< Ezayi 60 >

1 « Telema mpe ngenga, pamba te pole na yo ezali koya, mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo.
Gør dig rede, bliv Lys, thi dit Lys er kommet, HERRENS Herlighed er oprundet over dig.
2 Tala, molili ezipi mabele mpe molili makasi ezipi bato, kasi Yawe atelemi mpo na yo mpe nkembo na Ye emonani epai na yo.
Thi se, Mørke skjuler Jorden og Dunkelhed Folkene, men over dig skal HERREN oprinde, over dig skal hans Herlighed ses.
3 Bikolo ekotambola na pole na yo, mpe bakonzi bakotambola na kongenga ya pole na yo.
Til dit Lys skal Folkene vandre, og Konger til dit straalende Skær.
4 Tombola miso zingazinga na yo mpe tala: Bango nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo; bana na yo ya mibali bawuti mosika, mpe oyo ya basi, bamemi bango na maboko.
Løft Øjnene, se dig om, de samles, kommer alle til dig. Dine Sønner kommer fra det fjerne, dine Døtre bæres paa Hofte;
5 Boye, okomona mpe okongenga, motema na yo ekobeta mpe ekosepela; bomengo ya ebale ekoya epai na yo, mpe bozwi ya bikolo ekoya epai na yo.
da straaler dit Øje af Glæde, dit Hjerte banker og svulmer; thi Havets Skatte bliver dine, til dig kommer Folkenes Rigdom;
6 Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. Yango nyonso ekowuta na Saba, ekomema wolo mpe malasi ya ansa, mpe ekotatola masanzoli na Yawe.
Kamelernes Vrimmel skjuler dig, Midjans og Efas Foler, de kommer alle fra Saba; Guld og Røgelse bærer de og kundgør HERRENS Pris;
7 Bibwele nyonso ya Kedari ekosangana epai na yo, bameme ya mibali ya Nebayoti ekosalela yo; ekondimama lokola mbeka na likolo ya etumbelo na Ngai, mpe nakongengisa Tempelo na nzela ya nkembo na Ngai.
alt Kedars Smaakvæg samles til dig, dig tjener Nebajots Vædre, til mit Velbehag ofres de til mig, mit Bedehus herliggøres.
8 Banani oyo bazali kokima lokola mapata, lokola bibenga epai ya babokoli na yango?
Hvem flyver mon der som Skyer, som Duer til Dueslag?
9 Solo, bisanga ekotalela Ngai; bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, elongo na palata mpe wolo, mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele; pamba te apesi yo nkembo.
Det er Skibe, der kommer med Hast, i Spidsen er Tarsisskibe, for at bringe dine Sønner fra det fjerne; deres Sølv og Guld har de med til HERREN din Guds Navn, Israels Hellige, han gør dig herlig.
10 Bapaya bakotonga lisusu bamir na yo, mpe bakonzi na bango bakosalela yo. Ezala nabetaki yo na kanda na Ngai, kasi nakoyokela yo mawa na ngolu na Ngai.
Udlændinge skal bygge dine Mure, og tjene dig skal deres Konger; thi i Vrede slog jeg dig vel, men i Naade forbarmer Jeg mig over dig.
11 Bikuke na yo ekozala tango nyonso efungwama, ekotikala kokangama te, ezala na moyi to na butu, mpo ete bato bamemela yo bozwi ya bikolo, bakonzi na yango na molongo lokola bato bakangami na etumba.
Dine Porte holdes altid aabne, de lukkes hverken Dag eller Nat, at Folkenes Rigdom kan bringes dig med deres Konger som Førere.
12 Pamba te ekolo to mboka oyo ekosalela yo te ekobebisama; solo, ekobebisama nye.
Thi det Folk og Rige, som ikke tjener dig, skal gaa til Grunde, og Folkene skal lægges øde i Bund og Grund.
13 Nkembo ya Libani ekoya epai na yo, banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwisi ekoya elongo mpo na kobongisa Esika na Ngai ya bule; mpe nakopesa lokumu na esika na Ngai, oyo natiaka makolo na Ngai.
Til dig skal Libanons Herlighed komme, baade Cypresser og Elm og Gran, for at smykke min Helligdoms Sted, saa jeg ærer mine Fødders Skammel.
14 Bana ya banyokoli na yo bakoya kofukama liboso na yo; bato nyonso oyo batiolaki yo bakofukama na se ya matambe na yo mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Isalaele.
Dine Undertrykkeres Sønner kommer bøjet til dig, og alle, som haaned dig, kaster sig ned for din Fod og kalder dig HERRENS By, Israels Helliges Zion.
15 Ata basundolaki yo mpe bayinaki yo, mpe moto moko te azalaki lisusu koleka epai na yo, nakopesa yo lokumu mpo na tango nyonso mpe esengo ya libela na libela.
Medens du før var forladt og hadet, saa ingen drog gennem dig, gør jeg dig til evig Højhed, til Glæde fra Slægt til Slægt.
16 Okomela miliki ya bikolo mpe okomela mabele ya bakonzi; boye okoyeba solo ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo mpe Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi.
Du skal indsuge Folkenes Mælk og die Kongernes Bryst. Du skal kende, at jeg, HERREN, er din Frelser, din Genløser Jakobs Vældige.
17 Na esika ya bronze, nakomemela yo wolo, mpe na esika ya bibende, nakomemela yo palata; na esika ya banzete, nakomemela yo bronze; mpe na esika ya mabanga, nakomemela yo bibende; nakokomisa Kimia moyangeli na yo, mpe Bosembo, mokambi na yo.
Guld sætter jeg i Stedet for Kobber og Sølv i Stedet for Jern, Kobber i Stedet for Træ og Jern i Stedet for Sten. Til din Øvrighed sætter jeg Fred, til Hersker over dig Retfærd.
18 Kati na mokili na yo, okoyoka lisusu te makelele ya mobulu to ya kopanza to ya kobebisama kati na etando na yo; kasi okobenga bamir na yo ‹ Lobiko, › mpe bikuke na yo ‹ Masanzoli. ›
Der høres ej mer i dit Land om Uret, om Vold og Ufærd inden dine Grænser; du kalder Frelse dine Mure og Lovsang dine Porte.
19 Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo.
Ej mer skal Solen være dit Lys eller Maanen Skinne for dig: HERREN skal være dit Lys for evigt, din Gud skal være din Herlighed.
20 Moyi na yo ekolala lisusu te, mpe sanza na yo ekobunga lisusu te; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe mikolo na yo ya pasi ekosila.
Din Sol skal ej mer gaa ned, din Maane skal ej tage af; thi HERREN skal være dit Lys for evigt, dine Sørgedage har Ende.
21 Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.
Enhver i dit Folk er retfærdig, evigt ejer de Landet, et Skud, som HERREN har plantet, hans Hænders Værk, til hans Ære.
22 Oyo aleki moke kati na bino akokoma nkoto moko, mpe oyo aleki moke penza akokoma ekolo ya makasi. Ngai, nazali Yawe, nakoyeisa yango mbangu na tango na yango. »
Den mindste bliver en Stamme, den ringeste et talrigt Folk. Jeg er HERREN; naar Tid er inde, vil jeg fremme det i Hast.

< Ezayi 60 >