< Ezayi 62 >
1 Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.
Не умолкну ради Сиона, и ради Иерусалима не успокоюсь, доколе не взойдет, как свет, правда его и спасение его - как горящий светильник.
2 Bongo bikolo ekomona bosembo na yo, mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo. Bakobenga yo na kombo ya sika oyo monoko na Yawe ekopesa.
И увидят народы правду твою и все цари - славу твою, и назовут тебя новым именем, которое нарекут уста Господа.
3 Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo.
И будешь венцом славы в руке Господа и царскою диадемою на длани Бога твоего.
4 Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.
Не будут уже называть тебя “оставленным”, и землю твою не будут более называть “пустынею”, но будут называть тебя: “Мое благоволение к нему”, а землю твою - “замужнею”, ибо Господь благоволит к тебе, и земля твоя сочетается.
5 Lokola elenge mobali abalaka moseka, bana na yo ya mibali mpe bakobala yo; lokola elenge mobali asepelaka na mobandami na ye ya mwasi, Nzambe na yo mpe akosepela na yo.
Как юноша сочетается с девою, так сочетаются с тобою сыновья твои; и как жених радуется о невесте, так будет радоваться о тебе Бог твой.
6 Oh Yelusalemi, natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo; bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu. Bino bato oyo bosalaka ete Yawe akanisa lisusu Yelusalemi, bovanda kimia te;
На стенах твоих, Иерусалим, Я поставил сторожей, которые не будут умолкать ни днем, ни ночью. О, вы, напоминающие о Господе! не умолкайте, -
7 mpe botikela Ye te tango ya kopema kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili!
не умолкайте пред Ним, доколе Он не восстановит и доколе не сделает Иерусалима славою на земле.
8 Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali, loboko na Ye ya nguya, mpe alapi ndayi: « Nakopesa lisusu ble na yo te lokola bilei epai ya banguna na yo; bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika oyo omonelaki pasi;
Господь поклялся десницею Своею и крепкою мышцею Своею: не дам зерна твоего более в пищу врагам твоим, и сыновья чужих не будут пить вина твоего, над которым ты трудился;
9 kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yango mpe bakokumisa Yawe, mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yango kati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. »
но собирающие его будут есть его и славить Господа, и обирающие виноград будут пить вино его во дворах святилища Моего.
10 Boleka, boleka na bikuke! Bobongisela bato nzela, bopasola nzela, bopasola nzela ya monene! Bolongola mabanga, botombola bendele liboso na bato ya bikolo.
Проходите, проходите в ворота, приготовляйте путь народу! Ровняйте, ровняйте дорогу, убирайте камни, поднимите знамя для народов!
11 Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele: « Boloba na Siona, mboka kitoko: ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »
Вот, Господь объявляет до конца земли: скажите дщери Сиона: грядет Спаситель твой; награда Его с Ним и воздаяние Его пред Ним.
12 Bakobenga bango Libota mosantu, basikolami na Yawe; mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka, engumba oyo basundola te.
И назовут их народом святым, искупленным от Господа, а тебя назовут взысканным городом, неоставленным.