< Ezayi 54 >

1 Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo, yo oyo obotaka te! Yemba nzembo mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te! Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebele koleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe.
「子を産まなかったうまずめよ、歌え。産みの苦しみをしなかった者よ、声を放って歌いよばわれ。夫のない者の子は、とついだ者の子よりも多い」と主は言われる。
2 Yeisa ndako na yo ya kapo monene, bakisa bakapo na ndako yango mpo ete eya monene; kokanga motema te! Benda na molayi basinga na yo mpe pika banzete na yo makasi!
「あなたの天幕の場所を広くし、あなたのすまいの幕を張りひろげ、惜しむことなく、あなたの綱を長くし、あなたの杭を強固にせよ。
3 Pamba te okofungwama na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe na ngambo ya loboko na yo ya mwasi; bakitani na yo bakokonza bikolo mosusu mpe bakosala ete bato bavanda lisusu na bingumba na bango oyo etikalaki lisusu na bato te.
あなたは右に左にひろがり、あなたの子孫はもろもろの国を獲、荒れすたれた町々をも住民で満たすからだ。
4 Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te! Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te! Okobosana soni ya bolenge na yo mpe okokanisa lisusu te pasi na yo ya kokufisa mobali;
恐れてはならない。あなたは恥じることがない。あわてふためいてはならない。あなたは、はずかしめられることがない。あなたは若い時の恥を忘れ、寡婦であった時のはずかしめを、再び思い出すことがない。
5 pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye: Yawe, Mokonzi ya mampinga; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo; babengaka Ye: Nzambe ya mokili mobimba.
あなたを造られた者はあなたの夫であって、その名は万軍の主。あなたをあがなわれる者は、イスラエルの聖者であって、全地の神ととなえられる。
6 Pamba te Yawe abengi yo lisusu lokola mwasi oyo basundola, bongo azali na pasi na motema. Ndenge nini bakoki solo kosundola mwasi oyo babala na bolenge, elobi Nzambe na yo?
捨てられて心悲しむ妻、また若い時にとついで出された妻を招くように主はあなたを招かれた」とあなたの神は言われる。
7 Nasundolaki yo kaka mpo na tango moke; kasi na bolingo nyonso, nakozongisa yo.
「わたしはしばしばあなたを捨てたけれども、大いなるあわれみをもってあなたを集める。
8 Mpo ete nazalaki na kanda makasi, nabombelaki yo elongi na Ngai kaka mpo na tango moke; kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka, elobi Yawe, Mosikoli na yo.
あふれる憤りをもって、しばしわが顔を隠したけれども、とこしえのいつくしみをもって、あなたをあわれむ」とあなたをあがなわれる主は言われる。
9 Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa, tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noa ekozindisa lisusu mabele te. Boye, nalapi solo ndayi sik’oyo ete nakosilikela yo lisusu te mpe nakopamela yo lisusu te.
「このことはわたしにはノアの時のようだ。わたしはノアの洪水を、再び地にあふれさせないと誓ったが、そのように、わたしは再びあなたを怒らない、再びあなたを責めないと誓った。
10 Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.
山は移り、丘は動いても、わがいつくしみはあなたから移ることなく、平安を与えるわが契約は動くことがない」とあなたをあわれまれる主は言われる。
11 Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka mpe ezangeli kobondisama, nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri,
「苦しみをうけ、あらしにもてあそばれ、慰めを得ない者よ、見よ、わたしはアンチモニーであなたの石をすえ、サファイヤであなたの基をおき、
12 nakotonga bamir ya lopango na yo na mabanga ya ribi, nakosala bikuke na yo na biloko ya ngelingeli, mpe bamir na yo nyonso, na mabanga ya talo.
めのうであなたの尖塔を造り、紅玉であなたの門を造り、あなたの城壁をことごとく宝石で造る。
13 Yawe akoteya bana na yo nyonso, mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.
あなたの子らはみな主に教をうけ、あなたの子らは大いに栄える。
14 Okolendisama kati na bosembo: minyoko ekozala mosika na yo, okobanga lisusu eloko moko te, mpe somo ekokende mosika na yo; ekomeka kopusana lisusu pene na yo te.
あなたは義をもって堅く立ち、しえたげから遠ざかって恐れることはない。また恐怖から遠ざかる、それはあなたに近づくことがないからである。
15 Soki babundisi yo, ekowuta epai na Ngai te; moto nyonso oyo akobundisa yo akokweya liboso na yo.
たとい争いを起す者があってもわたしによるのではない。すべてあなたと争う者は、あなたのゆえに倒れる。
16 Tala, ezali Ngai nde nakelaki monyangwisi bibende na moto oyo apelisaka moto makasi na makala mpe asalaka ebundeli mpo ete esala mosala na yango. Ezali mpe kaka Ngai nde nakelaki mobebisi mpo ete asala mosala ya kobebisa.
見よ、炭火を吹きおこして、その目的にかなう武器を造り出す鍛冶は、わたしが創造した者、また荒し滅ぼす者も、わたしが創造した者である。
17 Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.
すべてあなたを攻めるために造られる武器は、その目的を達しない。すべてあなたに逆らい立って、争い訴える舌は、あなたに説き破られる。これが主のしもべらの受ける嗣業であり、また彼らがわたしから受ける義である」と主は言われる。

< Ezayi 54 >

A Dove is Sent Forth from the Ark
A Dove is Sent Forth from the Ark