< Jake 1 >

1 Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko: Napesi bino mbote.
Яків, раб Бога і Господа Ісуса Христа. Дванадцятьом племенам, які в розсіянні. Вітання!
2 Bandeko na ngai, bomona lokola likambo ya esengo, lolenge nyonso ya komekama oyo bozali kokutana na yango.
Брати мої, вважайте за велику радість, коли ви проходите через різні випробування,
3 Pamba te boyebi malamu ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema.
знаючи, що випробування вашої віри веде до стійкості.
4 Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela.
А стійкість нехай має досконалу дію, щоб ви стали довершеними й бездоганними, без жодного недоліку.
5 Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.
Якщо комусь із вас бракує мудрості, то нехай просить [її] в Бога, Який усім дарує щедро й без докору, і буде йому дано.
6 Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai.
Але нехай просить із вірою, анітрохи не вагаючись, бо хто вагається, той подібний до морської хвилі, яку женуть і підіймають вітри.
7 Moto ya ndenge wana atia motema te ete akoki kozwa eloko kowuta na Nkolo:
Нехай така людина навіть не думає, що вона отримає щось від Господа.
8 azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka.
[Це] людина двоєдушна, невизначена в усіх своїх шляхах.
9 Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye,
Нехай незаможний брат хвалиться своїм звеличенням,
10 mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga.
а багатий – своїм приниженням, бо він промине, наче польова квітка.
11 Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso.
Адже сходить палюче сонце, висушує рослину, її квітка опадає, і краса її обличчя зникає. Ось так і багатий загине у своїх починаннях.
12 Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.
Блаженна людина, яка вистоює спокусу, бо, здобувши схвалення, вона отримає вінець життя, який Бог обіцяв тим, хто Його любить.
13 Tika ete moto moko te, liboso ya komekama, aloba: « Nzambe nde azali kotindika ngai na kosala mabe. » Pamba te mabe ekoki te kotindika Nzambe na mabe, mpe Nzambe atindikaka moto moko te na kosala mabe.
Нехай ніхто під час спокуси не каже: «Я спокушений Богом». Адже Бог не може бути спокушений злом, і Він нікого не спокушає.
14 Kasi moto nyonso atindikamaka na mabe soki abendami mpe akangami na motambo ya baposa mabe ya nzoto na ye moko.
Кожен спокушається, коли його зваблює й захоплює власне бажання.
15 Bongo soki baposa mabe yango ekoli kati na moto, ebotaka lisumu; mpe lisumu ememaka na kufa.
Бажання, коли зачне, породжує гріх, а гріх, коли дозріє, породжує смерть.
16 Bandeko balingami, bomikosa te:
Любі мої брати, не вводьте себе в оману!
17 bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.
Кожен добрий дарунок і кожен досконалий дар походить згори, спускаючись від Отця світла, в Якому немає ні зміни, ні тіні переміни.
18 Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso.
За Своєю волею Він породив нас Словом істини, щоб ми стали наче першим плодом [серед] Його творінь.
19 Bandeko balingami, bosimba likambo oyo: tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika;
Любі мої брати, знайте: кожна людина повинна бути швидкою до слухання, повільною до говоріння та повільною до гніву.
20 pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya sembo na miso ya Nzambe.
Бо гнів людський не виконує Божої праведності.
21 Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.
Тому, відкинувши всяку нечистоту й рештки злоби, прийміть із лагідністю насаджене у вас Слово, яке може врятувати ваші душі.
22 Botiaka na misala Liloba na Nzambe; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba.
Тож будьте виконавцями Слова, а не тільки слухачами, які обманюють самих себе.
23 Moto oyo ayokaka Liloba kasi atiaka yango te na misala, akokani na moto oyo amitali na talatala
Бо якщо хтось є слухачем Слова, а не виконавцем, той подібний до людини, яка розглядає своє обличчя в дзеркалі:
24 mpe, sima na ye komitala, akei mpe, kaka na tango yango, abosani ndenge azali.
вона побачила себе, відійшла й відразу ж забула, як виглядає.
25 Nzokande moto oyo amipesaka na koyekola mobeko oyo ekoka na nyonso mpe epesaka bonsomi, bongo atosaka yango tango nyonso, asukaka kaka na koyoka te, kasi atiaka na misala: moto yango akozala moto ya esengo na nyonso oyo akosala.
А хто вдивляється в досконалий Закон свободи й перебуває в ньому, [той] не слухач-забудько, а виконавець діла. Він буде блаженний у своїй діяльності.
26 Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.
Якщо хтось думає, що він побожний, [але] не приборкує свого язика, обманюючи своє серце, [то] його побожність нічого не варта.
27 Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali: kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.
Чиста й непорочна побожність перед Богом і Отцем – це відвідування сиріт і вдів у їхньому горі [та] зберігання себе чистим від світу.

< Jake 1 >