< Ezayi 51 >

1 « Boyoka ngai, bino bato oyo bolukaka bosembo mpe bolukaka Yawe! Botala libanga epai wapi bosalemaki, mpe libulu epai wapi bobendamaki.
Oídme, los que seguís la justicia y buscáis a Yahvé. Mirad la roca de la cual habéis sido cortados, el profundo manantial de donde habéis sido sacados.
2 Botala Abrayami, tata na bino; mpe Sara oyo abotaki bino. Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko; napambolaki ye mpe nakomisaki ye tata ya bato ebele!
Mirad a Abrahán, vuestro padre, y a Sara, que os dio a luz; pues así como le llamé a él que era solo, y le bendije, y le multipliqué,
3 Solo, Yawe akobondisa Siona mpe akotala na liso ya ngolu bisika nyonso ya Siona oyo ebeba; akokomisa esobe na yango lokola Edeni, bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, matondi mpe mongongo ya banzembo.
así Yahvé consolará a Sión, consolará todas sus ruinas y convertirá su desierto en paraíso, y su soledad en jardín de Yahvé, donde habrá gozo y alegría, alabanza y voz de júbilo.
4 Oh bato na ngai, boyoka ngai! Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu: Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai, lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo.
Escuchadme, oh pueblo mío, prestadme oído, nación mía; porque de Mí viene la Ley, y estableceré mi derecho para luz de los pueblos.
5 Bosembo na ngai ezali pene, lobiko na ngai ebimi na lombangu, mpe maboko na ngai ekosambisa bikolo. Bisanga ekotalela ngai, ekozala na elikya na nguya ya loboko na ngai.
Está por venir mi justicia, mi salvación está en camino, y mi brazo regirá los pueblos; en Mí esperan las islas y confían en mi brazo.
6 Botombola miso na bino na likolo, botala na se, na mabele; likolo ekolimwa lokola milinga, mabele ekonuna lokola elamba, mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi. Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko, bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.
Alzad vuestros ojos al cielo, y mirad hacia abajo, a la tierra; porque los cielos se disiparán como humo, y la tierra se envejecerá como un vestido. De igual modo morirán los que la habitan; pero mi salvación durará eternamente, y mi justicia no tendrá fin.
7 Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino: Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.
Escuchadme, los que conocéis la justicia, tú, pueblo, en cuyo corazón está mi Ley. No temáis el oprobio de los hombres, y ante sus afrentas no os asustéis.
8 Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba, mpe bampese ekolia bango lokola elamba basala na bapwale ya meme; kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko, mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. »
Porque como a vestido los comerá la polilla, y, como a lana, los consumirá el gusano; mas mi justicia durará eternamente, y mi salvación de generación en generación.
9 Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka! Lata makasi! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona?
¡Despierta, despierta, vístete de fortaleza, oh brazo de Yahvé! ¡Álzate, como en los días antiguos, como en las generaciones pasadas! ¿No eres Tú quien aplastaste a Rahab y traspasaste al dragón?
10 Ezali Yo te oyo okawusaki ebale monene, mayi oyo ya mozindo makasi? Ezali Yo te oyo opasolaki nzela kati na ebale monene mpo ete basikolami na Yo bakoka kokatisa?
¿No eres Tú el que enjutó la mar, las aguas del grande abismo? ¿El que convirtió en camino las profundidades del mar, para que pasaran los rescatados?
11 Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo; esengo ya libela na libela ekozala lokola motole na mito na bango; bakotondisama na esengo mpe na kosepela, bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.
Volverán los rescatados de Yahvé; con cantos de júbilo entrarán en Sión, coronada la cabeza con alegría eterna. El gozo y la alegría serán su heredad, y huirán el dolor y el llanto.
12 « Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti?
Yo, Yo soy vuestro consolador. ¿Quién eres tú para temer a un hombre mortal, a un hijo de hombre que no es más que heno?
13 Ozali mpe kobosana Yawe, Mokeli na Yo, oyo atandaki likolo ndenge batandaka liputa mpe atongaki miboko ya mabele, mpo ete okoma kobika mikolo nyonso na kobanga liboso ya kanda ya banyokoli oyo babongisami mpo na kobebisama? Pamba te, wapi kanda ya banyokoli?
Y te olvidas de Yahvé, tu Creador, que extendió los cielos y cimentó la tierra. Tiemblas continuamente, todos los días, ante el furor del opresor, listo para destruirte. ¿Dónde está ahora el furor del opresor?
14 Etikali kaka moke, bakangami bakozwa bonsomi, bakokufa lisusu te kati na boloko na bango mpe bakozanga lisusu bilei te.
Presto será libertado el encorvado; no morirá en la fosa, ni le faltará su pan.
15 Nazali Yawe, Nzambe na Yo, oyo aningisaka ebale monene mpo ete mbonge na yango etomboka. Kombo na Ye ezali ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›
Yo soy Yahvé, tu Dios, que agito el mar, de modo que se embravezcan sus olas. Yahvé de los ejércitos es su nombre.
16 Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo, mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai; nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango, oyo atongaki miboko ya mabele mpe oyo alobaki na Siona: ‹ Bozali bato na Ngai! › »
Yo he puesto mis palabras en tu boca, y te he cobijado bajo la sombra de mi mano, para plantar cielos y fundar una tierra, y para decir a Sión: “Tú eres mi pueblo.”
17 Lamuka, lamuka! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.
¡Despierta, despierta, levántate, oh Jerusalén, tú que bebiste de la mano de Yahvé el cáliz de su ira; hasta las heces has bebido el cáliz que causa vértigo.
18 Kati na bana nyonso oyo abotaki, Ezali na mwana moko te oyo azali kolakisa ye nzela; kati na bana oyo abokolaki, moko te azali kosimba ye na loboko.
De todos los hijos que ha dado a luz no hay quien la conduzca, y entre todos los hijos que ha criado no hay quien la lleve de la mano.
19 Makama mibale oyo ekomeli yo, nani akoki kolendisa yo: Mokili na yo ekomi mipiku ya mabanga mpe ebebisami, nzala makasi mpe mopanga, nani akobondisa yo?
Cayeron sobre ti estas dos clases de males: — ¿quién se compadece de ti?— devastación y quebranto, hambre y espada; ¿quién te consolará?
20 Bana na yo balembi, balali-lali na babalabala nyonso lokola mboloko oyo ekangami na motambo; kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yo nde ebuki-buki bango lolenge wana.
Desfallecidos yacen tus hijos en las encrucijadas de todas las calles, como antílope en la red, cubiertos de la ira de Yahvé, de la indignación de tu Dios.
21 Yango wana, yo oyo basambwisi, yo oyo olangwe, kasi na masanga ya vino te, yoka makambo oyo:
Por tanto, oye esto, oh afligida, tú, oh embriagada, pero no de vino.
22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, oyo abundelaka bato na Ye, alobi: « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, okomela yango lisusu te.
Así dice Yahvé, tu Señor y tu Dios, que defiende la causa de su pueblo: “He aquí que quito de tu mano el cáliz que causa vértigo, el cáliz de mi furor; ya no volverás a beberlo.
23 Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo, oyo balobaki na yo: ‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo! › Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela, lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. »
Lo pondré en manos de tus opresores, que te decían: «Póstrate, para que pasemos por encima de ti»; y tú pusiste como suelo tu dorso, y eras camino para los que transitaban.”

< Ezayi 51 >