< Ezayi 7 >
1 Tango Akazi, mwana mobali ya Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akomaki mokonzi ya Yuda, Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bakendeki kobundisa Yelusalemi, kasi bakokaki kolonga yango te.
У време Ахаза сина Јотама сина Озије цара Јудиног дође Ресин цар сирски и Факеј син Ремалијин цар Израиљев на Јерусалим да га бију, али га не могоше узети.
2 Boye, bapesaki sango na ndako ya Davidi: « Bato ya Siri basali boyokani elongo na bato ya Efrayimi. » Motema ya Akazi mpe mitema ya bato na ye nyonso eninganaki makasi ndenge kaka banzete ya zamba eninganaka na tango ya mopepe.
И дође глас дому Давидовом и рекоше: Сирија се сложи с Јефремом. А срце Ахазово и срце народа његовог устрепта као дрвеће у шуми од ветра.
3 Boye, Yawe alobaki na Ezayi: « Kende, yo elongo na Sheari-Yashubi, mwana na yo ya mobali, kokutana na Akazi na suka ya nzela ya mayi oyo ekenda kino na liziba monene, na nzela ya bilanga ya moto oyo atiaka balangi na bilamba;
Тада рече Господ Исаији: Изађи на сусрет Ахазу, ти и Сеар-јасув, син твој, накрај јаза горњег језера, на пут код поља бељаревог.
4 loba na ye: ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela: kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia!
И реци му: Чувај се и буди миран, не бој се и срце твоје нека се не плаши од два краја ових главњи што се пуше, од распаљеног гнева Ресиновог и сирског и сина Ремалијиног.
5 Siri, Efrayimi mpe mwana mobali ya Remalia, basaleli yo likita mpo na kobebisa yo; bazali koloba:
Што се Сирци и Јефрем и син Ремалијин договорише на твоје зло говорећи:
6 ‘Tika ete tobundisa Yuda, tokata yango na biteni, tokabola yango biso na biso mpe totia mwana mobali ya Tabeli lokola mokonzi na yango.’
Хајдемо на јудејску да јој досадимо и да је освојимо и да поставимо у њој царем сина Тавеиловог.
7 Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ekotikala kosalema te, ekotikala kokokisama te!
Зато овако вели Господ Бог: Неће се то учинити, неће бити.
8 Pamba te moto ya Siri ezali Damasi, mpe moto ya Damasi ezali na yango kaka Retsini. Etikali kaka mibu tuku motoba na mitano, Efrayimi ekobebisama mpe ekozala lisusu na molongo ya mabota te.
Јер је глава Сирији Дамаск, а Дамаску је глава Ресин; и до шездесет и пет година сатрће се Јефрем тако да више неће бити народ.
9 Moto ya Efrayimi ezali Samari, mpe moto ya Samari ezali kaka mwana mobali ya Remalia. Soki botelemi ngwi te na kondima na bino, bokolonga te kotelema liboso na bango! › »
И глава је Јефрему Самарија, а Самарији је глава син Ремалијин. Ако не верујете, нећете се одржати.
10 Yawe alobaki lisusu na Akazi:
И још рече Господ Ахазу говорећи:
11 — Senga elembo moko epai na Yawe, Nzambe na yo, ezala kati na mokili oyo eleki na bozindo to oyo eleki likolo. (Sheol )
Ишти знак од Господа Бога свог, ишти оздо из дубине или озго с висине. (Sheol )
12 Kasi Akazi alobaki: — Nakosenga te, nakoki komeka Yawe te.
А Ахаз рече: Нећу искати, нити ћу кушати Господа.
13 Boye Ezayi alobaki: — Boyoka sik’oyo, bino libota ya Davidi! Ekoki kaka te mpo na bino kolembisa mitema ya bato? Boni, bolingi lisusu kolembisa motema ya Nzambe na ngai?
Тада рече Исаија: Слушајте сада, доме Давидов; мало ли вам је што досађујете људима, него досађујете и Богу мом?
14 Ye moko Nkolo akopesa bino elembo: moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »
Зато ће вам сам Господ дати знак; ето девојка ће затруднети и родиће Сина, и наденуће Му име Емануило.
15 Mwana yango akomela kaka miliki mpe mafuta ya nzoyi kino tango akoyeba koboya mabe mpe kopona bolamu.
Масло и мед јешће, док не научи одбацити зло а изабрати добро.
16 Kasi liboso ete mwana yango ayeba koboya mabe mpe kopona bolamu, mikili ya bakonzi mibale oyo ozali kobanga ekobebisama.
Јер пре него научи дете одбацити зло а изабрати добро, оставиће земљу, на коју се гадиш, два цара њена.
17 Yawe akoyeisela yo, bato na yo mpe libota ya tata na yo mikolo oyo etikala nanu kozala te wuta Efrayimi ekabwana na Yuda: ezali nde mokonzi ya Asiri.
Господ ће пустити на те и на народ твој и на дом оца твог дане, каквих није било откад се Јефрем одвоји од Јуде, преко цара асирског.
18 Na mokolo wana, Yawe akobeta piololo mpo na kobenga nzinzi wuta na miluka ya Ejipito mpe banzoyi oyo ezalaka na mokili ya Asiri;
И тада ће Господ зазвиждати мувама које су накрај река мисирских, и пчелама које су у земљи асирској;
19 ekoya mpe ekovanda kati na mabwaku ya mozindo mpe na madusu ya mabanga, na banzete nyonso ya mike-mike mpe na matiti nyonso.
И доћи ће и попадаће све у пусте долине и у камене раселине и на све честе и на свако дрвце.
20 Na mokolo wana, Yawe akosalela jileti oyo akodefa na ngambo mosusu ya Efrate, elingi koloba mokonzi ya Asiri, mpo na kokokola suki ya moto na yo, suki ya makolo na yo mpe mandefu na yo.
Тада ће Господ обријати бритвом закупљеном испреко реке, царем асирским, главу и длаке по ногама, и браду сву.
21 Na mokolo wana, moko na moko akobokola mwana ngombe ya mwasi mpe bameme to bantaba mibale ya basi.
И тада ко сачува кравицу и две овце,
22 Lokola bibwele wana ekopesaka miliki ebele, akolia manteka; mpe bato nyonso oyo bakotikala na mokili bakolia mafuta ya nzoyi.
Од мноштва млека што ће давати јешће масло; јер масло и мед јешће ко год остане у земљи.
23 Na mokolo wana, esika nyonso oyo ezalaki na banzete ya vino nkoto moko oyo ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ekotonda na basende mpe na banzube.
И тада ће свако место где има хиљаду чокота за хиљаду сребрњака зарасти у чкаљ и трње.
24 Bato bakokota kuna na matolotolo mpe na bambanzi, pamba te mokili ekotonda na basende mpe na banzube.
Са стрелама и с луком ићи ће се онамо, јер ће сва земља бити чкаљ и трње.
25 Bato bakoleka lisusu te na bangambo nyonso oyo bazalaki kosala bilanga na kongo, pamba te bakokoma kobanga basende mpe banzube; ngombe ekokoma kolia kuna, mpe meme ekonyata-nyata mabele na yango.
А на све горе које су се копале мотиком, на њих неће доћи страх од чкаља и трња, него ће бити испуст воловима и газиће их овце.