< Ezayi 8 >

1 Yawe alobaki na ngai: « Kamata etando monene ya libanga mpe salela ekomeli mpo na kokoma makambo oyo na likolo na yango: Maher-Shalal-Hash-Baz (pene bomengo ya bitumba, pene kobebisama). »
上主對我說:「你拿一塊大板,用通用的字體在上面寫:瑪赫爾、沙拉耳、哈市、巴次」
2 Nabengaki Nganga-Nzambe Iri mpe Zakari, mwana mobali ya Yeberekia, mpo ete bazala batatoli na ngai ya sembo.
我就叫了兩個忠直的證人,即司祭烏黎雅和耶貝勒基雅的兒子則加黎雅,為我作證。
3 Nakendeki epai ya mwasi mosakoli; akomaki na zemi mpe abotaki mwana mobali. Yawe alobaki na ngai: « Pesa ye kombo Maher-Shalal-Hash-Baz.
我接近了女先知,她便懷孕,生了一個兒子;上主對我說:「你給他起名叫瑪赫爾沙拉耳哈市巴次,
4 Liboso ete mwana ayeba ndenge babengaka ‹ Tata na ngai › to ‹ mama na ngai, › bakomema bozwi ya Damasi mpe bomengo ya bitumba ya Samari epai ya mokonzi ya Asiri. »
因為在這孩子會喊「爸爸」「媽媽」以前,大馬士革的財富和撒瑪黎雅的贓物必要運到亞述王前。」
5 Yawe alobaki na ngai lisusu:
上主又曉諭我說:
6 « Mpo ete bato oyo basundoli mayi ya Siloe oyo etiolaka na kimia, mpe basepeli na Retsini mpe na mwana mobali ya Remalia,
因為這民族厭棄了緩緩徐流的史羅亞水,因而在勒斤和勒瑪里雅之子面前驚慌;
7 Yawe akotindela bango mayi ya nguya mpe mayi ebele lokola mayi ya ebale Efrate: ekozala nde mokonzi ya Asiri elongo na mampinga na ye nyonso. Ekotonda penza meke mpe ekozipa bangambo nyonso.
為此,看,吾主必使洶湧澎湃的河水--即亞述王和他所有的軍隊--上來淹沒他們;他必將瀉出一切河道,溢出一切河岸,
8 Ekokota na Yuda mpe ekozindisa yango kino na kingo; mpe kopanzana ya mayi yango ekotondisa mokili na yo mobimba, Emanwele. »
直沖入猶大,漲溢氾濫,高達人的頸項。厄瑪奴耳啊!他展開的兩翼,將掩蓋你廣闊的疆土!
9 Bino bikolo, boganga na somo mpe bopalangana! Bino bituka nyonso ya mosika, boyoka! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana!
眾民啊!覺悟罷!你們終必喪膽! 遠方的一切民族啊!聆聽罷 !任憑你們怎樣束腰,終必喪膽!任憑你們怎樣束腰,終必喪膽。
10 Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso!
你們雖然策劃,必然落空;你們雖然說定,決不能實現,因為天主與我們同在。
11 Yawe alobaki na ngai, tango asimbaki ngai na loboko na Ye ya nguya mpe akebisaki ngai ete nalanda te nzela ya bato oyo:
當上主以手握住我,警惕我不要走這民族的道路時,這樣對我說:
12 « Bobengaka likita te eloko nyonso oyo bato babengaka likita; bobangaka te oyo bango babangaka, boyokela yango somo ata moke te.
這民族稱為聖的,你們不得稱之為聖!他們畏懼的,你們不必畏懼,也不必戰兢!
13 Kaka Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde bosengeli komona lokola Mosantu, Ye kaka nde bosengeli kokumisa, Ye kaka nde bosengeli koyoka somo.
萬軍的上主,你們惟應以他為聖;他是你們當敬畏的,是你們當恐懼的。
14 Akozala lokola Esika ya bule; kasi mpo na bandako mibale ya Isalaele, akozala lokola libanga oyo ebetisaka bato mabaku, lokola libanga monene oyo ekweyisaka bato; bongo mpo na bato ya Yelusalemi, akozala motambo mpe monyama.
他將是以色列兩家的絆腳石和失足的暗礁,是耶路撒冷居民的羅網和陷阱。
15 Mingi kati na bango bakobeta mabaku, bakokweya mpe bakobukana, bakokangama na motambo, mpe bakozwa bango. »
他們中間有許多人將失足跌倒而折傷,陷於圈套而被捕。
16 Bomba lisakoli oyo ete eyebana te, kangisa mobeko oyo kati na bayekoli na ngai.
證件已綁好,訓誨在我門徒中已封緘,
17 Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo; nakotia elikya na ngai kati na Ye.
我只仰望那位現在轉面不顧雅各伯家的上主,我要等待他。
18 Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.
看哪!我和上主賞給我的孩子,在以色列中成了標識和預兆:這原是出於住在熙雍山上的萬軍的上主!
19 Soki bato balobi na bino: « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi? »
有人或對你們說:「你們詢問那些喃喃細語的巫覡和術士罷!百姓豈不能詢問自己的神,為活人而詢問幽魂嗎﹖」「
20 Na mobeko mpe na lisakoli! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.
應到訓誨和證件中去尋!」誰若不照這話答覆,為他便沒有曙光。
21 Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe.
人將忍受著痛苦和飢餓,經過此地;當他由於飢餓而暴發忿怒時,必詛咒自己的君王和自己的神明;他無論仰望上天,
22 Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi.
或注視大地,他只見苦惱和幽暗,昏黯和恐怖!但黑暗畢竟要被驅除,

< Ezayi 8 >