< Ezayi 64 >
1 Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita, bangomba ekoningana liboso na Yo!
О да би раздро небеса и сишао, да се растопе горе од Тебе,
2 Ndenge moto etumbaka matiti mpe etokisaka mayi na nzungu, kita mpo na kosala ete banguna na Yo bayeba Kombo na Yo mpe bikolo eningana liboso na Yo!
Као што се на огњу разгори грање и вода узаври од огња, да име Твоје познају непријатељи Твоји и да народи дрхћу од Тебе.
3 Pamba te tango osalaki makambo ya somo oyo biso tozalaki kozela te, okitaki mpe bangomba eninganaki liboso na Yo.
Кад си чинио страхоте којима се не надасмо, Ти си силазио, и горе се растапаху од Тебе.
4 Wuta na tango ya kala penza, moto moko te atikala kososola, litoyi moko te etikala koyoka, liso moko te etikala komona, ete nzambe moko, longola kaka Yo, asalaka boye mpo na bato oyo batalelaka ye.
Откако је века не чу се, нити се ушима дозна, нити око виде Бога осим Тебе да би тако учинио онима који Га чекају.
5 Osungaka bato oyo bazalaka na esengo ya kosala makambo ya sembo, ba-oyo babosanaka nzela na Yo te. Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu; bongo ndenge nini tokoki solo kobika?
Сретао си оног који се радује творећи правду; помињу Те на путевима Твојим; гле, Ти си се разгневио што грешисмо; да на њима једнако остасмо, бисмо се спасли.
6 Biso nyonso, tokomi lokola eloko ya mbindo, misala na biso nyonso ya bosembo ezali lokola elamba ya mbindo; biso nyonso tokawuki lokola likasa mpe masumu na biso ememi biso lokola mopepe!
Али сви бејасмо као нечисто шта, и сва наша правда као нечиста хаљина; зато опадосмо сви као лист, и безакоња наша као ветар однесоше нас.
7 Moko te azali kobelela Kombo na Yo to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, pamba te obombeli biso elongi na Yo mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.
Никога не би да призива име Твоје, да устане да се Тебе држи, јер си сакрио лице своје од нас и растопио си нас безакоњем нашим.
8 Nzokande oh Yawe, ozalaka Tata na biso; biso tozali lokola mabele oyo basalelaka bikeko, bongo Yo, ozali lokola mosali mbeki; biso nyonso tozali mosala ya maboko na Yo.
Али сада, Господе, Ти си наш Отац; ми смо као, а Ти си наш лончар, и сви смо дело руку Твојих.
9 Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
Господе, не гневи се веома, и не помињи довека безакоње; ево, погледај; ми смо сви Твој народ.
10 Bingumba na Yo ya bule ekomi esobe; ezala Siona, yango mpe ekomi esobe; Yelusalemi etikali lisusu na bato te!
Градови светости Твоје опустеше; Сион опусте, Јерусалим поста пустош.
11 Tempelo na biso ya bule mpe ya lokumu epai wapi batata na biso bazalaki koyemba masanzoli mpo na lokumu na Yo, esili kozika na moto; mpe nyonso oyo tozalaki na yango ya motuya esili kobebisama!
Дом наше светиње и наше красоте, у коме Те славише оци наши, изгоре огњем, и све што нам беше драго потрвено је.
12 Oh Yawe, sima na makambo oyo nyonso, okozongisa kaka motema na Yo sima te? Okokanga kaka monoko mpe okopesa biso kaka etumbu oyo eleki ndelo?
Хоћеш ли се на то уздржати, Господе, и ћутати, и једнако нас мучити?