< Ezayi 53 >
1 Nani andimaki makambo oyo tosakolaki? Mpe epai ya nani loboko na Yawe emonisamaki?
Who has given credence to that which we heard? And the arm of YHWH, On whom has it been revealed?
2 Pamba te akolaki liboso na Ye lokola nzete ya moke, lokola mosisa oyo ebimi na esobe; azalaki ata na kitoko to lokumu te oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye; lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.
Indeed, He comes up as a tender plant before Him, And as a root out of dry land, He has no form or splendor when we observe Him, Nor appearance, that we desire Him.
3 Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.
He is despised, and left of men, A Man of pains, and acquainted with sickness, And as one hiding the face from us, He is despised, and we did not esteem Him.
4 Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye; kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye, apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.
Surely He has borne our sicknesses, And our pains—He has carried them, And we have esteemed Him [as] plagued, struck of God, and afflicted.
5 Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.
And He is pierced for our transgressions, bruised for our iniquities, The discipline of our peace [is] on Him, And by His scourging we are healed.
6 Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.
All of us, like sheep, have wandered, Man has turned to his own way, And YHWH has laid on Him the punishment of us all.
7 Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale; akangaki monoko na ye.
It has been exacted, and He has answered, And He does not open His mouth, He is brought as a lamb to the slaughter, And as a sheep before its shearers is silent, So He does not open His mouth.
8 Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.
By restraint and by judgment He has been taken, And of His generation who meditates, That He has been cut off from the land of the living? He is plagued by the transgression of My people,
9 Bapesaki ye kunda kati na bato mabe, mpe kunda na ye ezalaki elongo na bazwi, atako asalaki likambo moko te ya mabe, mpe monoko na ye etikalaki koloba lokuta te.
And He appoints His grave with the wicked, And with the rich at His death, Because He has done no violence, Nor [is] deceit in His mouth.
10 Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.
And YHWH has delighted to crush Him, He has made Him sick; If His soul makes an offering for guilt, He sees [His] seed—He prolongs [His] days, And the pleasure of YHWH prospers in His hand.
11 Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.
Of the labor of His soul He sees—He is satisfied, Through His knowledge My Righteous Servant gives righteousness to many, And He bears their iniquities.
12 Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.
Therefore I give a portion to Him among the many, And He apportions spoil with the mighty, Because that He exposed His soul to death, And He was numbered with transgressors, And He has borne the sin of many, And He intercedes for transgressors.