< Ezayi 9 >

1 Nzokande, molili ekozala lisusu te mpo na bato oyo bazalaki na pasi. Na tango ya kala, Nzambe asambwisaki mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali; kasi na mikolo oyo ekoya, Nzambe akopesa lokumu na Galile ya bapagano, na nzela ya ebale monene, na ngambo mosusu ya Yordani.
But the darkness shall not remain where now is distress; Of old he brought the land of Zebulon and the land of Naphtali into contempt; In future times shall he bring the land of the sea beyond Jordan, the circle of the gentiles, into honor.
2 Bato oyo bazalaki kotambola kati na molili bamoni pole makasi; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole engengeli bango.
The people that walk in darkness behold a great light; They who dwell in the land of death-like shade, Upon them a light shineth.
3 Okomisaki bango ekolo monene, obakisaki esengo na bango. Bazali kosepela liboso na Yo ndenge basepelaka tango babukaka milona, ndenge mibali basepelaka tango bakabolaka bomengo ya bitumba.
Thou enlargest the nation; Thou increasest their joy; They rejoice before thee with the joy of harvest, With the joy of those who divide the spoil.
4 Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango, nzete oyo ezalaki na mapeka na bango mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango, Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.
For thou breakest their heavy yoke, And the rod that smote their backs, And the scourge of the taskmaster, As in the day of Midian.
5 Basapato nyonso ya basoda oyo lokito na yango eningisaka mabele, mpe bilamba nyonso oyo etondaki na makila, ekobwakama na moto mpo ete ezika makasi.
For every greave of the warrior in battle, And the war-garment rolled in blood, Shall be burned; yea, it shall be food for the fire.
6 Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, mwana mobali moko apesameli biso, mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye; bakobenga ye: Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.
For to us a child is born, To us a son is given, And the government shall be upon his shoulder, And he shall be called Wonderful, counsellor, mighty potentate, Everlasting father, prince of peace;
7 Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.
His dominion shall be great, And peace without end shall be upon the throne of David and his kingdom, To fix and establish it Through justice and equity, Henceforth and forever. The zeal of Jehovah of hosts will do this.
8 Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.
The Lord sendeth a word against Jacob; It cometh down to Israel.
9 Bato nyonso bakoyeba yango, Efrayimi mpe bavandi ya Samari, oyo balobaka na lofundu mpe na lolendo ya mitema:
His whole people shall feel it, Ephraim, and the inhabitants of Samaria, Who say in pride and arrogance of heart,
10 « Ata babiliki ekweyi, tokotonga lisusu na mabanga bakata; ata bakati banzete ya sikomori, tokotia na esika na yango banzete ya sedele. »
“The bricks are fallen down, but we will build with hewn stones; The sycamores are cut down, but we will replace them with cedars.”
11 Kasi Yawe alendisaki bayini ya Retsini mpo na kobundisa bango mpe apelisaki mitema ya banguna na bango mpo ete batombokela bango.
Jehovah will raise up the enemies of Rezin against them, And will arm their adversaries;
12 Bato ya Siri na liboso, mpe bato ya Filisitia na sima, bapasolaki Isalaele mpe baliaki ye na lokoso. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
The Syrians before, the Philistines behind, Who shall devour Israel with wide jaws. For all this his anger is not turned away, But his hand is stretched out still.
13 Kasi atako bongo, bato bazongaki kaka te epai na Yawe oyo abetaki bango, mpe balukaki te Yawe, Mokonzi ya mampinga.
The people turn not to him that smiteth them; Neither do they seek Jehovah of hosts.
14 Yango wana, kaka na mokolo moko, Yawe akokata, kati na Isalaele, moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi.
Therefore shall Jehovah cut off from Israel the head and the tail, The palm-branch and the rush, in one day.
15 Bampaka mpe bato ya lokumu, bango nde moto; mpe basakoli ya lokuta, bango nde mokila.
[[The aged and the honorable are the head, And the prophet that speaketh falsehood is the tail.]]
16 Bakambi ya bato babungisi bato na bango nzela, mpe bato oyo balandaka bango bakomi kotelengana.
For the leaders of this people lead them astray, And they that are led by them go to destruction.
17 Yango wana, Nkolo akosepela na bilenge te, akoyokela bana bitike mpe basi bakufisa mibali mawa te, pamba te bango nyonso bazali kotiola Nzambe, bazali kosala mabe, mpe minoko nyonso ezali kobimisa maloba ya bozoba. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
Therefore shall the Lord have no joy in their young men, And on their orphans and widows he shall have no compassion; For they are all profane, and evil-doers; Every mouth speaketh folly. For all this his anger is not turned away, But his hand is stretched out still.
18 Solo, mabe etumbaka lokola moto oyo ezikisaka basende mpe banzube, ezikisaka bazamba minene mpe ematisaka makonzi ya milinga.
For wickedness burneth like a fire, It consumeth the briers and thorns, And it kindleth the thicket of the forest, So that it goeth up in columns of smoke.
19 Na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mokili eziki na moto, mpe bato bakomi lokola mafuta na moto. Moto moko te akobikisa ndeko na ye.
Through the wrath of Jehovah of hosts is the land burned, And the people are food for the fire; No one spareth another.
20 Na ngambo ya loboko ya mobali, bakobotola bato biloko, kasi bato bakozala kaka na nzala; na ngambo ya loboko ya mwasi, bakolia, kasi bato bakotonda kaka te; moko na moko akolia mosuni ya loboko na ye:
They consume on the right hand, and yet are hungry; They devour on the left, and are not satisfied; Every one devoureth the flesh of his arm.
21 Manase akolia Efrayimi, mpe Efrayimi akolia Manase; bango mibale bakosangana mpe bakobalukela Yuda. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
Manasseh is against Ephraim, and Ephraim against Manasseh, And both together against Judah. For all this his anger is not turned away, But his hand is stretched out still.

< Ezayi 9 >