< Ezayi 50 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye? Botekamaki mpo na masumu na bino; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.
耶和华如此说: 我休你们的母亲, 休书在哪里呢? 我将你们卖给我哪一个债主呢? 你们被卖,是因你们的罪孽; 你们的母亲被休,是因你们的过犯。
2 Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki? Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki? Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino? Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino? Na pamela na Ngai, nakawusaka ebale monene, nakomisaka bibale esobe; mbisi na yango ekomaka kolumba solo mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.
我来的时候,为何无人等候呢? 我呼唤的时候,为何无人答应呢? 我的膀臂岂是缩短、不能救赎吗? 我岂无拯救之力吗? 看哪,我一斥责,海就干了; 我使江河变为旷野; 其中的鱼因无水腥臭,干渴而死。
3 Nalatisaka likolo elamba ya mwindo mpe nazipaka yango na bilamba ya saki. »
我使诸天以黑暗为衣服, 以麻布为遮盖。
4 Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.
主耶和华赐我受教者的舌头, 使我知道怎样用言语扶助疲乏的人。 主每早晨提醒, 提醒我的耳朵, 使我能听,像受教者一样。
5 Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi, mpe ngai natiaki moto makasi te; namizongisaki sima te.
主耶和华开通我的耳朵; 我并没有违背,也没有退后。
6 Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.
人打我的背,我任他打; 人拔我腮颊的胡须,我由他拔; 人辱我,吐我,我并不掩面。
7 Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai, nakoyokisama soni te. Yango wana, nakomisi elongi na ngai makasi lokola libanga, mpe nayebi ete nakoyokisama soni te.
主耶和华必帮助我, 所以我不抱愧。 我硬着脸面好像坚石; 我也知道我必不致蒙羞。
8 Ye oyo alongisaka ngai azali pene, nani akokoka kotelemela bosembo na ngai? Tika ete tosamba elongo! Nani akofunda ngai ete tosamba na ye? Tika ete apusana pene na ngai!
称我为义的与我相近; 谁与我争论, 可以与我一同站立; 谁与我作对, 可以就近我来。
9 Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai; nani akolonga ngai na esambiselo? Tala, bango nyonso bakokweya lokola bilamba ya kala oyo ebeba, bongo nseka ekolia bango.
主耶和华要帮助我; 谁能定我有罪呢? 他们都像衣服渐渐旧了, 为蛀虫所咬。
10 Ezali na moto kati na bino oyo atosaka Yawe mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye, bongo atambola kati na molili mpe atikala komona pole te? Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe mpe atalela Nzambe na ye.
你们中间谁是敬畏耶和华、 听从他仆人之话的? 这人行在暗中,没有亮光。 当倚靠耶和华的名, 仗赖自己的 神。
11 Kasi sik’oyo, bino nyonso oyo bopelisi moto mpe bosimbi bakoni oyo ezali kopela moto, bokende, botambola na pole ya moto na bino mpe ya bakoni oyo bopelisi. Tala oyo bokozwa na maboko na ngai: Bokokufa na pasi!
凡你们点火,用火把围绕自己的 可以行在你们的火焰里, 并你们所点的火把中。 这是我手所定的: 你们必躺在悲惨之中。