< Ezayi 63 >

1 Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi? « Ezali nde Ngai; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »
Quis est iste, qui venit de Edom, tinctis vestibus de Bosra? iste formosus in stola sua, gradiens in multitudine fortitudinis suae. Ego, qui loquor iustitiam, et propugnator sum ad salvandum.
2 Mpo na nini bilamba na yo ezali motane lokola bilamba ya mokamoli vino?
Quare ergo rubrum est indumentum tuum, et vestimenta tua sicut calcantium in torculari?
3 « Nazalaki kaka ngai moko kati na ekamolelo mpo na kokamola vino, moko te kati na bato ya bikolo nyonso azalaki elongo na ngai. Nanyataki-nyataki bango na kanda na ngai mpe nakamolaki bango na kanda na ngai ya makasi; makila na bango epumbwelaki ngai na bilamba mpe ebebisaki bilamba na ngai nyonso.
Torcular calcavi solus, et de Gentibus non est vir mecum: calcavi eos in furore meo, et conculcavi eos in ira mea: et aspersus est sanguis eorum super vestimenta mea, et omnia indumenta mea inquinavi.
4 Pamba te, na motema na ngai, ezalaki nde mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpe mobu na ngai ya kosikola ekokaki.
Dies enim ultionis in corde meo annus retributionis meae venit.
5 Natalaki, kasi namonaki moto te oyo akosunga; nakamwaki ete moto azalaki te mpo na kosunga ngai! Bongo, loboko na ngai moko ebikisaki ngai, mpe kanda na ngai ya makasi esungaki ngai.
Circumspexi, et non erat auxiliator: quaesivi et non fuit qui adiuvaret: et salvavit mihi brachium meum, et indignatio mea ipsa auxiliata est mihi.
6 Nanyataki-nyataki bikolo na kanda na ngai, nalangwisaki bango na kanda na ngai ya makasi mpe nasopaki makila na bango na mabele. »
Et conculcavi populos in furore meo, et inebriavi eos in indignatione mea, et detraxi in terram virtutem eorum.
7 Nakotatola boboto ya Yawe, nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso; solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.
Miserationum Domini recordabor, laudem Domini super omnibus, quae reddidit nobis Dominus, et super multitudinem bonorum domui Israel, quae largitus est eis secundum indulgentiam suam, et secundum multitudinem misericordiarum suarum.
8 Alobaki: « Solo, bazali bato na Ngai, bazali bana oyo bakosaka Ngai te! » Yango wana, Yawe akomaki Mobikisi na bango.
Et dixit: Verumtamen populus meus est, filii non negantes: et factus est eis salvator.
9 Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.
In omni tribulatione eorum non est tribulatus, et angelus faciei eius salvavit eos: in dilectione sua, et in indulgentia sua ipse redemit eos, et portavit eos, et elevavit eos cunctis diebus saeculi.
10 Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.
Ipsi autem ad iracundiam provocaverunt, et afflixerunt spiritum sancti eius: et conversus est eis in inimicum, et ipse debellavit eos.
11 Boye, bato na Ye bakanisaki mikolo ya tango ya kala, mikolo ya tango ya Moyize: Wapi Ye oyo akatisaki bango ebale monene, elongo na mobateli bibwele ya etonga na Ye? Wapi Ye oyo atiaki kati na bango Molimo Mosantu na Ye?
Et recordatus est dierum saeculi Moysi, et populi sui: Ubi est qui eduxit eos de mari cum pastoribus gregis sui? ubi est qui posuit in medio eius spiritum sancti sui?
12 Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkembo ezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize, Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bango mpo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela;
Qui eduxit ad dexteram Moysen brachio maiestatis suae, qui scidit aquas ante eos, ut faceret sibi nomen sempiternum:
13 Ye oyo atambolisaki bango kati na mozindo? Lokola mpunda kati na esobe, babetaki libaku te;
Qui eduxit eos per abyssos, quasi equum in deserto non impingentem:
14 lokola bibwele oyo ezali kokita na lubwaku, Molimo na Yawe apesaki bango bopemi. Ezali ndenge wana nde okambaki bato na Yo mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yo.
Quasi animal in campo descendens, spiritus Domini ductor eius fuit: sic adduxisti populum tuum ut faceres tibi nomen gloriae.
15 Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo: Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili?
Attende de caelo, et vide de habitaculo sancto tuo, et gloriae tuae: ubi est zelus tuus, et fortitudo tua, multitudo viscerum tuorum, et miserationum tuarum? super me continuerunt se.
16 Nzokande, Yo nde ozali Tata na biso; atako Abrayami ayebi biso te to Isalaele andimi biso te; kasi Yo, Yawe, ozali Tata na biso, Kombo na Yo ezali: Mosikoli na biso ya tango nyonso.
Tu enim pater noster, et Abraham nescivit nos, et Israel ignoravit nos: tu Domine pater noster, redemptor noster, a saeculo nomen tuum.
17 Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayenga mosika ya nzela na Yo? Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasi mpo ete totosa Yo te? Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo, mabota ya libula na Yo!
Quare errare nos fecisti Domine de viis tuis: indurasti cor nostrum ne timeremus te? convertere propter servos tuos, tribus hereditatis tuae.
18 Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bule kaka mpo na mwa tango moke; kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule!
Quasi nihilum possederunt populum sanctum tuum: hostes nostri conculcaverunt sanctificationem tuam.
19 Wuta kala, tozalaka bato na Yo; kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te, lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te.
Facti sumus quasi in principio, cum non dominareris nostri, neque invocaretur nomen tuum super nos.

< Ezayi 63 >