< Ezayi 55 >
1 « Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, boya na esika oyo mayi ezali; ezala bino oyo bozali na mbongo te, boya kosomba mpe kolia; boya kosomba vino mpe miliki: ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te!
“Come, all you who are thirsty, come to the waters; and you without money, come, buy, and eat! Come, buy wine and milk without money and without cost!
2 Mpo na nini bozali kobebisa mbongo mpo na bilei oyo etongaka nzoto te, mpe kobimisa motoki mpo na bilei oyo etondisaka te? Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko, mpe bokosepela na biloko ya elengi.
Why spend money on that which is not bread, and your labor on that which does not satisfy? Listen carefully to Me, and eat what is good, and your soul will delight in the richest of foods.
3 Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.
Incline your ear and come to Me; listen, so that your soul may live. I will make with you an everlasting covenant— My loving devotion promised to David.
4 Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai na miso ya bato ya bikolo ebele, mokambi mpe motambolisi ya bato.
Behold, I have made him a witness to the nations, a leader and commander of the peoples.
5 Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te, mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo mpo na Yawe, Nzambe na yo, mpo na Mosantu ya Isalaele, pamba te alatisi yo nkembo. »
Surely you will summon a nation you do not know, and nations who do not know you will run to you. For the LORD your God, the Holy One of Israel, has bestowed glory on you.”
6 Boluka Yawe wana akoki nanu komonana, bobelela Ye wana azali nanu pene.
Seek the LORD while He may be found; call on Him while He is near.
7 Tika ete moto mabe atika banzela na ye, mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye; tika ete azonga epai na Yawe mpo ete ayokela ye mawa, tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, pamba te alimbisaka kaka.
Let the wicked man forsake his own way and the unrighteous man his own thoughts; let him return to the LORD, that He may have compassion, and to our God, for He will freely pardon.
8 « Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te, mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te, » elobi Yawe.
“For My thoughts are not your thoughts, neither are your ways My ways,”
9 « Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele, ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali likolo koleka banzela na bino, mpe makanisi na Ngai ezali likolo koleka makanisi na bino.
“For as the heavens are higher than the earth, so My ways are higher than your ways and My thoughts than your thoughts.
10 Ndenge mvula mpe mvula ya pembe enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo soki epolisi mabele te, soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, soki epesi nkona te na moloni mpe bilei te na moto oyo aliaka,
For just as rain and snow fall from heaven and do not return without watering the earth, making it bud and sprout, and providing seed to sow and food to eat,
11 ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka: ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.
so My word that proceeds from My mouth will not return to Me empty, but it will accomplish what I please, and it will prosper where I send it.
12 Bokobima na esengo, mpe bakotambolisa bino na kimia; bangomba milayi mpe bangomba mikuse ekoyemba nzembo ya elonga liboso na bino, mpe banzete nyonso ya zamba ekobeta maboko.
You will indeed go out with joy and be led forth in peace; the mountains and hills will burst into song before you, and all the trees of the field will clap their hands.
13 Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, nzete ya mirite ekobota na esika ya basende; ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, elembo ya libela na libela, oyo ekotikala kobebisama te. »
Instead of the thornbush, a cypress will grow, and instead of the brier, a myrtle will spring up; they will make a name for the LORD, an everlasting sign, never to be destroyed.”