< Ezayi 58 >

1 « Ganga na mongongo makasi, kotika te! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.
Grida a squarciagola, non aver riguardo; come una tromba alza la voce; dichiara al mio popolo i suoi delitti, alla casa di Giacobbe i suoi peccati.
2 Pamba te mokolo na mokolo, balukaka Ngai, basalaka lokola bato bazali na esengo ya koyeba nzela na Ngai, lokola ekolo oyo esalaka makambo ya sembo mpe esundolaka te mibeko ya Nzambe na bango; basengaka Ngai mikano ya sembo, mpe basalaka lokola bato bazali na esengo ya kozala pene ya Nzambe;
Mi ricercano ogni giorno, bramano di conoscere le mie vie, come un popolo che pratichi la giustizia e non abbia abbandonato il diritto del suo Dio; mi chiedono giudizi giusti, bramano la vicinanza di Dio:
3 balobaka: ‹ Mpo na nini tokila bilei, soki ozali komona na Yo yango te? Mpo na nini tomikitisa, soki ozali koyeba na yo yango te? › Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, bozali kosala makambo oyo bolingi mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.
«Perché digiunare, se tu non lo vedi, mortificarci, se tu non lo sai?». Ecco, nel giorno del vostro digiuno curate i vostri affari, angariate tutti i vostri operai.
4 Kokila bilei na bino ezali kosuka na koswana mpe na bitumba, bozali kobetana makofi na kanda nyonso; bozali kokila bilei te ndenge esengeli kozala na mokolo oyo bozali kozela ete mongongo na bino eyokana na likolo.
Ecco, voi digiunate fra litigi e alterchi e colpendo con pugni iniqui. Non digiunate più come fate oggi, così da fare udire in alto il vostro chiasso.
5 Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka, mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko? Boni, ezali kaka kogumba moto lokola nzete oyo ebotaka na mayi, kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu? Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei, mokolo oyo Yawe alingaka?
E' forse come questo il digiuno che bramo, il giorno in cui l'uomo si mortifica? Piegare come un giunco il proprio capo, usare sacco e cenere per letto, forse questo vorresti chiamare digiuno e giorno gradito al Signore?
6 Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka: kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.
Non è piuttosto questo il digiuno che voglio: sciogliere le catene inique, togliere i legami del giogo, rimandare liberi gli oppressi e spezzare ogni giogo?
7 Boni, ezali te kokabola bilei na yo na moto oyo azali na nzala? Ezali te koyamba kati na ndako na yo, mobola oyo azali koyengayenga? Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo?
Non consiste forse nel dividere il pane con l'affamato, nell'introdurre in casa i miseri, senza tetto, nel vestire uno che vedi nudo, senza distogliere gli occhi da quelli della tua carne?
8 Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo, mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu; bosembo na yo ekotambola liboso na yo mpe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima.
Allora la tua luce sorgerà come l'aurora, la tua ferita si rimarginerà presto. Davanti a te camminerà la tua giustizia, la gloria del Signore ti seguirà.
9 Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo; tango okosenga lisungi, akoloba: ‹ Ngai oyo. › Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, otiki kolakisa bato mosapi mpe otiki maloba mabe;
Allora lo invocherai e il Signore ti risponderà; implorerai aiuto ed egli dirà: «Eccomi!». Se toglierai di mezzo a te l'oppressione, il puntare il dito e il parlare empio,
10 soki opesi bilei na yo epai na ye oyo azali na nzala mpe okokisi posa ya moto oyo bazali konyokola, pole na yo ekongenga kati na molili, mpe molili na yo ekokoma lokola moyi ya ngonga midi.
se offrirai il pane all'affamato, se sazierai chi è digiuno, allora brillerà fra le tenebre la tua luce, la tua tenebra sarà come il meriggio.
11 Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.
Ti guiderà sempre il Signore, ti sazierà in terreni aridi, rinvigorirà le tue ossa; sarai come un giardino irrigato e come una sorgente le cui acque non inaridiscono.
12 Mpo na yo, bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala, bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala; bakobenga yo: ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana mpe ya banzela oyo bato balekaka. ›
La tua gente riedificherà le antiche rovine, ricostruirai le fondamenta di epoche lontane. Ti chiameranno riparatore di brecce, restauratore di case in rovina per abitarvi.
13 Soki obateli matambe na yo ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, mpe ete osala te mosala oyo yo olingi na mokolo na Ngai ya bule; soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe; soki opesi yango lokumu na koboya kolanda nzela na yo moko, kosala misala na yo moko mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,
Se tratterrai il piede dal violare il sabato, dallo sbrigare affari nel giorno a me sacro, se chiamerai il sabato delizia e venerando il giorno sacro al Signore, se lo onorerai evitando di metterti in cammino, di sbrigare affari e di contrattare,
14 wana okozwa esengo na yo kati na Yawe mpe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili, nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo, » elobi Yawe.
allora troverai la delizia nel Signore. Io ti farò calcare le alture della terra, ti farò gustare l'eredità di Giacobbe tuo padre, poiché la bocca del Signore ha parlato.

< Ezayi 58 >