< Ezayi 6 >
1 Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.
In the year in which King Uzziah died, I saw the Lord sitting on a throne high and lifted up, and the train of his robe filled the temple.
2 Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye; moko na moko azalaki na mapapu motoba: mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa.
Around him stood seraphs; each one of them had six wings; with two he covered his face, with two he covered his feet, and with two he did fly.
3 Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu: « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye! »
And one called to another, and said: Holy, holy, holy is Jehovah of hosts; The whole earth is full of his glory.
4 Na makelele ya mingongo na bango, mabaya oyo esimbaka bikuke ekomaki koningana, mpe Tempelo etondaki na milinga.
And the foundations of the thresholds were shaken with the voice of their cry. And the temple was filled with smoke.
5 Nalobaki: « Mawa na ngai! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga! »
Then I said, Alas for me! I am undone! For I am a man of unclean lips, and dwell among a people of unclean lips, and mine eyes have seen the King, Jehovah of hosts.
6 Moko kati na baserafe asimbaki, na loboko na ye, likala ya moto oyo azwaki na etumbelo na bisimbelo, apumbwaki mpe ayaki epai na ngai;
Then flew one of the seraphs to me, having in his hands a glowing stone, which he had taken with the tongs from the altar.
7 atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki: « Tala, lokola likala oyo etuti bibebu na yo, mabe na yo esili kolongwa, masumu na yo esili kolimbisama. »
And he touched my mouth, and said, Behold, this toucheth thy lips, and thine iniquity is taken away, and thy sin is expiated.
8 Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba: — Nakotinda nani? Nani akokende mpo na biso? Nazongisaki: — Ngai oyo, tinda ngai!
And I heard the voice of the Lord, saying, Whom shall I send, and who will go for us? And I said: Behold, here am I; send me!
9 Yawe alobaki na ngai: — Kende koloba na bato oyo: « Boyoka na bino, kasi bokososola te; botala na bino, kasi bokomona te!
And he said: Go, and say thou to this people, Hear ye, indeed, but understand not; See ye, indeed, but perceive not!
10 Komisa bato oyo mitema makasi, kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango mpo ete bamona te na miso na bango, bayoka te na matoyi na bango, basosola te na mitema na bango, babongwana te mpe babika te! »
Make the heart of this people gross; Make their ears dull, and blind their eyes; That they may not see with their eyes, nor hear with their ears, Nor perceive with their hearts, and turn, and be healed.
11 Boye nalobaki: — Oh Nkolo, kino tango nini? Azongisaki: — Kino bingumba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te, kino tango bato bakotikala lisusu na bandako te, mpe bilanga ekobebisama mpe bakosakanela yango;
Then said I, How long, Lord? He said: Until the cities be laid waste, so that there be no inhabitant, And the houses, so that there be no man, And the land be left utterly desolate;
12 kino tango Yawe akotinda bato mosika, kino tango bakobosana penza mokili libela.
Until Jehovah have removed the men far away, And there be great desolation in the land.
13 Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.
And though there be a tenth part remaining in it, Even this shall again be destroyed; Yet as when the terebinth and the oak are cut down, Their stem remaineth alive, So shall a holy race be the stem of the nation.