< Jake 2 >

1 Bandeko na ngai, bosangisaka te kopona bilongi mpe kondimela Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo atonda na nkembo.
My brethren, have not the faith of our Lord Jesus Christ, the Lord of glory, with respect of persons.
2 Ndakisa: soki moto moko akoti kati na ndako na bino ya mayangani, alata penza bilamba ya talo mpe lopete ya wolo; bongo mobola mpe akoti, alata bilamba na ye ya bobola.
For if there come unto your assembly a man with a gold ring, in goodly apparel, and there come in also a poor man in vile raiment;
3 Soki boweleli koyamba moto oyo alati bilamba ya talo mpe bolobi na ye: « Tala esika ya kitoko oyo ebongisami mpo na yo, » kasi bolobi na mobola: « Yo, kende kotelema kuna » to « vanda awa na mabele, na se ya enyatelo makolo na ngai; »
And all of you have respect to him that wears the cheerful clothing, and say unto him, Sit you here in a good place; and say to the poor, Stand you there, or sit here under my footstool:
4 boni, wana boponi bilongi te kati na bino, mpe bokomi te koyekola bato na nzela ya makanisi mabe?
Are all of you not then partial in yourselves, and are become judges of evil thoughts?
5 Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka: Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye?
Hearken, my beloved brethren, Has not God chosen the poor of this world rich in faith, and heirs of the kingdom which he has promised to them that love him?
6 Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te?
But all of you have despised the poor. Do not rich men oppress you, and draw you before the judgment seats?
7 Ezali bango te bato babebisaka lokumu ya kombo kitoko oyo Nzambe apesa bino?
Do not they blaspheme that worthy name by the which all of you are called?
8 Soki bozali kokokisa Mobeko ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali kati na Makomi: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, » wana bozali kosala malamu.
If all of you fulfill the royal law according to the scripture, You shall love your neighbour as yourself, all of you do well:
9 Kasi soki bozali kopona-pona bilongi, bozali kosala masumu, mpe Mobeko ezali kokweyisa bino mpo ete bozali kotosa yango te.
But if all of you have respect to persons, all of you commit sin, and are convinced of the law as transgressors.
10 Moto oyo akweyi ata na mobeko moko kaka, atako atosaka mibeko nyonso, abuki nde mibeko nyonso.
For whosoever shall keep the whole law, and yet offend in one point, he is guilty of all.
11 Solo, Ye oyo alobaki: « Okosalaka ekobo te, » alobaki lisusu: « Okobomaka te. » Nzokande soki osali ekobo te, kasi obomi moto, yeba ete obuki mibeko nyonso.
For he that said, Do not commit adultery, said also, Do not kill. Now if you commit no adultery, yet if you kill, you are become a transgressor of the law.
12 Boye, tika ete bolobaka mpe bosalaka makambo lokola bato oyo bayebi malamu ete bakosambisama kolanda mibeko oyo ememaka bato na bonsomi.
So speak all of you, and so do, as they that shall be judged by the law of liberty.
13 Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.
For he shall have judgment without mercy, that has showed no mercy; and mercy rejoices against judgment.
14 Bandeko na ngai, tina nini ezali na moto ya koloba ete azali na kondima, soki azali kolakisa yango te na misala? Kondima ya boye ekoki solo kobikisa ye?
What does it profit, my brethren, though a man say he has faith, and have not works? can faith save him?
15 Ndakisa: soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba ya kolata mpe bilei ya mokolo na mokolo,
If a brother or sister be naked, and destitute of daily food,
16 bongo moko kati na bino alobi na ye: « Kende na kimia, yetola moto mpe lia, » kasi apesi ye te eloko oyo azali na yango posa mpo na nzoto na ye, maloba wana ezali na tina nini?
And one of you say unto them, Depart in peace, be all of you warmed and filled; notwithstanding all of you give them not those things which are necessary to the body; what does it profit?
17 Ezali mpe bongo mpo na kondima: soki kondima ezangi misala, ezali ya kokufa.
Even so faith, if it has not works, is dead, being alone.
18 Nzokande moto mosusu akoki koloba: « Yo ozali na kondima; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.
Yea, a man may say, You have faith, and I have works: show me your faith without your works, and I will show you my faith by my works.
19 Ondimaka ete Nzambe azali kaka moko? Osalaka malamu! Kasi milimo mabe mpe endimaka ete Nzambe azali kaka moko, mpe elengaka.
You believe that there is one God; you do well: the devils also believe, and tremble.
20 Oh zoba ya moto! Boni, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala ezali pamba?
But will you know, O vain man, that faith without works is dead?
21 Tala, Abrayami, tata na biso, atangamaki lokola moto ya sembo mpo na misala, pamba te abonzaki Izaki, mwana na ye ya mobali, na likolo ya etumbelo.
Was not Abraham our father justified by works, when he had offered Isaac his son upon the altar?
22 Tala ndenge kondima mpe misala na ye ezalaki kosala elongo; mpe na nzela ya misala yango, kondima na ye ekomaki ya kokoka.
See you how faith wrought with his works, and by works was faith made perfect?
23 Ezalaki ndenge wana nde ekokisamaki, liloba oyo ya Makomi: « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe; » mpe mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo, mpe akomaki kobenga ye « moninga na ngai. »
And the scripture was fulfilled which says, Abraham believed God, and it was imputed unto him for righteousness: and he was called the Friend of God.
24 Bomoni malamu sik’oyo ete Nzambe akomisaka moto sembo kolanda misala ya moto, kasi mpo na kondima kaka te.
All of you see then how that by works a man is justified, and not by faith only.
25 Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Raabi, mwasi ya ndumba: Nzambe akomisaki ye moto ya sembo mpo ete ayambaki, abombaki mpe akimisaki na nzela mosusu banongi ya Isalaele.
Likewise also was not Rahab the harlot justified by works, when she had received the messengers, and had sent them out another way?
26 Ndenge nzoto oyo ezangi pema ezali ya kokufa, ndenge wana mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa.
For as the body without the spirit (pneuma) is dead, so faith without works is dead also.

< Jake 2 >