< Ezayi 56 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Botambola na alima mpe bosala kolanda bosembo, pamba te lobiko na Ngai ekomi pene mpe bosembo na Ngai ekomi pene ya komonisama.
ヱホバ如此いひ給ふ なんぢら公平をまもり正義をおこなふべし わが救のきたるはちかく わが義のあらはるるは近ければなり
2 Esengo na moto oyo asalaka bongo, oyo akangamaka na yango, oyo abatelaka mokolo ya Saba mpe abebisaka te bosantu na yango, mpe oyo abatelaka loboko na ye ete esala mabe te! »
安息日をまもりて汚さず その手をおさへて惡きことをなさず 斯おこなふ人かく堅くまもる人の子はさいはひなり
3 Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te: « Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye! » Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te: « Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka! »
ヱホバにつらなれる異邦人はいふなかれ ヱホバ必ず我をその民より分ち給はんと 寺人もまたいふなかれ われは枯たる樹なりと
4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Mpo na basoda oyo baboma bango mikongo, oyo babatelaka mokolo na Ngai ya Saba, oyo baponaka makambo oyo esepelisaka Ngai, mpe bakangamaka na boyokani na Ngai:
ヱホバ如此いひたまふ わが安息日をまもり わが悦ぶことをえらみて我が契約を堅くまもる寺人には
5 nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango, ekaniseli oyo ezali na kombo: ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi. Nakopesa bango kombo ya libela, oyo bakoki kolongola te.
我わが家のうちにてわが垣のうちにて子にも女にもまさる記念のしるしと名とをあたへ 並とこしへの名をたまふて絶ることなからしめん
6 Bapaya oyo bakangami na Yawe mpo na kosalela Ye, mpo na kolinga Kombo na Ye mpe kogumbamela Ye, bato nyonso oyo bakobatela mokolo ya Saba mpe bakobebisa te bosantu na yango, mpe bato oyo bakokangama na boyokani na Ngai;
またヱホバにつらなりこれに事へ ヱホバの名を愛しその僕となり 安息日をまもりて汚すことなく凡てわが契約をかたくまもる異邦人は
7 nakomema bango na ngomba na Ngai ya bule mpe nakopesa bango esengo kati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai. Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bango ekondimama na etumbelo na Ngai, pamba te Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso. »
我これをわが聖山にきたらせ わが祈の家のうちにて樂ましめん かれらの燔祭と犠牲とはわが祭壇のうへに納めらるべし わが家はすべての民のいのりの家ととなへらるべければなり
8 Nkolo Yawe oyo asangisi bawumbu ya Isalaele alobi: « Nakosangisa lisusu bato mosusu elongo na bango, esika moko na bato oyo nasilaki kosangisa. »
イスラエルの放逐れたるものを集めたまふ主ヱホバのたまはく 我さらに人をあつめて旣にあつめられたる者にくはへん
9 Bino banyama nyonso ya esobe, boya; bino banyama nyonso ya zamba, boya kolia!
野獸よみなきたりてくらへ 林にをるけものよ皆きたりてくらへ
10 Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso, bango nyonso bazangi mayele; bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te, bakokaka koganga te, mosala na bango kolala mpe kolota bandoto, balingi pongi makasi.
斥候はみな瞽者にしてしることなし みな唖なる犬にして吠ることあたはず みな夢みるもの臥ゐるもの眠ることをこのむ者なり
11 Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te. Bazali babateli oyo bazangi bososoli, moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.
この犬はむさぼること甚だしくして飽ことをしらず かれらは悟ることを得ざる牧者にして皆おのが道にむかひゆき 何れにをる者もおのおの己の利をおもふ
12 Moko na moko alobaka: « Yaka! Tika ete nakamata vino mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga! Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo, masanga ya komela ezali nanu ebele! »
かれら互にいふ請われ酒をたづさへきたらん われら濃酒にのみあかん かくて明日もなほ今日のごとく大にみち足はせんと