mayi ya peto mpe mayi ya mbindo?
샘이 한 구멍으로 어찌 단 물과 쓴 물을 내겠느뇨
12 Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki solo kobota bambuma ya olive? Nzete ya vino ekoki solo kobota bambuma ya figi? Boni, ekoki kosalema ete etima ya mayi ya mungwa ebimisa mayi ya malamu?
내 형제들아 어찌 무화과나무가 감람 열매를, 포도나무가 무화과를 맺겠느뇨 이와 같이 짠물이 단물을 내지 못하느니라
13 Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya.
너희 중에 지혜와 총명이 있는 자가 누구뇨 그는 선행으로 말미암아 지혜의 온유함으로 그 행함을 보일지니라
14 Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo mpe na molimo ya koswana, wana botika komikumisa ete bozali bato ya bwanya; pamba te yango ezali solo te, ezali lokuta.
그러나 너희 마음 속에 독한 시기와 다툼이 있으면 자랑하지 말라 진리를 거스려 거짓하지 말라
15 Bwanya ya ndenge wana ewutaka na Likolo te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto, ya Satana.
이러한 지혜는 위로부터 내려온 것이 아니요 세상적이요 정욕적이요 마귀적이니
16 Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka.
시기와 다툼이 있는 곳에는 요란과 모든 악한 일이 있음이니라
17 Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.
오직 위로부터 난 지혜는 첫째 성결하고 다음에 화평하고 관용하고 양순하며 긍휼과 선한 열매가 가득하고 편벽과 거짓이 없나니
18 Bato oyo bayeisaka kimia balonaka kati kimia mpe babukaka mbuma ya bosembo.
화평케 하는 자들은 화평으로 심어 의의 열매를 거두느니라

< Jake 3 >